Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril nk. 16-18
  • Mboka ya kokamwisa Éthiopie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mboka ya kokamwisa Éthiopie
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato mpe bizaleli na bango
  • Mpo na oyo etali mambi ma nsé
  • Zámba na yango
  • Tyelá Yehova motema mpo na kozwa toli mpe libateli
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Nazali na esengo na bondeko ya solo ya mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Toli ya Yehova mpo na kotɛmɛla bikólo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Esengo oyo mosala ya Jéhovah ememelaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Lamuká!—1996
g96 Avril nk. 16-18

Mboka ya kokamwisa Éthiopie

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ÉTHIOPIE

NA BOUMELI ya bambula mingi Éthiopie eyebanaki lokola bokonzi oyo ebombaná. Mpe na ntango eyaki koyebana, lelo oyo bobele bato moke bayebi lisoló na yango ya kokamwa, mitindo ndenge na ndenge ya bato mpe ya bizaleli, bakisá bisobe na yango ya kokamwa. Na motángo ya bato koleka milió 50​—pene na motángo ya bafandi ya France​—ezali mboka oyo esengeli mpenza kobenda likebi na biso.

Emonani ete ezalaki Bagreke ya kala nde babimisaki liloba “Éthiopie,” elingi koloba “Mboka ya bilongi bizíka na moi.” Nzokande, lisoló na yango ya kala oyo litali makambo ya politiki lizingami na mibombamo mpe masapo. Bonkɔ́kɔ elobaka ete Éthiopie ezalaki na mabelé ya Seba ya kala oyo emonisami kati na lisoló ya Biblia mpe mokonzi na yango ya mwasi azalaki na bozwi mpe na lokumu oyo akendaki kotala mokonzi Salomo. Na yango, bayangeli mingi ya kala na Éthiopie bazalaki koloba ete bazalaki bakitani ya mobali moko abéngami Menelik, oyo alobami ete azalaki mombóto ya bolingo kati na Salomo mpe mokonzi-mwasi yango.

Nzokande, emonani mpenza ete Seba ezalaki na súdi-wɛ́sti ya Arabie.a Biblia elobeli Éthiopie na Makomami ya Liebele (“Bondeko ya kala”) mpe na Makomami ya Greke (“Bondeko ya sika”). Na ndakisa, Misala mokapo ya 8, ezali kolobela na ntina na “mokube” Moetiopia, mokonzi ya Leta oyo abongwanaki na losambo ya boklisto. Kasi, engebene bandelo ya lelo, Éthiopie ya liboso oyo elobelami kati na Biblia esangisaki eteni oyo lelo eyebani lokola Soudan.

Na ekeke ya misato na Ntango na Biso, bokonzi ya Aksum etyamaki na Éthiopie. Ekómaki na nguya mingi mpenza na nsé ya mokonzi ‛Ēzānā na ekeke ya minei. Ye moko mobongwani, ‛Ēzānā abongolaki mpe bokonzi na ye mobimba na lingomba ya “boklisto.” Éthiopie ezalaki na boyokani na mokili ya wɛ́sti na boumeli ya mwa ntango, kasi boyokani yango ekatanaki na ekeke ya nsambo. Búku The Encyclopedia Americana elimboli ete: “Na boumeli soko ya mbula 1 000 na nsima, Éthiopie etikalaki yango moko longwa na mokili mosusu ya boklisto kati na milende na yango ya kobunda yango moko na bamizilmá bilombe kobanda na nɔ́rdi kino ɛ́sti, mpe kobanda na babundisi bapakano oyo bautaki na súdi.” Bolóngi ya Bamizilmá ya Ezipito mpe Nubie ekabolaki Éthiopie na boklisto ya nkombo mpamba.

Na bokeseni na mikili misusu ya Afrika, Éthiopie ekɔtaki te kati na kokonzama na mikili ya Mpótó, longolá bobele boyangeli ya ntango mokuse ya Italie pene na ebandeli ya ekeke oyo mpe kobanda na 1935 kino 1941. Na 1974, basodá bakweisaki boyangeli ya kala. Kobanda 1991 boyangeli moko ya sika ebongolaki makambo na kokómisaka mokili yango na likoki ya koyokana na mikili ya bapaya. Litomba na yango ezali ete likoki emonani sikawa ya kotalela na mozindo mokili wana oyo kala ezalaki ya kobombana.

Bato mpe bizaleli na bango

Ezali mpasi mpo na kotalela bato nyonso ya Éthiopie bobele lolenge moko mpamba te mitindo kati na bango mizali mingi. Ezali na baoyo babéngami Afar, batambolitamboli oyo bazali koyengayenga na esobe ya moi makasi Danakil. Na wɛ́sti, ezali na baoyo babéngami Nilotiques, bato ya lomposo moindo makasi. Na súdi efandaka mingimingi baoyo babéngami Oromo. Baoyo babéngaka bango Amhara bafandi na bangomba ya ntei ya mboka yango, epai balónaka bilanga na likoló ya bangomba. Na yango, likambo ya kokamwa ezali te ete Éthiopie ezala na nkóta pene na 300. Bitúlúká na bitúlúká bazali na lolenge na bango ya kosala nsuki, lolenge na bango ya kolata, mpe lolenge na bango ya kotonga bandako. Kotonga bandako esalemaka na bambu oyo ebéngami tukuls, oyo eyebani mingi na súdi na bandako ya mabelé na ntei ya Ethiopie, mpe bandako ya etaze ya mabánga, na nɔ́rdi.

Ezali mpe na mitindo ndenge na ndenge ya kokamwisa ya bankombo ya bato. Bankombo yango ezali te bobele mwango ya kokesenisa bato, kasi oyo ezali lokola ya bapaya ezali na bandimbola mingimingi ya bafandi na mboka epai yango euti. Bana basi bakoki kozala na bankombo lokola Fikre (Molingami na ngai), Desta (Esengo), Senait (Boboto), Emnet (Kondima), Ababa (Folólo), Trunesh (Ozali malamu). Bandakisa mosusu euti na bankombo ya mibali ezali lokola Berhanu (Kongɛnga), Wolde, Mariam (Mwana mobali ya Marie), Gebre Yesus (Mosaleli ya Yesu), Haile Sellassie (Nguya ya bosato) Tekle Haimanot (Molóna ya lingomba).

Mingi kati na bankombo yango ezali kopesa endimiseli ya polele ya bopusi euti na lingomba Orthodoxe. Ya solo, losambo epalangani mingi kati na bizaleli nyonso ya bato na Éthiopie! Manáka ya basanza 13 etondi na bafɛ́ti ya losambo. Oyo eleki lokumu kati na nyonso ezali bongo Meskel, “Eyenga ya ekulusu” mpe Timkat, na kotambola na yango mpe kokembisama ya lángi ndenge na ndenge mpo na kosala elambo ya batisimo ya Klisto. Mpe ezali likambo ya kokamwa te ete misala ya ntɔ́ki na bonkɔ́kɔ ya Éthiopie ezwi moboko na yango na losambo.

Mpo na oyo etali mambi ma nsé

Botali na yo ya liboso na Éthiopie esengeli mpe kosangisa mambi ma nsé na yango. Esika oyo emonanaka ezali Great Rift Valley oyo ekaboli mboka na mibale na nzela na yango mpo na kokenda na Kenya. Na mipanzi na yango okomona maziba mingi ya mai ya mɔ́tɔ mpe mabanga ya madusu minene. Láki nsambo ya kitoko etandami na bolai na yango. Bangomba ya koleka bamɛtɛlɛ 2 000 emati na ngambo na yango kosukáká kino na nɔ́rdi ya bangomba ya Simyen. Yango ebéngami motɔ́ndɔ ya Afrika na nsɔ́ngɛ ya bolai koleka bamɛtɛlɛ 4 600! Bangomba milai mpe bonzenga ya bitando ya mabelé na yango ezali solo kitoko na kotala. Láki Tana mpe eutelo ya ebale Nil Bleu ezali mpe mosika te na esika wana. Ebale Nil Bleu ezali mpe na lobwaku na yango moko oyo epesaka mopɛpɛ na nzela na yango epai ya wɛ́sti ya Soudan. Pene na Láki Tana, ebale Nil Bleu emonisaka likambo moko kitoko​—bukubuku ya Tisissat, oyo ezali kosopana lokola bukubuku Victoria. Na nɔ́rdi-ɛ́sti, ngalasi ya lobwaku ya lángi ndenge na ndenge ezali kokembisa Danakil, esobe oyo ezwami na Afrika ya ngɛlɛ́. Ezali na nsé ya nivó ya mai monene.

Éthiopie ezali kobimisa mbuma ya milóna ndenge na ndenge kobanda na blé, orge, makemba, masangu, ntokia kino na raisin, ndimo mpe pilipíli, mindongo mpe bongo na bongo. Balobaka mpe ete Éthiopie ezali eutelo ya molona ya kafe mpe na mikolo oyo eyebani lokola mobimisi monene ya kafe. Mpe ezali na molóna mosusu oyo emonanaka mingimingi te na nkombo teff. Ezalaka lokola matiti mpe mbuma na yango banikisaka yango mpo na kobimisa Injera, molei ya moboko na mboka mobimba na Éthiopie. Injera esalemaka kati na fúlu moko mpe mbala mingi batyaka yango kati na lúngu ya monene, mesob oyo ekembisami. Lokola etyami na pavemá ya bandako mingi na Éthiopie, mesob ezali mpo na kosalela mpe mpo na kokembisa bisika!

Zámba na yango

Banyama nini ezali kati na zámba ya Éthiopie? Banyama mingi mpenza. Ya solo, Éthiopie ezali na mitindo ndenge na ndenge ya mboloko mpe nkosi kati na zámba na yango. Mitindo ya ndɛkɛ koleka 830 ezali na mokili wana, mosusu kati na yango emonanaka na mikili mosusu te.

Kati na banyama oyo eyebani mingi te tokoki kokuta Capra walie, ntaba ya ngomba oyo efandaka bobele likoló ya bangomba ya Simyen. Soko nkama mosusu efandaka ntango nyonso kati na mabwaku oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna. Bakoki kokatisa libulu monene kozanga kosɛlomwa. Ezali mpe na nyama bonzenga ebéngami Theropithecus gelada. Mpo na nsululu na yango milai mpe matɔ́ni ya lángi motane na ntólo na ye, ebéngamaka nkosi-makako mpe makako-ya-ntólo-makila. Ekosɛnga na yo te ete okenda mosika mpo na komona banyama. Ɛɛ, banzela ya Éthiopie mbala mingi etondaka na bakamela, mulet, ngɔ́mbɛ mpe mpunda!

Nzokande, mokili yango ezangi mikakatano te. Addis-Abeba, mboka-mokonzi ezali engumba etondi na bato ya mitindo ndenge na ndenge koleka milió moko. Kasi, ezali na bozangi ya bandako mpe ya mosala. Kokauka ya milóna mpe bitumba ya bana-mboka ezali kosala ete bato bázanga bisika ya kofanda, bákóma bibɔ́sɔ́nɔ́ mpe motuya monene ya mazengé mpe bitiké. Kati na mokili yango, Batatoli ya Yehova bazali kosala mingi mpo na kosalisa bafandi na Éthiopie básosola ete kosilisama ya mikakatano na bango ezali bobele Bokonzi ya Nzambe na nzela ya Yesu Klisto.​—Matai 6:9, 10.

Liboso na yango, Éthiopie ezali mokili mobongi na koyeba. Tokanisi ete mwa botali oyo moke elamwisi bosepeli na yo mpo ete otala yango lisusu malamu, mbala mosusu okosala mobembo yo moko mpo na kotala mokili wana ya kokamwisa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisoló “Seba” kati na búku Insight on the Scriptures, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Bililingi na lokasa 18]

“Mesob” esalelamaka mpo na kotya “injera,” molei ya moboko na Éthiopie

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto