Michael Agricola—“Moto oyo afungolaki nzela”
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA FINLANDE
“Buku moko te ebongolá mpenza mimeseno, bizaleli, mpe makanisi ya bato ya Finlande koleka Biblia.”—“Biblia 350—The Finnish Bible and Culture.”
OSILÁ kotánga Biblia na monɔkɔ ya mboka na bino? Ekoki kozala ete osilá kotánga yango. Kutu, Biblia ebongolamá—mobimba to ndambo—na minɔkɔ koleka 2 000. Kasi, mabongoli yango ebimaki yango moko te. Banda kala, ebele ya mibali mpe basi basalaki mosala makasi ya kobongola Biblia na minɔkɔ oyo bato mingi balobaka na etúká moko to ekólo moko, atako bakutanaki na mikakatano ya minene. Moko na bango ezali Michael Agricola.
Agricola azalaki moto ya mayele oyo asalaki mosala ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Finnois. Babuku oyo akomaki esalisi bato ya ekólo Finlande bákóma na mimeseno oyo bazali na yango lelo. Tokoki kokamwa te soki babengi ye Moto oyo afungolaki nzela!
Agricola abotamaki soki na mobu 1510 na mboka Torsby na sudi ya ekólo Finlande. Tata na ye azalaki na ferme, yango wana bapesá ye nkombo Agricola, oyo euti na liloba ya Latin mpe elimboli “mosali-bilanga.” Lokola Agricola akolaki na esika oyo bazalaki koloba minɔkɔ mibale, emonani ete azalaki koloba monɔkɔ ya Suédois mpe ya Finnois. Ayekolaki monɔkɔ mosusu ya misato ntango atángaki na eteyelo moko ya Latin na engumba Vyborg. Na nsima, akendaki kofanda na Turku, engumba-mokonzi ya ekólo Finlande na eleko wana; kuna akómaki sɛkrɛtɛrɛ ya Martti Skytte, episkɔpɔ ya lingomba ya Katolike na ekólo Finlande.
Lingomba mpe politiki na ntango na ye
Na eleko ya Agricola, bikólo ya Scandinavie ezalaki na yikiyiki. Ekólo Suède ezalaki koluka na ndenge nyonso emilongola na Lisangá ya Kalmar, oyo esangisaki bikólo ya Scandinavie. Na mobu 1523, Gustav I akómaki mokonzi ya ekólo Suède. Yango ebongolaki makambo mingi na Finlande, oyo na ntango wana ezalaki etúká ya ekólo Suède.
Mokonzi wana ya sika azalaki kosala nyonso mpo na kofandisa bokonzi na ye. Mpo na kokokisa mikano na ye, akɔtaki na Lingomba ya Protesta, oyo ezalaki kopalangana na Mpoto ya nɔrdi mobimba. Lokola alongolaki lingomba ya Katolike ete ezala lisusu te lingomba ya ekólo mpe na esika na yango, atyaki lingomba ya Protesta, akataki boyokani nyonso elongo na Pápá, atyolaki bokonzi ya baepiskɔpɔ ya lingomba ya Katolike, mpe abɔtɔlaki biloko ya lingomba. Tii lelo, bato mingi ya ekólo Suède mpe ya ekólo Finlande bazali bandimi ya lingomba ya Protesta.
Mokano ya lingomba ya Protesta ezalaki ya kosala milulu ya losambo na minɔkɔ ya mboka mokomoko, na esika ya kosala yango na Latin. Na yango, na mobu 1526 babimisaki Makomami ya Grɛki ya Boklisto, to “Kondimana ya Sika” na monɔkɔ ya Suédois. Nzokande na ekólo Finlande, lingomba ya Protesta ezalaki kopalangana malɛmbɛmalɛmbɛ. Na ntango wana, moto moko te azalaki kokanisa kobongola Biblia na monɔkɔ ya Finnois. Mpo na nini?
Mosala “makasi mpe ya mpasi”
Ntina monene ezalaki ete na ntango wana, mikanda ezalaki mpenza te na monɔkɔ ya Finnois. Liboso ya bambula ya 1500, bakomaki kaka mwa ndambo ya mabondeli ya lingomba ya Katolike na monɔkɔ yango. Yango wana, mosala ya kobongola Makomami Mosantu na monɔkɔ ya Finnois esɛngaki liboso kozwa ndenge ya kokoma maloba mingi, bakisá mpe kobimisa maloba ya sika mpe elobeli ya sika. Mpe yango esengelaki kosalema kozanga mikanda lokola diksionɛrɛ to babuku ya gramɛrɛ. Atako bongo, Agricola abandaki kobongola Biblia!
Na mobu 1536, Skytte, episkɔpɔ ya lingomba ya Katolike na ekólo Finlande, atindaki Agricola na engumba Wittenberg, na ekólo Allemagne, akenda kokoba kotánga kelasi na ye ya teoloji mpe koyekola minɔkɔ na bozindo. Na kotalela masolo mosusu, ezali na engumba wana nde Luther akɔtisaki mbongwana monene mbula 20 liboso mpe abakaki mokanda oyo akomaki makanisi 95 na porte ya ndako-nzambe.
Ntango Agricola azalaki na Wittenberg, asukaki kaka na kotánga kelasi te. Abandaki mpe mosala monene ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Finnois. Na mokanda moko oyo atindelaki mokonzi ya Suède na 1537, akomaki boye: “Lokola Nzambe azali kopambola kelasi na ngai, nakomeka, ndenge nabandaki yango liboso, kokoba kobongola Kondimana ya sika na monɔkɔ ya bato ya Finlande.” Ntango azongaki na Finlande, akobaki mosala na ye ya kobongola Biblia; kaka na ntango wana azalaki mpe mokambi ya eteyelo moko.
Kobongola Biblia ezalaki mosala makasi mpo na Agricola, kaka ndenge ezalaki mpo na bato mosusu oyo babongolaki Biblia liboso na ye. Ata Luther alobaki boye: “Oyo nde mosala makasi mpe ya mpasi kotinda na makasi bakomi ya Liebele báloba monɔkɔ ya Allemand!” Na ntembe te, Agricola ayekolaki makambo mingi na Babiblia oyo bato mosusu babongolaki, kasi mokakatano eleki monene oyo akutanaki na yango ezalaki mpo na monɔkɔ ya Finnois. Bakomaki naino monɔkɔ yango mpenza na mikanda te!
Na bongo, ezalaki lokola nde Agricola azalaki kotonga ndako oyo bapesi ye plan na yango te, bapesi ye biloko nyonso ya kotonga ndako te mpe batye yango esika moko te. Ndenge nini asalaki yango? Agricola abandaki naino kosangisa maloba ya monɔkɔ ya Finnois ndenge bazalaki koloba yango na bisika ekeseni mpe kokoma yango ndenge ezalaki koyokana na matoi. Emonani lokola ete Agricola azalaki moto ya liboso ya kobimisa maloba oyo elandi na monɔkɔ ya Finnois: “guvɛrnema,” “mokosi,” “maniskri,” “basoda,” “ndakisa,” mpe “mokomeli.” Adefaki mpe maloba na minɔkɔ mosusu, mingi mpenza na monɔkɔ ya Suédois. Na maloba ya sika oyo abimisaki, tokoki kotánga: enkeli (anzelu), historia (masolo ya kala), lamppu (mwinda), marttyyri (martiru), mpe palmu (mbila).
Liloba ya Nzambe mpo na bato ya mboka na ye
Nsukansuka, na mobu 1548, Agricola abimisaki eteni ya liboso ya Biblia oyo abongolaki, na nkombo Se Wsi Testamenti (Kondimana ya Sika). Bato mosusu balobaka ete libongoli yango esilaki mbula mitano liboso kasi kozanga mbongo nde esalaki ete abimisa yango noki te. Ekoki kozala ete Agricola asalaki ndambo monene ya mosala ya kobimisa Biblia yango na mbongo na ye moko.
Mbula misato na nsima, abimisaki Dauidin Psaltari (Nzembo), oyo emonani lokola ete baninga na ye mosusu basalisaki ye na mosala ya kobongola yango. Atambwisaki mpe mosala ya kobongola babuku ya Moize mpe babuku ya basakoli oyo ezali na Makomami ya Liebele.
Agricola ayebaki bandelo na ye, yango wana na komikitisa nyonso, akomaki boye: “Tiká ete Moklisto nyonso mpe moto nyonso oyo abangaka Nzambe to motángi nyonso ya Buku Mosantu oyo, soki amoni na libongoli oyo libunga to esika moko oyo ebongolami malamu te to oyo ebimi mpenza polele te, alandela yango te, mpo esalemi na moto oyo azali naino koyekola mosala.” Atako mwa mabunga ya mikemike ekoki kozala na libongoli ya Agricola, esengeli mpenza kopesa ye longonya na milende oyo asalaki mpo na kobongola Biblia na monɔkɔ ya bato ya mboka na ye.
Libula oyo Agricola atiká
Na ebandeli ya 1557, Agricola—oyo na ntango wana azalaki episkɔpɔ ya lingomba ya Protesta na engumba Turku—aponamaki mpo na kozala kati na bato oyo batindaki bango na engumba Moscou mpo na kokata likambo ya ndelo ya bikólo mibale, Suède mpe Russie. Bakataki likambo yango. Kasi, emonani ete mobembo ya mpasi oyo Agricola asalaki mpo na kozonga epai na ye nde ebɛlisaki ye maladi ya mbalakaka. Akufaki na nzela ntango azalaki kozonga, wana azalaki na mibu 47.
Na bomoi na ye mobimba, oyo eumelaki mpenza te, Agricola akomaki babuku zomi na monɔkɔ ya Finnois, oyo soki tosangisi yango ekoki kosala nkasa 2 400. Atako bongo, bato mingi bandimaka ete “Moto wana oyo afungolaki nzela,” asalaki mosala monene mpo na kobongola mimeseno ya bato ya Finlande. Kobanda wana, bato bakómá kokoma mikanda na monɔkɔ ya Finnois mpe bato oyo balobaka monɔkɔ yango bakómá kosalela yango na makambo ya ntɔki mpe ya siansi.
Likambo ya ntina mingi ezali ete Michael Agricola apesaki mabɔkɔ mpo na kofungola nzela na likambo mosusu, na ndenge asalaki ete pole ya Liloba ya Nzambe engɛngɛla bato oyo balobaka monɔkɔ ya Finnois. Yango emonisami na mokuse na maloba ya ntɔki oyo bakomaki na Latin mpo na kokanisa ye nsima ya liwa na ye: “Liboso ya kokufa, atikaki testama te. Na esika ya testama, atikaki nde buku oyo abongolaki—abongolaki buku mosantu na monɔkɔ ya Finnois—mpe buku yango ebongi kozwa lokumu mingi.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 23]
Biblia na Finnois
Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Finnois, oyo Agricola abongolaki eteni monene na yango, ebimaki na 1642. Na nsima, ekómaki Biblia oyo bazalaki kosalela na Lingomba ya Protesta na Finlande mobimba. Nsima ya bambula, babongisaki mwa bisika mosusu na Biblia yango, kasi ebongwanaki mpenza te tii na 1938. Mbala ya nsuka oyo babongisaki lisusu Biblia yango mpe babimisaki yango ezalaki na 1992.
Biblia mosusu oyo ebongolami mobimba na monɔkɔ ya Finnois, ezali kaka Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, oyo Batatoli ya Yehova babongoli. Ebimaki na mobu 1995. Mbula ntuku mibale liboso, na 1975, Batatoli babimisaki libongoli na bango ya Makomami ya Grɛki ya Boklisto. Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebongoli makomi ya ebandeli na bosembo mpenza. Lelo oyo, Babiblia nyonso oyo ebimi na libongoli yango ezali soki milio 130.
[Elilingi na lokasa 22]
Michael Agricola mpe Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Finnois. ‘Carte postale’ moko ya 1910
[Eutelo ya bafɔtɔ]
National Board of Antiquities/Ritva Bäckman
[Elilingi na lokasa 23]
“Kondimana ya Sika” ya Agricola
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
National Board of Antiquities