Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Mpo na nini namizokisaka?
“Namizokisaki bampota minene na mabɔkɔ mpe esɛngaki bátonga yango. Nayebisaki monganga ete namizokisi na molangi ya ampulɛ, mpe ezalaki solo, kasi nalobaki te ete nasalaki yango na nko.”— Sasha, 23.
“Baboti na ngai bamonaki bampota oyo namizokisaki, kasi kaka oyo ezalaki minene te mpe emonanaki lokola mposo mpamba elongwe. . . . Soki bamoni ngai na mpota mosusu, nakokosa bango. . . . Nalingi bayeba te.”— Ariel, 13.
“Nabandaki komizokisa ntango nazalaki na mbula 11. Nayebaki oyo mobeko ya Nzambe elobaka mpo na nzoto ya moto, atako bongo nazalaki kotika te.”— Jennifer, 20.
OKOKI koyeba moto moko oyo asalaka likambo oyo Sasha, Ariel to Jennifera basalaka. Moto yango akoki kozala moninga na yo ya kelasi. Ekoki kozala ndeko na yo. Ekoki mpe kozala yo moko. Lapolo moko emonisi ete kaka na États-Unis, bankóto ya bato, oyo mingi kati na bango bazali bilenge, bamizokisaka, bamizikisaka, bamiswaka, bamingulutaka mposo na nko.b
Bato bazali komizokisa na nko? Na ntango ya kala, bato mingi bazalaki kotalela komizokisa lokola mopɛpɛ moko ya sika oyo bato bazali kolanda to lokola losambo. Kasi na bambula oyo, likambo ya komizokisa to komikata mpota ekómi mingi. Bato oyo bazali kosala bongo bakómi mingi mpenza. Michael Hollander, mokambi ya lopitalo moko na États-Unis alobi boye: “Minganga nyonso bazali koloba ete likambo yango ezali se koya monene.”
Mbala mingi, Bato oyo bamizokisaka bakufaka te kasi, ezali likama monene. Tózwa ndakisa ya Beth, ye alobi boye: “Namizokisaka na zilɛti. Nakɔtaki lopitalo mbala mibale. Mbala ya liboso batyaki ngai na esika ya bato oyo basengeli kosalisa bango nokinoki, mpamba te namizokisaki mpota monene.” Lokola bato mingi oyo basalaka yango, Beth akobaki komizokisa tii ntango akómaki mokóló. Alobi boye: “Nabandaki kosala yango ntango nazalaki na mbula 15 mpe tii lelo oyo nakómi na mbula 30.”
Yo mpe omizokisaka to moto mosusu oyo oyebi? Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Okoki kozwa lisalisi. Na nimero ya Lamuká! oyo ekolanda, tokolobela ndenge ya kosalisa bato oyo bamizokisaka.c Kasi, libosoliboso ekozala malamu tólobela bato oyo bamizokisaka mpe mpo na nini basalaka yango.
Bato oyo bamizokisaka bakeseni
Bato oyo bamizokisaka bazalindenge moko te. Basusu bazali bana ya mabota oyo ezali na mikakatano, basusu mpe bazali bana ya mabota ya malamu mpe ya esengo. Basusu balongaka te na kelasi, kasi mingi mpe bazalaka bana ya mayele. Mbala mingi, bato oyo bamizokisaka balingaka mpenza te komonisa likambo oyo ezali kotungisa bango, mpamba te moto oyo azali na mikakatano amonisaka yango ntango nyonso te. Biblia elobi ete: “Ata kati na koseka, motema ezali na mawa.”—Masese 14:13.
Lisusu, bato nyonso oyo bamizokisaka, basalaka yango ndenge moko te. Na ndakisa, lapolo moko emonisi ete bato mosusu bamizokisaka kaka mbala moko na mbula, kasi basusu basalaka yango mbala mibale na mokolo. Kutu, bana mibali bakómi komizokisa mingi koleka ndenge bato bazalaki kokanisa. Kasi, likambo yango esalemaka mingi nde epai ya bilenge basi.
Atako bato oyo bamizokisaka bakeseni, basusu bakokanaka na makambo mosusu. Buku moko oyo elobeli bilenge elobi boye: “Mbala mingi, bilenge oyo bamizokisaka bamiyokaka ete bakoki kosala eloko moko te, bakokaka te komonisa mpasi na bango epai ya bato mosusu, bamimonaka ete bazali bango moko, balingaka bango te, babangabangaka mpe bamiyokaka ete bazali na ntina moko te.”
Ya solo, bato mosusu bakoki koloba ete bizaleli wana ekoki komonana epai ya bilenge nyonso oyo bamitungisaka na makambo oyo ekómelaka bango ntango bazali kokola. Kasi, mpo na bilenge oyo bamizokisaka, mokakatano yango ezalaka mpenza monene. Soki moto azali kokoka te koloba ndenge oyo azali komiyoka mpe koyebisa moninga ya motema mitungisi na ye, yango ekoki kobimisa mikakatano na kelasi, na esika ya mosala mpe mikakatano ya makasi na libota. Moto yango amonaka ete makambo na ye ekoki kosila te mpe azangi moto ya kosololisa ye. Motungisi ekoleka ye motó. Nsukansuka, amonaka likambo moko ya sika: Soki amizokisi, mitungisi na ye esila mwa moke mpe akoki koyoka mwa malamu mpo na mwa ntango.
Mpo na nini moto amiyokisaka mpasi na nzoto mpo na kosilisa mitungisi na ye? Tózwa ndakisa, kanisá naino soki monganga azali kotuba yo ntonga. Okomifina esika moko to okomitya manzaka mpo oyoka mpasi ya ntonga te. Bato oyo bamizokisaka basalaka mpe bongo, atako ndenge oyo bango basalaka ezalaka na likama. Bamonaka ete komizokisa esalaka ete bábosana mpasi mpe elongola motungisi oyo bazali koyoka. Bamonaka ete mpasi ya makanisi ezali makasi koleka mpasi ya nzoto. Mbala mosusu, ezali mpo na yango nde moto moko oyo amizokisaka abengaki yango “nkisi mpo na kolongola kobanga.”
“Ndenge ya kolonga mitungisi”
Mpo na bato oyo bayebaka maladi yango malamu te, bamonaka komizokisa lokola koluka komiboma. Kasi, ezalaka ntango nyonso bongo te. Sabrina Solin Weill, mokomi ya zulunalo moko ya bilenge alobi boye: “Mbala mingi, bato oyo bamizokisaka balukaka nde kosilisa mpasi na bango, kasi komiboma te.” Yango wana, buku moko elobi ete komizokisa ezali lokola “ ‘eloko oyo ebatelaka moto mpo azinda na mai te’ kasi te esaleli mpo na komiboma.” Babengaka yango lisusu “ndenge ya kolonga mitungisi.” Mitungisi ya lolenge nini?
Emonani ete bato mingi oyo bamizokisaka banyokwamaka na mpasi moko boye, ekoki kozala ete banyokolaki bango na bomwana to basundolaki bango. Mpo na basusu, kozanga boyokani kati na libota to milangwa ya tata to mama. Mpo na basusu, ezalaka maladi ya motó.
Bantina mosusu mpe ekoki kozala. Na ndakisa, Sara azalaki kominyokola mpo azalaki koluka kosala makambo na makambo na ndenge ya kokoka te. Asalaki mabunga ya minene mpe azwaki lisalisi ya bankulutu, kasi azalaki komitungisa mpo na mwa mabunga ya mokolo na mokolo. Sara alobi boye: “Namonaki ete esɛngaki ‘namipesa disiplini.’ Mpo na ngai, komizokisa ezalaki nde komipesa disiplini. Mpo na ‘komipesa disiplini,’ nazalaki komipikola nsuki, komizokisa na mabɔkɔ, komibɛtabɛta, komizokisa bampota minene, natyaki mabɔkɔ na mai ya mɔtɔ lokola etumbu, kofanda libándá na malili makasi kozanga komizipa, to komipimela kolya mokolo mobimba.”
Sara, azalaki komizokisa mpo na komonisa ete azali komiyina makasi. Alobi boye: “Na bantango mosusu, nazalaki koyeba ete Yehova alimbisaki mabunga na ngai, kasi nalingaki te alimbisa ngai. Nalingaki nanyokwama mpo nazalaki komiyina mpenza. Atako nayebaki ete Yehova abongisá te esika moko ya konyokola lokola lifelo, ndenge mangomba ya boklisto eteyaka, nalingaki ete Yehova asala yango mpo na ngai.”
“Bantango ya ndenge mosusu”
Bato mosusu bakoki komituna mpo na nini ezaleli ya mabe boye eyebani kaka na bambula oyo. Nzokande, bayekoli ya Biblia bayebi ete tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Yango wana, bakamwaka te ntango bazali komona bato, ata mpe bilenge, bazali kosala likambo ya ndenge wana.
Biblia elobi ete: “Minyoko ekokómisa moto ya mayele na bolema.” (Mosakoli 7:7) Mikakatano ya bolenge, ntango mosusu makambo ya mpasi oyo moto akutaná na yango, ekoki kozala ntina oyo ezali kotinda bato mosusu bámipesa na misala mabe lokola komizokisa. Elenge oyo amonaka ete azali kaka ye moko mpe azangi moto ya kosolola na ye, akoki komizokisa mpo abosana motungisi wana. Kasi, lisalisi nyonso oyo komizokisa ekoki kopesa ezali kaka mpo na ntango moke. Nsukansuka, makambo yango ezongaka lisusu.
Mbala mingi, bato oyo bamizokisaka balukaka kotika momeseno yango, kasi ezalaka mpasi mpenza. Bato mosusu basalaki nini mpo na kotika komizokisa? Tokolobela yango na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” “Ndenge nini nakoki kotika komizokisa?” na Lamuká! ya Febwali 2006 (na Lifalanse).
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
b Komizokisa ekeseni na kotɔbɔla mbɛbu to zolo mpo na kolata biju to mpe kokata nzɔlɔkɔ, oyo bato basalaka mpo na kolanda mode, yango ezalaka te mposa ya moto ye moko. Tálá Lamuká! ya 8 Augusto 2000, nkasa 18-19.
c Levitike 19:28 elobi boye: “Bokokata nzoto na bino mpo na bakufi te.” Momeseno wana oyo bapakano bazalaki kosala na likanisi ete bazali kokitisa mitema ya banzambe oyo bazali na bokonzi likoló na bato oyo bakufá, ekeseni na momeseno ya komizokisa oyo tozali kolobela awa.
MITUNA YA KOMANYOLA
◼ Mpo na nini bilenge mosusu bamizokisaka?
◼ Nsima ya kotánga lisolo oyo, makanisi nini ya malamu ekoki kosalisa yo osilisa mitungisi na yo?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]
“Ata kati na koseka, motema ezali na mawa.”—Masese 14:13
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]
“Mbala mingi, bato oyo bamizokisaka balukaka nde kosilisa mpasi na bango, kasi komiboma te”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.”—2 Timote 3:1