LOYEMBO 66
Tósakola nsango malamu
Ya Papye
1. Kala, babombaki solo ya Bokonzi.
Sikoyo Mokonzi n’ango ayebani.
Yehova, na mawa na ye mpe bolingo,
Andimi kosikola moto na liwa.
Aponi Yesu mpo akamba mabele;
Mpe Bokonzi ebotami
na ngonga atye.
Abongisi mpe mwasi mpo na Mwana n’e,
Lokumu n’etonga moke, mpe esengo.
2. Nsango tosakolaka eza’ ya kala.
Lelo nde Nzambe alingi eyebana.
Baanzelu baza’ kosala ná biso,
Kosunga ntango toza’
kopanza nsango.
Tozwi mokumba mpe lokumu monene:
Kosantisa, kokumisa nkombo ya Nzambe.
Eza’ lokumu komema nkombo yango
Mpe kosakola nsango malamu’a seko.
(Talá mpe Mrk. 4:11; Mis. 5:31; 1 Ko. 2:1, 7.)