MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | ELIYA
Ayikaki mpiko tii na nsuka
Eliya azwi nsango ete Mokonzi Ahaba akufi. Tokoki komona na makanisi ndenge mosakoli wana ya mobange azali kosimbasimba mandefu mpe azali kobɛtabɛta miso ntango azali kokanisa makambo akutanaki na yango na boumeli ya bambula mpo na mokonzi mabe wana. Eliya ayikaki mpiko na makambo mingi mpenza! Bazalaki kokanela ye mpe kolandalanda ye; balingaki kutu koboma ye—nyonso wana mpo na Ahaba mpe mwasi na ye, Yezabele. Ntango mwasi yango apesaki mitindo ete báboma basakoli ya Yehova, mokonzi asalaki eloko te mpo na kopekisa mwasi na ye. Ye ná mwasi na ye basalaki likita mpo na kobomisa Nabote moto ya sembo ná bana na ye oyo basalaki eloko te, kaka mpo na lokoso na bango. Mpo na likambo yango, Eliya apesaki bango nsango ya bitumbu ya Yehova mpo na Ahaba mpe boyangeli na ye mobimba. Sikoyo, maloba yango ya Nzambe ebandaki kokokisama. Ahaba akufaki na ndenge oyo Yehova alobaki.—1 Bakonzi 18:4; 21:1-26; 22:37, 38; 2 Bakonzi 9:26.
Ata bongo, Eliya ayebaki ete asengelaki kokoba koyika mpiko. Yezabele azalaki naino na bomoi mpe azalaki kotinda libota na ye mpe ekólo mobimba bálanda bizaleli na ye ya mabe. Eliya akokutana na mikakatano mingi lisusu mpe azali naino na makambo mingi ya koteya Elisha, moninga na ye oyo akozwa mpe esika na ye. Boye, tólobela naino mikumba misato ya nsuka oyo Eliya azwaki. Soki tomoni ndenge kondima na ye esalisaki ye ayika mpiko, tokomona ndenge ya kokómisa mpe kondima na biso makasi na boumeli ya eleko ya mpasi oyo tozali kobika.
Bakateli Ahazia etumbu
Ahazia, mwana ya Ahaba ná Yezabele, akómaki sikoyo mokonzi ya Yisraele. Na esika azwa liteya na bozoba oyo baboti na ye basalaki, alandaki nde nzela na bango ya mabe. (1 Bakonzi 22:52) Ndenge moko na bango, Ahazia asambelaki Baala. Losambo ya Baala ezalaki kotinda bato básala makambo lokola kindumba na tempelo mpe kopesa bana mbeka. Ezalaki nde na likambo moko oyo elingaki kotinda Ahazia abongola bizaleli na ye mpe asalisa bato na ye bátika kozanga bosembo ndenge wana epai ya Yehova?
Na mbalakaka, elenge mokonzi wana ya lofundo azwaki likama. Akweaki longwa na kiyungulu ya lidusu ya shambrɛ na ye mpe azokaki mabe. Atako bomoi na ye ekómaki na likama, aboyaki kaka koluka lisalisi ya Yehova. Kutu, atindaki nde bamemi-nsango epai ya banguna, na Ekrone, engumba ya Filistia mpo na kotuna nzambe Baala-zebube soki akobika. Yehova asepelaki ata moke te. Atindaki anzelu epai ya Eliya mpo azongisa bamemi-nsango yango. Mosakoli azongisaki bango epai ya mokonzi na nsango moko ya kozokisa. Ahazia asalaki lisumu monene ndenge asalaki lokola Nzambe azali te na Yisraele. Yehova azwaki ekateli ete Ahazia akokita na mbeto na ye ya maladi te.—2 Bakonzi 1:2-4.
Kozanga ete abongola motema, Ahazia atunaki boye: “Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe alobaki na bino maloba oyo azalaki ndenge nini?” Bamemi-nsango bayebisaki ye ndenge mosakoli yango alataki mpe Ahazia alobaki mbala moko: “Ezali Eliya.” (2 Bakonzi 1:7, 8) Emonani ete Eliya azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te mpe amipesaki na kosalela Nzambe yango ezalaki mpasi te báyeba ye mbala moko ntango balobelaki bilamba oyo alataki. Ya solo, bakokaki koloba bongo te mpo na Ahazia to baboti na ye oyo bazalaki lokoso mpe kolinga mingi biloko ya mokili. Ndakisa ya Eliya ekundweli biso ete tosengeli kolanda toli ya Yesu ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe kotya miso na makambo oyo ezali mpenza na ntina.—Matai 6:22-24.
Mpo na koluka kozongisa mabe, Ahazia atindi etuluku ya basoda 50 mpe mokonzi na bango mpo na kokanga Eliya. Ntango bamonaki Eliya “afandi na nsɔngɛ ya ngomba,”a mokonzi ya basoda alobaki mbala moko na Eliya na nkombo ya mokonzi ete “kitá”—mbala mosusu elingaki koloba bámema ye mpo bákende koboma ye. Kanisá naino! Atako bayebaki ete Eliya azalaki “moto ya Nzambe ya solo,” basoda yango bakanisaki ete basengeli kozala na kanza mpe kobangisa ye. Bamikosaki mpenza! Eliya alobaki na mokonzi ya basoda boye: “Soki nazali moto ya Nzambe, mɔtɔ euta na likoló, ekita mpe elya yo ná bato na yo ntuku mitano.” Na nsima, Nzambe asalaki bongo! “Mɔtɔ eutaki na likoló, ekiti mpe elei ye ná bato na ye ntuku mitano.” (2 Bakonzi 1:9, 10) Liwa ya nsɔmɔ oyo basoda yango bakufaki emonisi ete Yehova azwaka na lisɛki te ndenge bato batyolaka to bazangaka limemya epai ya basaleli na ye.—1 Ntango 16:21, 22.
Ahazia atindi lisusu mokonzi mosusu ná basoda 50. Mokonzi oyo ya mibale alekaki oyo ya liboso na kanza. Mpo atako amonaki bibembe 51 oyo mɔtɔ etumbaki elalaki wana na nse ya ngomba, azwaki liteya te. Longola yango, asukaki kaka te na kozongela mitindo oyo mokonzi oyo ayaki liboso na ye apesaki Eliya ete “kitá” kasi abakisaki liloba “noki”! Oyo nde bozoba! Yango wana ye ná bato na ye babungisaki bomoi kaka ndenge etuluku ya liboso ebungisaki. Kasi, oyo aleki kanza ezalaki nde mokonzi Ahazia. Lokola azalaki mafumafu, atindaki etuluku ya misato ya basoda. Likambo ya esengo mokonzi oyo ya misato ya basoda azalaki moto ya bwanya. Asololaki na Eliya na komikitisa nyonso mpe abondelaki ye abikisa molimo na ye mpe ya bato na ye. Na ntembe te, Eliya, moto ya Nzambe amekolaki motema mawa ya Yehova ntango mokonzi yango ya basoda amikitisaki. Anzelu ya Yehova ayebisaki Eliya akende elongo na basoda yango. Eliya atosaki mpe na nsima azongelaki maloba ya bitumbu ya Yehova na matoi ya mokonzi mabe wana. Ndenge Nzambe alobaki, Ahazia akufaki. Boyangeli na ye eumelaki kaka mbula mibale.—2 Bakonzi 1:11-17.
Eliya amekolaki motema mawa ya Yehova epai ya mokonzi ya basoda oyo amikitisaki
Ndenge nini Eliya ayikaki mpiko atako bato bazalaki motó makasi mpe batomboki? Motuna yango ezali na ntina lelo, boye te? Ekómelá yo naino te osilika mpo moto moko oyo ozali kosalisa aboyi koyoka mpe atingami kaka alanda nzela mabe? Ndenge nini tokoki koyika mpiko na makambo ya bongo? Esika oyo basoda bakutaki Eliya “na nsɔngɛ ya ngomba” ekoki koteya biso likambo moko. Tokoki te koloba polele mpo na nini Eliya azalaki wana, kasi tondimi ete lokola azalaki moto ya mabondeli, amonaki ete ezalaki esika oyo bato bazalaki te mpe ya kimya, yango epesaki ye libaku malamu ya kopusana penepene ya Nzambe na ye. (Yakobo 5:16-18) Ndenge moko mpe, tokoki mbala na mbala kobomba ntango mpo na kozala kaka biso moko elongo na Nzambe, kobelela nkombo na ye mpe koyebisa ye mikakatano mpe makambo oyo ezali kotungisa biso. Boye, tokozala na likoki mpenza ya koyika mpiko ntango baoyo tofandi na bango bazali mafumafu mpe bazali kosala makambo oyo ekomemela bango moko mpasi.
Apesi ye elamba na ye
Ntango ekoki sikoyo mpo Eliya atika mokumba na ye. Tótala oyo asalaki. Ntango ye ná Elisha balongwaki na engumba Gilegale, Eliya asɛngi Elisha atikala wana ntango ye moko azali kokende na Betele, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 11. Eyano ya Elisha ezalaki polele: “Lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola molimo na yo ezali solo na bomoi, nakotika yo te.” Ntango bango mibale bakómaki na Betele, Eliya ayebisaki Elisha ete akosala mobembo ye moko na Yeriko, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 22. Elisha ayanolaki ye kaka ndenge asalaki liboso. Mpo na mbala ya misato na Yeriko, Eliya asalaki lisusu kaka bongo liboso bákende na Ebale Yordani, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 8. Awa mpe elenge mobali yango abongolaki makanisi te. Aboyaki kotika Eliya!—2 Bakonzi 2:1-6.
Elisha amonisaki bolingo ya sembo oyo ezali ezaleli ya ntina mingi. Yango nde bolingo oyo Ruta amoniselaki Naomi, bolingo oyo ekangamaka na eloko na yango mpe eboyaka kotika yango ekende. (Ruta 1:15, 16) Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli komonisa ezaleli yango lelo mingi koleka. Tomoni polele ntina ya komonisa bolingo ya sembo ndenge Elisha amonaki yango?
Na ntembe te, esimbaki mpenza motema ya Eliya komona bolingo ya sembo ya moninga na ye. Mpo na yango, Elisha azwaki libaku ya komona likamwisi ya nsuka oyo Eliya asalaki. Ntango batelemaki liboso ya Ebale Yordani, esika mai elekaka mbangu mpe ezalaka mozindo, Eliya abɛtaki mai na elamba na ye ya mosala. Mai ekabwanaki! “Mibali ntuku mitano (50) kati na bana ya basakoli,” oyo emonani ete bazalaki na kati ya mibali oyo bazalaki kozwa formasyo mpo na kotambwisa losambo ya solo na ekólo yango, bamonaki mpe likamwisi yango. (2 Bakonzi 2:7, 8) Ekoki kozala ete Eliya azalaki kotambwisa programɛ ya formasyo yango. Mwa bambula liboso, ezalaki na ntango moko oyo Eliya amonaki lokola azalaki kaka ye moko moto ya sembo na mokili yango. Banda wana, Yehova apesaki Eliya mbano ndenge ayikaki mpiko, apesaki ye libaku ya komona bokoli monene na kati ya basaleli na ye.—1 Bakonzi 19:10.
Nsima ya kokatisa Yordani, Eliya alobaki na Elisha boye: “Sɛngá eloko oyo nasengeli kosalela yo liboso nakamatama mpe natika yo.” Eliya ayebaki ete ntango na ye ya kokende ekokaki. Ayokaki mabe te kopesa moninga na ye wana ya elenge mokumba wana mpe lokumu oyo ezalaki kozela ye. Kutu, Eliya azalaki na esengo ya kosalisa ye na ndenge esengeli. Elisha asɛngaki boye: “Nabondeli yo, ndambo mibale ya elimo na yo eyela ngai.” (2 Bakonzi 2:9) Alingaki koloba te ete azalaki na mposa ya elimo santu mbala mibale koleka oyo Eliya azwaki. Kutu, azalaki nde kosɛnga libula lokola oyo mwana ya liboso azwaka, oyo na kolanda mibeko, azalaki kozwa eteni monene ya libula to biteni mibale ya biloko nyonso mpo na kokokisa mokumba na ye ya sika lokola mokonzi ya libota. (Kolimbola Mibeko 21:17) Lokola asengelaki kozwa esika ya Eliya, emonani ete Elisha amonaki ntina ya kozala na mpiko lokola Eliya mpo na kosala mosala yango.
Na komikitisa nyonso, Eliya atikaki Yehova apesa eyano. Soki Yehova apesi Elisha libaku ya komona ndenge Eliya, mosakoli wana ya mobange akokamatama, boye Nzambe andimi likambo oyo Elisha asɛngaki. Eumelaki te, ntango baninga wana mibale bazalaki kotambola elongo, “bazali kosolola nzelanzela,” likambo moko ya kokamwa esalemaki!—2 Bakonzi 2:10, 11.
Na ntembe te boninga ya Eliya ná Elisha esalisaki bango mibale báyika mpiko na ntango ya mpasi
Kongɛnga moko ya kokamwa emonanaki na mapata mpe ezalaki kopusana se kopusana. Tokoki komona na makanisi ndenge makelele ya nse nse ezali koyokana ntango mopɛpɛ makasi ya mbalakaka ebimi, ezali koya nzela moko na eloko moko oyo ezali kongɛnga esika mibali wana mibale bazalaki, ekaboli bango mpe mbala mosusu makambo oyo bamoni ekamwisi bango. Oyo bamonaki ezalaki shario oyo ezalaki kongɛnga lokola nde esalemi na mɔtɔ. Eliya ayebaki ete ngonga na ye ekokaki. Amataki nde na shario yango? Lisolo elobi te. Ezala ndenge nini, amiyokaki lokola batomboli ye likoló na mapata, mopɛpɛ moko makasi ememi ye!
Elisha azalaki kotala na kokamwa nyonso. Lokola amonaki polele likambo wana ya kokamwa, Elisha ayebaki ete Yehova akopesa ye mpenza “ndambo mibale” ya elimo ya mpiko oyo Eliya azalaki na yango. Kasi kokanisa likambo yango epesaki Elisha mawa makasi. Ayebaki te esika moninga na ye akendaki, kasi ekoki kozala ete akanisaki te ete akomonana lisusu na Eliya. Agangaki boye: “Tata na ngai, tata na ngai, likalo ya etumba ya Yisraele ná bato na ye oyo batambolaka na mpunda!” Azalaki kotala na mosika ndenge molakisi na ye abungaki; na nsima Elisha apasolaki bilamba na ye na mawa.—2 Bakonzi 2:12.
Ntango Eliya azali kotombwama na mapata, ayokaki ndenge moninga na ye wana azalaki kolela na mawa mbala mosusu ye mpe atangisaki mai ya miso? Ezala ndenge nini, ayebaki mpenza ete kozala na moninga ya bongo esalisaki ye ayika mpiko na makambo mosusu ya mpasi. Ekozala malamu tózwa liteya na ndakisa ya Eliya mpe tósala boninga na bato oyo balingaka Nzambe mpe balukaka kosala mokano na ye!
Yehova amemaki Eliya esika mosusu mpo na mokumba ya sika
Mokumba ya nsuka
Na nsima Eliya akendeki wapi? Mangomba mosusu eteyaka ete amataki na likoló mpo na kozala elongo na Nzambe. Kasi yango ekoki kosalema te. Basiɛklɛ mingi na nsima, Yesu Kristo alobaki ete moto moko te amataki likoló liboso ya eleko na ye. (Yoane 3:13) Boye, ntango totángaka ete “Eliya amataki na likoló na mopɛpɛ makasi,” tosengeli komituna, ezalaki likoló oyo wapi? (2 Bakonzi 2:11) Biblia esalelaka “likoló” mpo na kolobela kaka te esika Yehova afandaka, kasi mpe mapata oyo tomonaka, esika bandɛkɛ epumbwaka. (Nzembo 147:8) Eliya amataki nde na likoló yango to na mapata. Bongo nini esalemaki na nsima?
Yehova amemaki kaka mosakoli wana epai mosusu mpo na mokumba ya sika, na mbala oyo na bokonzi ya Yuda. Biblia emonisi ete Eliya azalaki kokoba mosala na ye kuna, mbala mosusu na boumeli ya mbula koleka nsambo na nsima. Na ntango yango, mokonzi mabe Yehorame nde azalaki koyangela Yuda. Abalaki mwana mwasi ya Ahaba ná Yezabele, yango wana makambo mabe na bango ezalaki kaka kokoba. Yehova atindaki Eliya akoma mokanda ya bitumbu mpo na Yehorame. Ndenge esakolamaki, Yehorame akufaki liwa ya nsɔmɔ. Ya mabe koleka, lisolo yango esuki boye: “Bato bayokaki mawa te.”—2 Ntango 21:12-20.
Moto mabe yango akesenaki mpenza na Eliya! Toyebi te ndenge nini to ntango nini Eliya akufaki. Kasi toyebi ete akufaki te lokola Yehorame, kozanga ete bato báyoka mawa na liwa na ye. Elisha ayokaki mposa ya moninga na ye. Na ntembe te basakoli mosusu ya sembo bayokaki mpe bongo. Mbula 1 000 na nsima, Yehova ye moko amonisaki valɛrɛ ya Eliya, mpo asalelaki elakiseli ya mosakoli wana na emonaneli oyo Yesu abongwanaki liboso ya bayekoli na ye. (Matai 17:1-9) Okosepela koyeba makambo mingi etali Eliya mpe kokóma na kondima oyo eyikaka mpiko atako mikakatano? Boye, kobosana te kosala boninga na baoyo balingaka Nzambe, kotya makanisi na yo na kosalela Yehova mpe kobondela mbala na mbala na motema mobimba. Tiká ete yo mpe ozwa esika ya libela na motema ya Yehova!
a Bato mosusu ya mayele balobi ete ngomba oyo balobeli awa ezali Ngomba Karamele, epai Nzambe apesaki Eliya nguya ya kokweisa basakoli ya Baala mwa bambula mingi liboso. Kasi, Biblia elobeli te soki ezalaki ngomba nini.