Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 12-14
  • Ekilípisi ya Moi: Astronomi ya kokamwisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekilípisi ya Moi: Astronomi ya kokamwisa
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ekilípisi ya mobimba: likambo ya kokamwisa
  • Lolenge ba Jésuites basalelaki ekilípisi ya moi
  • Astronomi kati na Biblia
  • “Mokolo oyo butu eyindaki na moi”
    Lamuká!—2008
  • “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?—Eteni 2
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Oyo azalaki solo Mwana na Nzambe”
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 12-14

Ekilípisi ya Moi: Astronomi ya kokamwisa

MOKOLO ya 10 Máí 1994 ezalaki mokolo oyo mokeseneki na misusu mpo na Baameriké mosusu ya Nɔ́rdi. Ezalaki libaku ya komona ekilípisi ya moi.a Na boumeli ya mwa bangonga, likebi ya bamilió ya bato ebendamaki likoló na astronomi ya kokamwisa. Kasi, ekilípisi ezali mpenza nini?

Ekilípisi ezali “kolimwa ya ntango moke ya monzɔ́tɔ moko, oyo esalemaka ntango monzɔ́tɔ mosusu ya likoló etɛlɛmi kati na yango mpe eutelo ya kongɛnga to kati na monzɔ́tɔ yango mpe esika ya kotalela yango.” (Le Grand Robert de la langue française) Ekilípisi ya moi to ya sanza ekoki kosalema bobele soki mabelé, moi mpe sanza etɛlɛmi molɔngɔ́ semba to mwa semba. Engebene monzɔ́tɔ oyo mobombami, ekoki kozala to ekilípisi ya moi to ekilípisi ya sanza. Ntango elílí ya mabelé ekómi na sanzá, ezali bongo ekilípisi ya sanza. Nzokande, na sanza ya Máí ya mobu moleki, ezalaki sanza nde etindaki elílí na yango na mabelé na kolandáká etando ya semba ya bolai ya bakilomɛtɛlɛ 230 kino 310. Na meko oyo ete sanza etɛlɛmi kati na mabelé mpe moi, ezipi pene na moi nyonso. Elílí ekatisi Mai monene ebéngami Pacifique, na nsima eleki na Amerika ya Nɔ́rdi, ya Súdi-Wɛ́sti kino na Nɔ́rdi-Ɛ́sti. Baoyo batalaki likambo yango bamonaki lokola nde sanza ezalaki kokɛnyola moi. Nzokande, elílí ezalaki kotambola likoló na etando ya mabelé na lombangu ya bakilomɛ́tɛlɛ 3 200 na ngonga moko.

Bato bakamataki bisaleli ndenge na ndenge mpo na kotala ekilípisi kozanga kobebisa miso. Basusu basalelaki manɛ́ti ya bakangisi-mindɔlu (soudeurs), basusu kinyongela ya molili. Basusu batindikaki elílí ya ekilípisi na lidusu ya epɛ́ngɛlɛ likoló ya lokasa ya kayé. Mokangi-fɔtɔ́ moko asɛngaki na moto moko ete asimbela ye ekɔngɔleli na mpema; wana kongɛnga ezalaki kokɔta na madusu, bililingi mingi ya ekilípisi bizalaki komonana na mabelé. Nkasa ya nzeté esalaki mpe lolenge yango. Mwango mosusu ezalaki ya kotya jumelles epai na ekilípisi mpo na kotinda bililingi mibale oyo bizwami na esika ya molili.

Bikilípisi kino mitano ya moi mpe misato ya sanzá ekoki komonana mbula na mbula. Búku The International Encyclopedia of Astronomy emonisi ete “mbula na mbula, bikilípisi soko mibale ya moi esalemaka na lolenge moko to mosusu.” Nzokande, moko na moko emonanaka na bisika bikeseni. Yango wana Baameriké oyo bamonaki te ekilípisi ya mobu 1994 basengeli kozila mobu 2012 mpo na komona oyo ekolanda, to soki balingi komona ekilípisi oyo ekosalema liboso ya mbula yango basengeli kokende na Pérou, na Brésil to na Sibérie.b

Ekilípisi ya mobimba: likambo ya kokamwisa

Na bikeke bileki, ekilípisi ya mobimba ya moi, ntango sanza ezipaka moi na mobimba, ezalaki kopesa nsɔ́mɔ mpe kobimisa bobangi. Mpo na nini bongo? The International Encyclopedia of Astronomy elobi boye: “Likambo ya kokamwisa ya ekilípisi ya mobimba elendisami na likambo oyo ete moto oyo azangi koyekola ayebi te ndimbola monene ya likambo yango, mpamba te sanza ekoki komonana te ete ezali kobɛlɛma mpembeni ya moi.” Likambo yango lisalemaka boye: “Likoló eyindi, mingimingi emonanaka na minkɔ́lɔ́tɔ́ ya kobangisa mpe ya mpasi mpo na kolimbola yango, ya lángi ya mai ya mpɔndú; yango ekokani na eloko moko te na koyinda oyo eutaka na mapata. . . . Na boumeli ya ba secondes mibale ya eteni ya ndambo, kongɛnga ekitaka nokinoki, molungé mpe ekitaka na mbala moko, bandɛkɛ batɛlɛmaka, bafololo mosusu emikangisaka, mopɛpɛ ekitaka. . . . Molili ekómaka na zámba.”

Kati na búku na ye The Story of Eclipses (Lisoló ya Bikilípisi) (na Lingelesi), George Chambers azali kolobela “moko na bikilípisi oyo eyebani mingi na Moyen Âge, ekilípisi moko ya mobimba . . . , oyo emonanaki na Écosse” na mokolo ya 2 Augústo 1133. Guillaume de Malmesbury akomaki: “Mokolo wana, na ngonga ya motoba, moi ezingaki ngambo na yango ya kongɛnga na molekani, . . . kati na molili makasi, kobangisáká mitema ya bato na ekilípisi.” Búku moko ya kala, Anglo-Saxon Chronicle, emonisi ete “bato babangaki mingi mpenza mpe balɛngaki.”

George Chambers atángi mpe lisoló oyo lilobelamaki na batamboli mibale na Afrika, oyo litali ekilípisi ya sanza oyo esalemaki na mokolo ya 2 Sɛtɛ́mbɛ 1830: “Ntango sanza ebandi kozipama mokemoke, kobanga ezwaki moto nyonso. Wana ekilípisi ezalaki kokóba, kobanga mpe ezalaki kokóla epai na bato. Bato nyonso bakimaki mbangu na kobanga nyonso mpo na koyebisa na mokonzi na bango likambo oyo lizalaki kosalema, mpamba te ezalaki te na limpata moko na likoló mpo na kopesa molili makasi boye mpe ezalaki mpasi mpo na bango na koyeba eutelo to ndimbola ya ekilípisi.”

Na eleko na biso, boyebi kati na makambo ya astronomi epesi nzela na bato ete bálónga kobanga oyo eutaka na bikilípisi ya moi. Toyebi ete moi ekobima lisusu.

Lolenge ba Jésuites basalelaki ekilípisi ya moi

Na 1629, na Chine, bamisionɛrɛ ba jésuites bandimamaki na mokonzi na lisalisi ya ekilípisi. Na lolenge nini?

Ba Jésuites bamonaki ete “manáka ya sanza ya Chine ezalaki mabe, lokola yango ezalaki uta bikeke mingi. Baastronome ya Mokonzi bamikosaki mbala na mbala mpo na kolobela komonana ya bikilípisi ya moi . . . Libaku monene ya ba Jésuites emonanaki ntango bato bazalaki kozila ekilípisi na mokolo ya 21 Yuní 1629. Na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo wana, ekilípisi elobelamaki. Engebene basavá ya mokonzi, esengelaki komonana na 10 h 30 mpe koumela ngonga mibale. Nzokande, ba Jésuites, mpo na bango, balobaki ete ekosalema liboso ya 11 h 30 te mpe ekoumela bobele miniti mibale.” Likambo nini lilekaki?

“Wana mokolo yango ekómaki; ntango 10 h 30 ekokaki; eloko moko te esalemaki, moi ekóbaki sé kongɛnga. Baastronome ya Mokonzi bamikosaki, kasi ba jésuites bazali na elónga? Taláká na 11 h 30 mpenza, ekilípisi ebandaki. Eumelaki bobele miniti mibale lokola ba Jésuites balobelaki yango. Mokonzi akómaki sikawa kotyela bango motema.”​—The Discoverers, ya Daniel J. Boorstin.

Astronomi kati na Biblia

Biblia mpe elobelaka makasubo matali astronomi. Minzɔ́tɔ mingi milobelami kati na búku ya Yobo. Lisusu, Yehova azali kobyanga basaleli na ye ete bátalela likoló mpo na ntina na boyekoli ya astrolozi to na komipesa na losambo moko ya lokuta te, kasi nde mpo na komindimisa bonene ya bozalisi na ye. Yisaya apemamaki mpe akomaki: “Botombola miso na bino likoló mpe bomona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobianga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”​—Yisaya 40:26.

Yobo andimaki bonene ya Mozalisi ntango alobaki na ntina na ye ete “akobimisaka Asch [mbala mosusu Grande Ourse], akobimisaka Késil [mbala mosusu Orion, to moto ya bokila na likoló], akobimisaka Kimah [mbala mosusu ba Pléiades, kati na kobima ya Ngɔ́mbɛ ya mobali], mpe biteni ya ndako ya kati na epai ya Súdi [elingi koloba minzɔ́tɔ oyo mizali komonana na epai ya Súdi].”​—Yobo 9:7-9, NW.

Oyo nde esengo na koyekola astronomi na ntango Yehova akopesa likabo ya bomoi ya seko na bato oyo bazali kotosa ye! Basɛkɛlɛ́ ya etando ya likoló ekomonana mokemoke na meko oyo tokoyeba mikano ya Nzambe mpo na molɔ́ngɔ́ monene. Na bongo, tokokoka mpenza kozongela mpo na biso, mpe na nguya nyonso maloba ya Davidi: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala na misapi na yo, sanza mpe miɔtɔ na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana na moto nini ete otalela ye?”​—Nzembo 8:3, 4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba ekilípisi euti na liloba ya greke eʹklei·psis oyo ebimi na likelelo e·kleiʹpo, elimboli “kotika, kosundola.”​—Le Robert, dictionnaire historique de la langue française.

b Na Amerika ya Súdi, ekilípisi ya mobimba ya moi esalemaki na mokolo ya 3 Novɛ́mbɛ 1994 mpe yango emonanaki na biteni mingi ya Amerika ya Súdi.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]

Fɔtɔ́: Na ndingisa ya NASA/Finley-Holiday Film Corporation

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto