Basakoli ya nsango malamu bazali kobuka mbuma kati na mokili mobimba
“Lokola makonga ya montre mazali kobelemisa biso na Armagedon, ba Témoins de Jéhovah bazali komipesa koleka mpo na kobikisa ntalo monene kati na biso na libomi monene oyo.”—Lisolo ya Ian Boyne kati na “The Sunday Gleaner”, 15 mars 1987, Kingston, Jamaique.
MOKOMI oyo alobelami awa na likolo amikosi te. Ba Témoins de Jéhovah bandimi ete ntango ebelemi oyo Nzambe akoboma bato mabe na Armagedon, mpe mokili ezali kobika sikawa na eleko moko ya lisambisi ya Nzambe. (Emoniseli 14:6, 7) Yango emonisi ntina ya basakoli mpo na komema nsango malamu. Yesu Klisto, mosakoli na nsango malamu aleki monene, azalisaki lisangá moko oyo ememaki nsango malamu na ekeke ya liboso “kino na nsuka na mokili”. (Misala 1:8; Bakolose 1:23) Asakolaki ete mosala ya kosakola motindo yango ekosalema mpe na eleko na biso. (Matai 24:14) Lisangá oyo ezali kokokisa mokumba yango lelo oyo ezali bongo oyo ya ba Témoins de Jéhovah, baoyo bazali kosakola na molende nyonso nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe kati na mikili 208.
Nzokande, ba Témoins de Jéhovah babongisami bobele mpo na kosakola te. Babongisami mpe lisusu mpo na koteya. Yesu apesaki epai na baoyo bazali kolanda ye mokumba ya ‘kozalisa bato ya mabota nyonso bayekoli, na koteyaka bango ete batosa makambo nyonso oyo alakaki bango’. (Matai 28:19, 20) Tolingi totangela bino mwa bato oyo bazwaki bolamu mpo na nsango malamu mpe mateya ya bayekoli na Klisto.
Mexique
Virginia azali na mibu 110, mpe alingi koyebisa bino ete “ata soko moto akomi na mbula nini, akoki kosalela Jéhovah”. Wana ezalaki ye elenge mwasi, abandaki mpenza kobanga Nzambe na boye ete alataki bilamba ya mamelo na boumeli ya mibu 4. Kasi alobi ete: “Azalaki kozanga eloko moko.” Azalaki kozwa biyano ata esika moko te mpo na mituna na ye ya Biblia. Na ndakisa, ntango azalaki kotuna epai na balakisi ya Lingomba na ye soko nkombo ya Nzambe ezalaki nani, bazalaki koyanola ye: “Nkombo ya Nzambe, ezali Nzambe.”
Kasi makambo manso mabongwanaki na 1983, ntango nkoko na ye ya mwasi abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Ayanolaki na motuna na ye mpo na koyebisa ye ete nkombo ya Nzambe ezali Jéhovah. (Nzembo 83:18) Eyano yango etindaki Virginia ayekola Biblia elongo na Batemwe. Mbula mibale na nsima, le 2 juin 1985, azwaki batisimo. Azalaki na mibu 108.
Alobi boye: “Yango ezali date oyo namikundolaka yango na esengo nyonso, mpo ezali mokolo oyo nabandaki bomoi. Na mbula na ngai, nasakolaka ngonga mitano to motoba na sanza mpe natambolaka na nzete. Nasepelaka kotambola na makolo na esika ya komata na voiture. Yango esalisaka ngai mpo nazala na nzoto kolongono.”
Inde
Mobali moko oyo azalaki moombo ya makambo mingi ya mabe alobi boye: “Nazalaki vwayu. Nazalaki moteki drogue, mpe nazalaki kobeta lisano ya mbongo mpe nazalaki komela makaya oyo bakiliya na ngai bazalaki kolinga kopesa ngai. Mpe lisusu, nazalaki momeli ya masanga. Kasi ata bongo nazalaki molende kati na Lingomba na ngai.” Ntango mobali yango akutanaki na Témoin de Jéhovah moko, abandaki koyekola Biblia mpe kolanda batoli na yango, bomoi na ye ebongwanaki. (Masese 2:1-22; 2 Timote 3:16) Sikawa, mwasi na ye mpe ye moko elongo na bana na bango mibale, bazali kosalisa bato mosusu mpo na kosilisa bizaleli na bango ya mabe.
Belgique
Elenge moko ya mobali mpe mwasi na ye bayinaki mpenza Nzambe. Mpo na nini? Mwana na bango ya liboso (ya mwasi) akufaki wana ekokisaki ye mikolo 10 nsima na kobotama na ye. Mwana na bango ya mibale abotamaki ebosono. Oyo ya misato, amonanaki lokola ete azalaki makasi mpe na nzoto kolongono, ayaki kokufa kozanga ntina na nsima ya sanza mitano. Mama yango akokaki kondima te ete Nzambe ya bolingo akoki kopesa nzela ete bamona bampasi motindo boye nzokande bato mingi oyo bazali na etamboli mabe bazali kobota bana na nzoto kolongono.
Nsima na mwa ntango, Témoin de Jéhovah moko oyo azalaki kosakola ndako na ndako na kartié ayaki kobeta porte ya mwasi yango. Amonisaki ye avenire nini ya esengo Nzambe alakaki epai ya bato, kasi azalaki koboya kondima ete Nzambe azali Tata moko ya makolo atondi na bolingo. (Nzembo 37:10, 11) Kasi, andimaki mwa mikanda mikolimbolaka Biblia. Ntango Témoin yango abandaki kozongela ye mbala na mbala, nsango malamu oyo ezwami na Biblia ekitisaki motema na ye mpe epesaki ye elikya epai na Nzambe. Sikawa, ye mpe mobali na ye bazali na elikya makasi ete Jéhovah akosilisa bokono ya mwana na bango oyo azali ebosono mpe akosekwisa lisusu bana na bango wana mibale kati na Paradis oyo ekozalisama awa na mabelé.—Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:1-4.
Portugal
Mokolo moko ya lomingo, mwasi moko akumbaki kitunga etonda na biloko atelemaki mpo na kosolola na mobali moko mpe mwasi na ye. Ezalaki mbala ya liboso oyo amonaki bango, kasi ezalaki mbala ya nsuka te. Na yango, ba Témoins de Jéhovah oyo bazalaki kosakola nsango malamu. Nsima na kokumisa mama yango ndenge azali kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye, batunaki ye motuna oyo: Nani akoki kokokisa bamposa ya mokili mobimba? Bango moko bayanolaki na komonisaka ete ezali Nzambe. (Nzembo 107:8, 9; Yisaya 33:24) Bongo mwasi yango atunaki boye: “Nzambe akoki kosilisa mikakatano na ngai?” Batemwe bandimaki Mwasi yango abengisaki bango epai na ye mpe abandaki koyekola Biblia elongo na bango. Komonaka mbongwana kati na etamboli na ye, mobali na ye mpe abandaki koyekola Biblia mpe mwa ntango na nsima abongolaki ezaleli na ye.
Nsima na mikolo, mwasi ayaki koyebisa epai na Batemwe ete amekaki komiboma mbala mibale liboso na mokolo ya lomingo na ntongo oyo bakutanaki na nzela. Mobali na ye mpe ye bazwaki ekateli ya kokabwana mpe yango ezalaki kotungisa ye mingi. Sikawa, mobali na ye, bana na bango mpe ye moko bazali na libota moko ya bomoko mpe oyo ezali kokola kati na boyebi ya nsango malamu.
Thailande
Mwasi moko afandaka na nord ya mboka yango, atungisamaki na boumeli ya bambula mingi na bilimu mabe. Ntango akutanaki na Témoin de Jéhovah moko oyo azalaki kosakola nsango malamu, andimaki mikanda mpe kobanda boyekoli ya Biblia na ndako. Nsima ya sanza mibale, akangaki ntina epesami na Biblia, mpo na yango asengelaki kolongola epai na ye biloko nyonso oyo eyokani na losambo na lokuta, lokola bikeko, mpe kotumba etumbelo na ye ya bilimu mabe, oyo ezalaki kobatela libota na ye na bilimu ya mabe. (Misala 19:19; 1 Bakolinti 10:21; 1 Yoane 5:21) Sikawa, azali lisusu kotungisama na bilimu mabe te; akoki bongo kolakisa epai na bato mosusu, Nzambe moko ya solo, Jéhovah.
Kenya
Ntango bayebisaki ye ete bapolisi bazwaki ndingisa ya kobeta ye masasi soki bamoni ye, mpo akomaki likama mpo na bato, mokonzi moko ya ba bandits asekaki likambo yango. Nzokande, mwa moke nsima, wana bamibongisaki mpo na kokende koyiba, makambo matambolaki mpenza ndenge bakanaki yango te, mpe mobali yango atikalaki ye moko liboso na etuluku na bato oyo balingaki koboma ye. Bapolisi bayaki na ntango yango, bakangaki ye mpe batyaki ye na boloko mpo na kozela ntango bakosambisa ye.
Avocat ya moto yango apesaki ye mayele mpo aboya kondima makambo bafundelaki ye. Kasi, wana ezalaki ye na boloko, moto yango akanisaki lisusu mpo na Témoin de Jéhovah moko oyo azalaki koya kotala ye na ndako mwa bambula mingi liboso. Abandaki koyoka mawa ndenge azangaki kotosa mobeko mpe abondelaki Nzambe ete asalisa ye. Mpo na yango, abondelaki Jéhovah na nkombo na ye. (Tala Misala 10:1, 2). Liboso na esambiselo, moto yango andimaki makambo bafundelaki ye. Yango ekamwisaki mpenza zuzi. Na bongo, zuzi alembisaki etumbu oyo ekanamaki kopesamela ye; na esika ete abomama, bakatelaki ye etumbu ya boloko mpo na mbula zomi, kati na boloko moko oyo ebatelamaka malamu mpenza.
Ntango akotaki boloko, moto yango abandaki kotanga mikanda oyo ekolimbolaka Biblia mpe abandaki kosambela Nzambe ntango nyonso, kosengaka ye ete akitisa mbula ya etumbu na ye, soki likoki ezali, mpo ete asalela ye. Bongo mokolo mosusu, wana azalaki komizela soko moke te, bayaki koyebisa ye ete etumbu na ye ekitaki na mbula mitano. Nsima na mbula mitano ya boloko, batikaki ye; abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, aumelaki te mpo na kozwa batisimo, mpe lelo oyo mokano na ye ezali ete akoma mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso to pionnier.
Masolo oyo ezali bobele mwa bandakisa ya lolenge oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mosala na bango mpe mokumba na bango ya kosakola “kino na biteni bileki mosika ya mabelé”. Tokoki kolobela makambo mingi mosusu. Ozali naino na ntembe mpo ete ba Témoins de Jéhovah bazala basakoli ya solo ya nsango malamu na eleko na biso?