Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Octobre lok. 31
  • Farmasi ya Mai Monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Farmasi ya Mai Monene
  • Lamuká!—1995
  • Masolo mosusu
  • Bankisi ya banzete—Okoki komisalisa na yango?
    Lamuká!—2004
  • Mposa ya koluka bankisi ya sika
    Lamuká!—1994
  • Ba-océan
    Lamuká!—2023
  • Salelá nkisi ya monganga na likebi
    Lamuká!—1996
Lamuká!—1995
g95 Octobre lok. 31

Farmasi ya Mai Monene

Euti na mokomani na biso na Canada

BANKISI ya monganga eutaka wapi? Na ntembe te, nokinoki tokozongisa maloba ete eutaka na banzeté mpe na matiti. Nzokande, Monganga Michael Allen, akomi kati na zulunalo The Medical Post eutelo oyo eyebanaka te ya bankisi​—mai monene.

Ya solo, yango ezali likambo ya sika te; na boumeli ya bikeke mingi ba Chinois basalisaka makɔnɔ na biloko mosusu oyo eutaka na mbisi. Mpe, mafuta ya libalé ya mbisi oyo ebéngami morue, bazalaki kosalela yango uta kala, lokola mikóló bakoki kotatola mpo na yango. Nzokande, toyebi makambo moke mpo na makoki ya kobikisa ya biloko oyo bizali kati na mai monene soki tokokanisi yango na bankisi oyo toyebi, oyo euti na banzeté mpe na matiti.

Kasi, biloko oyo basili komona ezali kokamwisa. Na ndakisa, eloko moko babimisaka yango na libumu ya mbúbu (poisson globe), bakoki kosalisa na yango bokɔnɔ ya likóko (asthme). Nucléosides oyo ezwami kati na ba biloko oyo ezalaka kati na mai babéngi éponges epesi nzela na vidarabine, ezali antiviral. Algue brune ebimisaka stypoldione, elɛmbisaka kokabwana ya baselile, basalelaka yango mpo na kansɛr. Mpe yango ezali bobele ebandeli!

Nzokande, nkisi ya malamu koleka ezali kati na farmasi ya mai monene te. Bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa esakweli oyo: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.”​—Yisaya 33:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto