Biloko Nzambe azalisaki bikoki koteya biso nini?
BA PIGEONS bazongaka lisusu na nzela bayelaki mpo na maboke ya mabanga mike ya magnetite oyo ezali kati na moto na bango mpe na nkingo na bango. Bambisi mosusu ebimisaka kúra. Lolenge mingi ya bandeke ezali na likoki ya kosilisa mungwa oyo ezali na mai ya la mer oyo bango bameli. Banyama mosusu ya mike ezali na biloko bikokani na ba poches oyo, soki etondi na mai to na gaz, ekopesa nzela na nyama akota na nse ya mai to abima likolo na yango.
Ayeba to ayeba yango te, moto oyo azali kosalela eloko ebengami busole, oyo azali kobimisa kúra, oyo asali sous-marin to oyo akokitisa mungwa ya mai na la mer, azali se komekola biloko bizalisamaki na Nzambe.
Biloko Nzambe azalisaki bizali mbala mosusu na mateya mingi mpo na moto na boye ete bazali kobenga yango “Mokanda ya kozalisama”. Eteni moko ya sianse, oyo ebengami bionique, ezali koyekola ata makambo mazali kosalema na biloko Nzambe azalisaki mpo na kozwela yango mateya makoki kosunga bato. Totanga na ndakisa mapapu ya avio oyo ekokani mpenza na mapapu na bandeke, ba sous-marins oyo ebendana moke na mipanzi na yango lokola nyama babengi dauphin mpe ndenge batongaka makonzi ya béton na komekolaka mikwa ya moto. Kasi “Mokanda na kozalisama” elakisi biso se teknike?
Te, epesaka biso mpe mbala mosusu toli mpo na bizaleli malamu. Na ntina na furmi mpe na molende na ye na mosala, mokanda na Masese epesi toli oyo: “Kenda epai na nselele, yo moto na goigoi, banzabanza mpo na nzela na ye, ozala mpe na mayele. Ata ye azali na mokonzi te to na motambolisi te to na mokolo te nde akobongisa bilei na ye na ntango na moi makasi, mpe akoyanganisa biloko na ye na ntango na kobuka mbuma.”—Masese 6:6-8.
Ethologie, sianse oyo ezali kozwa mateya na ezaleli ya banyama, ezali mpe na bandelo na yango. Tokoki kokokisa ezaleli ya nyama na oyo ya moto te. Esengeli kotalela bokeseni monene oyo ekaboli bango, lokola likoki ya koloba mpe ya kokanisa. Lokola moto moko na sianse alobaki yango, “tozali bobele bamakako baleki mayele te”. Mpo na mayele na biso “tokeseni mpenza makasi na biloko nyonso bizali na bomoi.”
Lisusu, ezali na mituna oyo ata boyekoli mozindo ya biloko bizalisamaki na Nzambe, ekoki koyanola te. Kati na mituna yango, tokoki kotanga oyo elandi: Bomoi ezali na ntina? Nzambe azali na bomoi, mpe azali komibanzabanza mpo na biso? Totala sikawa soko mituna yango mikoki kozwa biyano.
[Etanda/Elilingi na lokasa 3]
Sonar: Ezalaki uta kala kati na biloko Nzambe azalisaki
Ngembo akoki koyeba esika akoki kozwa nyama oyo akolya mpe akoki kolanda yango na kobimisaka makelele oyo akoki kososola. Likoki yango ebengami sonar. Kasi ba papillons mosusu etambolaka na butu etindaka makelele mpo na kobulunganisa, makelele yango ezali lokola singa ezangi komonana mpe ekokani na oyo ya monguna na bango. Ntango ngembo akoyoka makelele yango, azali na ntango te mpo na koluka koyeba soko likama to eloko ya kolya, mpe akolongwa na nzela na ye kozanga ntembe.
Professeur James Fullard, ya université ya Toronto, na Canada, alobi boye mpo na ndenge asepelaka na likamwisi yango: “Likambo ya kokamwa ezali boye ete ngembo mpe papillon bazali kososola ebele na makambo mpe bazali kozwa eyano na yango na kosalelaka bobele mwa baselile moke ya servo. Bazali bongo kosala ekonomi monene oyo basipesialiste ya etumba na likolo bakoki mpenza kolula bango mpo na yango.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
Likoki ya kobatela mwa mopepe na nse na mai mpo na kosala mosala: Ezalaki uta kala na biloko oyo Nzambe azalisaki
Likoki yango ebengami na Lifalanse, ete cloche de plongée, mpe elobami ete ezali Léonard de Vinci moto abimisaki yango na ekeke ya 16. Kasi ezali na arenyé moko, ezalaka na se na mai ebengami artironete, yango ezali na ebongiseli moko epesaka ye nzela ya kopema na nse ya mai. Lokola elimboli yango Andrée Tetry kati na mokanda na ye Les outils chez les êtres vivants (Bisaleli epai na biloko bizali na bomoi), arenyé yango “asalaka ndako na ye na bibale bikotiolaka malembemalembe, kati na banzete ezindisami na nse ya mai; ndako yango ebele na basinga ezingamizingami kati na yango mpe etongami mikemike, esimbami na ebele na basinga. Arenyé akobima likolo na mai mpe . . . akozwa eboke ya mopepe akokanga yango na ba poils na ye ya mipanzi . . . Arenyé akokita mpe akotya mopepe yango na nse na basinga mpe eboke na mopepe yango ekomata kino na filet”. Akosala bongo mbala mingi, mpe arenyé akobomba mopepe ekoki mpo na kofanda mokolo mobimba na nse ya mai. Ezali kuna nde akolya banyama na ye ya mikemike oyo akokanga na butu. Andrée Tétry abakisi boye: “Bamasini oyo bato basalaka na nse na mai ekokani bongo na masini eleki monene oyo ezali epai na bikelamu ya Nzambe.”