Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/06 lok. 5
  • Makambo ekobonga na mikolo ezali koya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo ekobonga na mikolo ezali koya?
  • Lamuká!—2006
  • Masolo mosusu
  • Nsuka ya mabelé oyo ekómi pene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Kondima mpe bomoi na yo na mikolo mizali koya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya
    Makambo mosusu
  • Mabelé oyo mpasi esili kolongolama kati na yango
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Lamuká!—2006
g 1/06 lok. 5

Makambo ekobonga na mikolo ezali koya?

Bato balingaka koyeba ndenge makambo ekozala na mikolo ezali koya. Nani kati na biso akolinga te koyeba makambo oyo tokosala na sanza oyo ezali koya, na mbula to ata na bambula zomi oyo ezali koya? Soki tolobeli mokili mobimba, mokili oyo ekozala ndenge nini nsima ya mbula 10, 20, to 30?

OZALAKA na elikya ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya? Bamilio ya bato bazali na elikya yango, mpe tokoki kokabola bango na bituluku mibale: baoyo balobaka ete bazali na bantina ya solosolo oyo endimisaka bango ete makambo ekobonga, mpe baoyo bazalaka na elikya kaka mpo esika mosusu ya kotya motema ezali te.

Ya solo, bato mosusu bandimaka te ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya. Kati na bango, ezali na bato oyo basakolaka kaka makambo ya mabe, baoyo emonanaka lokola ete, bayokaka esengo ya kosakola ete mabelé oyo ekosuka na kolimwa. Mpo na bango, na mikolo ezali koya, kaka mwa bato moke nde bakobika to moto akobika te.

Ndenge nini yo otalelaka mikolo ezali koya? Okanisaka ete makambo ekobonga te, to omonaka ete kimya mpe kobatelama ekozala? Soki omonaka ete kimya mpe kobatelama ekozala, nini etindaka yo ozala na elikya yango​—⁠ezali makanisi mpamba to ozali bantina ya solosolo?

Na kokesene na bato oyo basakolaka kaka makambo ya mabe, babimisi ya Lamuká! bandimaka ete bato bakosila te na mokili oyo. Nzokande, Biblia epesi ntina ya solosolo oyo ezali kondimisa biso ete mikolo ya malamu ezali liboso na biso.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

U.S. Department of Energy photograph 

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto