Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Avril lok. 31
  • Basáli mike oyo bazali ndakisa malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basáli mike oyo bazali ndakisa malamu
  • Lamuká!—1994
  • Masolo mosusu
  • Batambolaka lokola basoda!
    Lamuká!—2004
  • Bozalisi esalisaka biso tótyela bwanya ya Yehova motema koleka
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Limpulututu oyo emikómisaka lokola nsɛlɛlɛ
    Lamuká!—2002
Lamuká!—1994
g94 Avril lok. 31

Basáli mike oyo bazali ndakisa malamu

Euti na mokomani na biso na Afrique du Sud

KATI na zámba ya molunge mpe ya mai-mai na Afrika, mbala mingi mwa mabulu ya mikemike etondaka na nzeté ya bitape bitobuka na kati ebengami Barteria fistulosa. Na kotalela momekano oyo nzeté esalaka mpo na kokóma na canopée, mpo ete Barteria fistulosa ekóla malamu ezali na mposa ete bábatela yango na nzeté oyo imataka mpe ikoki kopekisa yango ete moi ekómela nkasa na yango. Wana nde nsɛlɛlɛ oyo eswaka makasi eyaka kosala mosala moko ya ntina. Boyokani oyo bozali kati na nsɛlɛlɛ wana mpe Barteria fistulosa ekamatamaki na filime na zámba ya molunge mpe mai-mai ya Korup, na Cameroun, mpo na kopesa lisoló moko na televizyó oyo ezalaki na motó ya likambo: zámba ya molunge mpe ya mai-mai ya Afrika: Korup, esalemaki na Phil Agland mpe Michael Rosenberg.

Lisoló yango ezali kolakisa mokonzi-mwasi ya sika kati na bolukiluki ya Barteria fistulosa. Na lisalisi ya lǒmbi (instinct) ayebi ete bitape oyo bizali polele na kati ya nzeté oyo bibongi mpo na kotya ebonga na ye ya bokonzi. Nsima ya kotɔbɔla lidusu na etape moko, akobota maki kati na yango. Nyama mosusu ya mikemike efandaka kati na bitape yango mpe balyaka makiki ya nzeté yango. Nsɛlɛlɛ babatelaka nyama wana ya mikemike, ezali etongá na bango, oyo esalisaka bango mpo na kozwa masanga kitoko.

Wana bakómi mingi, nsɛlɛlɛ babandi sikawa kobengana bafuteli mosusu mpe kopɛtola nzeté. Basáli wana ya mike kati na mosala bazali kosala likambo moko mpenza oyo ezali kobenda likebi. Basusu bazali kokita na mobimbi ya nzeté mpe bazali kobunda na milóna misusu oyo mimataka na nzeté mpo na kobebisa yango. Bazali koboma yango na kokataka nsinga na yango mpe kolya yango. Tokoki komona lisusu nsɛlɛlɛ mosusu bazali kolongola bosɔtɔ likoló ya bankasa ya nzeté. Ata mombinzo moko oyo mobombami na nsé ya lokasa mosengeli kolongolama.

Lisoló ya televizyó elimboli: “Nsɛlɛlɛ bakombɔlaka nzeté kino ekokoma pɛto. Kolongola banyama nyonso ya mikemike oyo ebebisaka nzete mpe milóna oyo mikomataka na yango, Barteria fistulosa ekoki komekana na nzeté isusu mpamba te ebatelami na nsɛlɛlɛ. Na nsima, ekosalela bitape wana bitobuka na kati mpo na kobatela nyama mikemike na bango, bilei na bango, mpe kobɔkɔla bana na bango”.

Nsɛlɛlɛ yango ezali mpenza basáli ya solosolo. Lisese moko ya kala elobi: “Kɛnda epai na nsɛlɛlɛ yɔ moto na gɔigɔi, banjabanja mpɔ na njela na ye, ojala mpe na mayɛlɛ.”​—Masese 6:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto