Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 147
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Makanisi ya libunga na oyo etali kozala na bomoi ya seko
  • Tokoki kozala na bomoi libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Okoki kozala na bomoi libela na libela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe—Okoki kofanda kuna
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Tokoki mpenza kozala na bomoi ya seko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 147
Ntango mobali oyo azalaki bebe mpe ntango akómaki mokóló

Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?

Eyano ya Biblia

Biblia elobi: “Moto oyo asalaka makambo Nzambe alingaka, azali na bomoi ya seko.” (1 Yoane 2:17, Bible na lingala ya lelo oyo) Nzambe alingi osala nini?

  • Yekolá makambo etali Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu. Ntango abondelaki Nzambe, Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) ‘Koyekola koyeba’ Nzambe mpe Yesu esɛngi nini? Tokoki koyekola koyeba bango soki toyekoli Biblia mpe tosaleli makambo yango na bomoi na biso.a Biblia emonisi makanisi ya Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, oyo azali Mopesi bomoi. (Misala 17:24, 25) Biblia eyebisi biso mpe makambo etali Mwana na ye, Yesu, oyo ateyaki “maloba ya bomoi ya seko.”​—Yoane 6:67-69.

  • Monisá kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. Yesu ayaki na mabele “mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Mbeka ya lisiko ya Yesu efungweli bato nzela ya kozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.b (Nzembo 37:29) Yesu alobaki: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Simbá ete esuki kaka te na kondimela Yesu, esɛngi mpe makambo mosusu. Tosengeli ‘komonisa kondima epai na ye;’ koyokanisa bomoi na biso na mateya na ye mpe na kolanda mokano ya Tata na ye.​—Matai 7:21; Yakobo 2:17.

  • Kómisá makasi boyokani na yo na Nzambe. Nzambe alingi tópusana penepene na ye mpe tókóma baninga na ye. (Yakobo 2:23; 4:8) Nzambe azali seko. Akokufa ata mokolo moko te mpe alingi baninga na ye mpe bázala na bomoi ya seko. Nzambe amonisi na Liloba na ye makambo oyo alingi mpo na baoyo nyonso balukaka ye: “Mitema na bino ezala na bomoi mpo na seko.”​—Nzembo 22:26.

Makanisi ya libunga na oyo etali kozala na bomoi ya seko

Libunga: Milende ya bato ekosala ete bázwa bomoi ya seko.

Solo: Atako mayele mosusu oyo minganga bakolisi ezali kopesa elikya ya koumela mwa molai na bomoi, milende yango te nde ekomema bomoi ya seko. Kaka Nzambe nde akoki kopesa bomoi ya seko, mpo kaka ye nde azali “liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Alaki ete “akolongola mpenza liwa mpo na libela” mpe akopesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso ya sembo.​—Yisaya 25:8; 1 Yoane 2:25.

Libunga: Kaka bato ya mposo moko boye nde bakozala na bomoi ya seko.

Solo: Nzambe aponaka bilongi te. Kutu, “na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Bato ya bikólo mpe ya mimeseno nyonso oyo batosaka Nzambe, bakoki kozwa bomoi ya seko.

Libunga: Bomoi ya seko ekolɛmbisa.

Solo: Elaka ya bomoi ya seko euti epai ya Nzambe, oyo alingaka biso mpe alingi tózala na esengo. (Yakobo 1:17; 1 Yoane 4:8) Ayebi ete mpo tózala na esengo, tosengeli kozala na mosala moko oyo ezali na ntina. (Mosakoli 3:12) Nzambe alaki ete baoyo bakozwa bomoi awa na mabele bakozala na mosala oyo ekosepelisa mpe ya ntina, mosala oyo ekopesa bango, bato ya mabota na bango mpe baninga na bango litomba.​—Yisaya 65:22, 23.

Lisusu, baoyo bakozwa bomoi ya seko bakokoba koyekola makambo ya sika etali Mozalisi na bango mpe ebele ya biloko oyo akelá. Akelá bato na mposa ya kozala na bomoi ya seko mpe ya koyekola makambo etali ye, atako ‘bakoyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.’ (Mosakoli 3:10, 11) Na yango, baoyo bakozwa bomoi ya seko bakozala ntango nyonso na makambo ya kitoko ya koyekola mpe ya kosala.

a Batatoli ya Yehova bayekolaka na bato Biblia ofele. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini?

b Talá lisolo “Ndenge nini Yesu abikisi biso?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto