Kati na mokili oyo kobanga ekomi mingi, tokoki kotya elikya na biso epai na nani?
“Ndimela bana na mikonzi te, to moto, mpo ete ayebi kobikisa te.”—NZEMBO 146:3.
1. Nini ezali komonana mingi na mikolo na biso oyo? Na yango, tozali na mposa na nini?
NTANGO tozalaka bana, soki tobangi eloko moko, tozalaka kokima epai ya baboti na biso mpo na kobondisama mpe kobatelama. Baboti na biso bazalaki kotyela biso likebi mingi. Ee, totyelaki bango motema. Atako tosili kokoma mikóló, tozali ntango nyonso na mposa na bato oyo tokoki kotyela bango motema, mingimingi na mikolo na biso oyo makambo ya nsomo mingi mazali kosalema. Zulunalo moko ya Ba allemands elobelaki ezalela yango na maloba oyo: “Mokili ezali kobanga makasi lokola emonanaki liboso te.” Mokolo na mokolo, bakonzi, bakomi na nsango mpe bato mosusu oyo bazali kotala ezalela ya mokili, bazali na motema likolo na kotalelaka mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango.
2. Ndenge nini kobanga mpe kozanga elikya oyo ezali komonana na mikolo na biso esakolamaki?
2 Maloba oyo mazali kotinda biso kokanisa na maloba oyo Yesu alobaka na ntina na eleko na biso ete ‘mitema na mabota mikozala na likolo mpo na mikakatano mpe bato bakosenzwa na nsomo na kotalela makambo makobima kati na mikili’. (Luka 21:25, 26) Biblia esakolaki ete na “mikolo na nsuka” oyo tozali na yango, ‘ntango na mpasi mpe na makasi ekozala’, mpe bato bakozala ‘baninga na bango moko, bazangi sembo, batuki mpe bateki’. Maloba oyo mamonisi ete na mikolo na biso bato mingi bayebi te epai na nani bakoki kotya elikya na bango.—2 Timote 3:1-4.
Elikya ezali lisusu te
3. Nini emonisi ete na mikolo na biso bato bazali lisusu na konfianse te epai ya baninga na bango bato?
3 Kati na mokili oyo kobanga ekomi bipai nyonso, tozali solo na mposa na bato oyo tokoki kotyela bango motema, oyo bazali sembo mpe oyo bandimi kosalisa biso. Nzokande, mingi bazali na mawa mpamba te bato oyo bango batyelaki motema bakosaki bango. Tala makambo makomamaki kati na zulunalo moko: “Mingi bazali kotya lisusu motema te na bibongiseli ya bato.” Mingimingi bakonzi na politike mpe basali na mimbongo, bato bazali kotyela bango lisusu motema te. Ata na kati ya mabota, bato bazali kotyelana lisusu motema te; ntina wana mabala mingi mazali kokufa. Na mikili misusu, kati na mabala misato, moko ezali kokufa; ntango mosusu mpe kati na mabala mibale, moko ezali kokufa. Na mokili moko, kati na mabala zomi, nsambo ezali kokokisa ata mbula zomi te. Na yango, bato bazali kotyelana lisusu motema te. Yango wana mbala mingi tozali koyoka lelo bato bazali koloba: “Nazali na konfianse na moto moko lisusu te!”
4. Motindo nini kobanga ezali komonana epai na bilenge mingi?
4 Kozanga elikya, ndenge tozali komona yango lelo ezali mpo ete tozali kobika na eleko moko ya nsomo koleka kati na lisolo mobimba ya bato. Bitumba mibale ya mokili mobimba mpe bitumba mosusu mingi oyo bibimaki na ekeke oyo ya ntuku mibale ebomi bato koleka 100 milió. Na eleko na biso, bibundeli ya nikleere bikoki kosilisa bato nyonso awa na mokili. Ata bilenge, bazali kokoka lisusu kotya konfianse na moto moko te. Tala oyo ekomamaki kati na zulunalo moko ya makambo ya minganga: “Bana mingi, ata baoyo baleki mike, bazali kobanga mpo na etumba ya nikleere.” Engebene zulunalo moko ya Kanada, tozali komona epai na bilenge mingi “kozanga kondima, mawa, motema mpasi mpe kobanga”. Elenge mobali moko alobaki: “Tozali komona te ete mikóló bazali kobatela biso. Mbala mosusu tokokoma libota ezangi kondima mpe ezangi elikya koleka nyonso mosusu.”
5. Bana oyo babomami mbula nyonso na avortema, mbele bakoki koloba nini soki likoki ya koloba epesamelaki bango?
5 Epai mosusu, ezali na bana oyo, soki bakokaki koloba mbele bakozala na makambo mingi ya koyebisa ndenge bazali komona ete babatelami te na bamikóló. Ezali bongo bana oyo bazali kobomama mbula nyonso na avortema to kosopa zemi. Motuya na bango ezali soko 55 milió mbula nyonso kati na mokili mobimba. Oyo nde mawa mpo na mwa bikelamu oyo bizangi libateli!
6. Ndenge nini, na eleko na biso, mabe elongoli konfianse ya bato epai ya baninga na bango bato?
6 Ntina mosusu mpo na yango bato bazali lisusu na konfianse te epai na baninga na bango bato, ezali ete bazali kobanga ete bakoki kosala bango mabe. Mingi bazali kosala lokola mwasi oyo azali kolala na monduki na nse ya kusé na ye oyo atyaka motó. Mwasi mosusu oyo azali kobanga mingi alobaki: “Ezali nsomo . . . Soki nakanisi ete na ntango ya nkoko na ngai azalaka kokanga porte na ye na fungola te!” Ntina wana maloba oyo makomamaki kati na zulunalo moko ya Porto Rico: “Biso nde tomikangeli na boloko”; ee, nsima na bizibeli na biso na mafungola makasi. Kobanga oyo ezali ya mpamba te. Na ndakisa, na Etats-Unis, mwasi moko kati na basi misato akoki kokutana na basali mabe na boumeli ya bomoi na ye. Ministre ya la Santé alobaki ete “pene na 4 milió ya ba Amerike bazali kokutana mbula nyonso na bato ya mobulu mpe bazali kozwa mpasi mpo na yango: kobomama, kobebisama kobetama ya basi, minyokoli na bana, kobundisa mpe kozokisama”. Mobulu motindo oyo ezali komonana na mikili mingi mpe na ntina na yango bato bazali lisusu na konfianse te na baninga na bango bato.
7. Mpo na nini mikakatano ya nkita to ekonomi ezali kolongola konfianse epai ya bato?
7 Kati na mikili mikoli naino te, ntalo monene ya bato bazali babola. Bamosusu bazali kokanisa ete moto moko akomonana oyo akobikisa bango na mpasi wana. Président ya mokili moko alobaki ete kati na moko na ba provinces ya mokili na ye, kati na babébé nkoto, 270 bazali kokufa na mbula ya liboso nsima ya kobotama na bango. Kati na bandako nkama, bobele ndako moko ezali na mai na kati. Boyangeli ya mokili moko mosusu eyebisi ete 60% ya bana na mokili yango bazali kokelela mpe 7 milió ya bana basundolami “bakokoma lokola biloko mpamba, bato bayekoli te, bato bakoki kofanda malamu elongo na baninga te mpe bato bakoki kosala ata mosala moko te”. Na Etats-Unis, ezali na bilenge soko 500 000 000 bayebani esika balalaka te—bato mosusu bakanisi ete motuya oyo ezali moke mingi. Elikya nini bilenge oyo bakoki kozala na yango na baboti na bango, na bato mosusu, na mibeko to na bilaka ya bakonzi?
8. (a) Ndenge nini tokoki koloba ete nkita ya mokili mobimba ata oyo ya mikili ya bazwi ezali na likama? (b) Tokoki solo kotya motema na bato bazali kalé mpo na kosilisa mikakatano mitali nkita?
8 Mikakatano na nkita ezali ata na mikili ya bozwi. Motuya ya ba Banke na Amerike oyo euti kokwea na bambula oyo eleki na mosika koleka oyo ezalaka na 1929. Ekonomiste moko akomaki: “Toyei komona ete ebongiseli ya ba Banke oyo tozali na yango lelo, ezali mpenza makasi te koleka oyo tozalaka na yango na bambula 1920 . . . ”, bambula oyo ezalaka liboso ya krize monene. Moyekoli moko na ezalela ya mokili alobaki ete “tobelemi na mopepe makasi mpe ya koboma”. Mosusu alobaki: “Tozali komibanzabanza mpamba te mikakatano ya mokili ya lelo ezali makaneli mpamba te, kasi ezali solo.” Tokoki kotya motema na ba ekonomiste to babongisi ya nkita mpo na kobikisa mokili na mpasi oyo? Moko na bango alobaka: ‘Makambo ba ekonomiste bazali kosakola mpo na ntango ezali koya mazali kobangisa mpe mazali kotya bato na mobulu.’
Elikya ezangi ntina
9. (a) Elikya nini bato bazalaki na yango na ebandeli ya ekeke oyo, nzokande eloko nini emonanaki nsima? (b) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah mbele bakokaki kotya maboko te na mokanda oyo Nations unies esalaki na 1945?
9 Wana ebandaki ekeke ya ntuku mibale, bato batyelaki yango motema kozanga ntina ya solosolo. Mpo ete mwa kimya ezalaki uta mbula mingi, bakanisaki ete kimya mpe bolamu ekobakisama lisusu mingi. Nzokande, na 1914, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebomaki elikya yango. Na 1945, nsima na etumba mosusu ya mokili mobimba oyo ebomaki bato mingi koleka, mokanda ya mibeko ya Nations unies etyamaki maboko. Mikili bakamataki mokano ete nsima na etumba, babongisa kimya, bolamu mpe boyengebene. Tala oyo elobamaki kala mingi te nsima na boyekoli moko oyo bato basalaki: “Mokanda ya boyokani yango etyamaki maboko na mikili 51 uta na ndambo nyonso ya mabelé, uta mposo nyonso mpe uta na mangomba nyonso.” Nzokande, lingomba moko ezalaki wana te, mpe ekokaki kozala na mposa ata moke te ya kozala wana: lingomba yango ezali bongo ba Témoins de Jéhovah. Mpo bango bayebaki ete bilaka ya kimya, ya bolamu mpe ya boyengebene oyo bikomamaki na mokanda yango bikokokisama te, ata na mokili moko, ata na liboke ya mikili lokola Nations unies.
10. Elikya nini Nations unies epesaki na 1945, nzokande eloko nini tozali komona lelo?
10 Bobele boyekoli oyo moko bato basalaki elobaki lisusu ete: ‘Nsima na mbula ntuku minei, ebongi totala matomba nini mazwami. Tozali nde komona mokili ezali kotengatenga, mokili oyo bato bazali kotyela yango konfianse lisusu te, mobulu ezali kobakisama. Motuya na bato bazangi bilei mpe mai, na bato bazangi ndako, na bato bazangi mbongo ya komisalisa na maladi mpe bazangi mbongo mpo na kokota kelasi, motuya na baoyo wana nyonso ezali kobakisama. Nzokande, na 1945 bakanisaki boye te.’ Boyekoli oyo moko ebakisaki lisusu maloba oyo: ‘Esili koleka mbula ntuku minei, mabota basanganaki mpo ete moto moko te kati na mokili azala lisusu na kobanga to ‘ kokelela. Nzokande mokili ndenge tozali kobika na yango, na bambula oyo ya 1980 . . . ezali na ndambo moko ya bato kati na ndambo minei, oyo bazali na bobola makasi. Nzala ezali koboma bato soko 50 000 na mokolo moko.’ Nzokande, mokili ezali kobimisa na ngonga moko koleka 100 milió ya badolare mpo na bibundeli.
11. Bilaka oyo bato bazali kopesa mpo na kobongisa mokili, tokoki kotyela yango motema?
11 Nsima na komona mabe oyo nyonso, tokoki lisusu kotya motema epai na bato, wana ezali bango kolaka ete bakosilisa mikakatano oyo nyonso, nzokande bazwaki bikeke mingi mpo na kosala yango kasi balongi te? Maloba na bango mazali lokola elobaki kapitene ya masuwa moko monene: “Nandimi te ete masuwa oyo monene ekoki kozinda. . . . Mayele ekoli mingi.” Moko na bato ya mosala kati na masuwa yango alobaki epai na motamboli moko: “Ata Nzambe akoki te kozindisa masuwa oyo.” Nzokande, masuwa yango, Titanic, ezindaki na 1912, mpe bato 1 500 bakufaki. Na 1931, Lisangá mpo ya botangisi bato kelasi na Amerike elobaki ete, na nzela na kotangisa bato kelasi, ‘moyibi, kobomana mpe mabe mosusu ekosila liboso tokoma na 1950.’ Na 1936, journaliste moko ya mokili ya Angleterre akomaki ete: ‘Longwa awa kino kokoma na 1960, bato bakokelela lisusu te mpo na bilei, bilamba mpe ndako.’ Okanisi boni mpo na maloba oyo? Omoni te ete ezali lokuta?
Ye oyo epai na ye tokoki kotya motema na biso mobimba
12. Nani tokoki kotyela ye motema na biso mobimba, mpe motambwisi nini apesaki biso?
12 Na yango, kati na mokili oyo bato bakomi na kobanga mingi, tozali na mposa mingi na moto oyo tokoki kotyela ye motema. Bato bamilukeli mikakatano mpe bango moko bakoki komibikisa na yango te. Moto bobele moko oyo tokoki kotyela ye motema ezali bongo Mozalisi na bato. Mpamba te, Jéhovah Nzambe ayebi mpo na nini mokili ezali na mpasi oyo, eloko nini ekobima nsima, mpe eloko nini ye moko akosala na ntina yango. Epai mosusu, amonisaki boyebi yango na ndenge akomisaki yango kati na mokanda oyo apesaki biso mpo ezala motambwisi na biso, Biblia. Mpo na yango, ekomami boye kati na 2 Timote 3:16, 17: “Makomi nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateyo, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”
13. Ba Témoins de Jéhovah bandimi nini mpo na oyo etali Biblia?
13 Tala nguya ya maloba oyo. Liloba na Nzambe ezali kosembola makambo; ezali komonisa biso nini ezali sembo; ezali kokokisa biso; ezali kobongisa biso mpo na kosala malamu. Ya solo, bato mingi bandimaka te ete Biblia ezali Liloba na Nzambe, kasi ba Témoins de Jéhovah bandimaka yango. (1 Batesalonike 2:13) Toyebi ete Mozalisi ya molongo, kati na yango tozali kokuta bamiliare ya minzoto, azali na makoki nyonso mpo na kosala mokanda. Azali mpe na nguya ya kosenzela ete mokanda yango ebatelama malamu, kozanga libunga, mpo na bolamu na baoyo bazali koluka solo.—1 Petelo 1:25.
14. Mpo na nini tokoki koloba ete Biblia ezali na elonga mpo na makambo tozali komona lelo?
14 Biblia elobi nini mpo na elikya oyo tokoki kozala na yango kati na mokili oyo etondi na kobanga? Elobi makambo oyo mazali na boyokani mpenza na ezalela ya lelo. Jérémie 10:23 elobi na bosembo nyonso: “O Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te. Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Nzembo 146:3 epesi likebisi oyo: “Ndimela bana na mikonzi te, te moto, mpo ete azali na kosunga te.”
15. Toli nini Biblia epesi biso mpo na oyo etali epai na nani tokoki kotya motema na biso?
15 Liloba na Nzambe ekebisi biso ete totya motema ata epai na biso moko te, mpamba te tozali bato bazangi kokoka. (Baloma 5:12) Jérémie 17:9 elobi: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso.” Yango wana Masese 28:26 epesi likebisi oyo: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali elema; nde ye oyo akotambola na mayele, ye akobika.” Epai wapi tokoki kozwa mayele oyo ekosalisa biso tolongwa na mpasi oyo? Tozali kotanga na Masese 9:10: “Kotosa Jéhovah ezali ebandeli na mayele; koyeba Ye Oyo-Aleki-Bosantu ezali bososoli.” Kati na mokili oyo bato bakomi kobanga mingi, bobele mayele ya Mozalisi nde ekoki kotambwisa biso. Yango wana Masese 3:5, 6 epesi biso toli oyo: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndima ye mpe ye akotambolisa yo.”
Oyo Nzambe akanisi mpo na mangomba ya mokili
16. Lokola Bafalisai na mikolo na Yesu, mangomba ya mokili bazali kokanisa nini?
16 Mayele mauti na Nzambe makosalisa biso ete tokwea te kati na libunga ndenge mangomba ya mokili bakwei na yango, mpo bango bazali kokanisa ete bazali sembo lokola bazali mangomba ya losambo. Ezaleli ya mangomba yango eyebisami kati na Luka 18:9: “[Yesu] alobaki lisese oyo na bamosusu baoyo batiaki mitema na makambo na bango mpenza ete bazali bato na sembo.” Mofalisai moko azalaki kotonda Nzambe ete azali mosumuki te, nzokande mokongoli na mpako azalaki kobondela ye na maloba oyo: “Nzambe, yokela ngai mawa, ngai moto na masumu.” Yesu asukisaki lisese yango na maloba oyo “Nalobi na bino ete kati na bango mibale, ye wana [mosumuki] akitaki na ndako na ye molongisami [koleka Mofalisai]; mpo ete ye oyo akomizwela lokumu, lokumu na ye ekolongwa; nde oyo aboi lokumu, lokumu na ye ekozala monene.”—Luka 18:10-14.
17. Ndenge nini Nzambe azali kotalela losambo na bato oyo bazali komitambwisa lokola Bafalisai?
17 Mofalisai amikitisaki te na miso na Nzambe, mpo akanisaki ete azali moyengebene; kasi Nzambe atangaki ye moyengebene te. (Matai 23:25-28) Nzokande, mosumuki oyo amikitisaki, akokanaki na moto oyo Liloba na Nzambe elobi na ntina na ye ete, engebene Yisaya 66:2: “Nde nakotalaka epai na moto oyo: ye oyo azali mosokemi mpe atutami na elimo mpe azali kolenga mpo na liloba na ngai.” Bakonzi na mangomba Bayuda ‘bazalaki kolenga mpo na liloba na Jéhovah te’: bazalaki kokipe yango ata moke te; bazalaki kosala oyo bango moko balingi, mpe bakanisaki ete Nzambe andimi bango. Nzokande, Yesu alobaki na bango: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na Likolo te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na Likolo. Mingi bakoloba na ngai na mokolo yango, Nkolo! Nkolo! tosakolaki na nkombo na yo te? Tobimisaki bilimu mabe na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te? Nakoyambola liboso na bango ete, Nayebi bino soko moke te! Bolongwa na ngai, bino bato na misala mabe.”—Matai 7:21-23.
18. Ndenge nini Nzambe akosambisa mangomba oyo balobi ete bazali kosalela ye, kasi bazali kotosa mibeko na ye te?
18 Bakonzi na mangomba oyo na ekeke ya liboso batiaki motema na bango na Nzambe te, kasi na mitindo ya bokoko na bango oyo ezalaki kobuka mibeko ya Nzambe. (Matai 15:3, 9) Yango wana Yesu alobaki na bango: “Tala, ndako na bino etikali mpamba.” (Matai 23:38) Na mobu 70 ya ntango na biso, basoda ya Loma bakendaki koboma bango, elongo na kapitale na bango Yelusaleme, mpe temple na bango, oyo emonisi polele ete Nzambe asundolaki lingomba ya Bayuda. Ezali se ndenge moko na mikolo na biso oyo. Mangomba ya mokili bazali kosambela Nzambe engebene bibongiseli na bango moko, oyo bizali na boyokani te na oyo ya Nzambe. Na motindo yango, bazali kosala mokano na Nzambe te, kasi mokano na bango moko; na miso na Nzambe, bazali basali na mabe. (Tito 1:16) Yango wana Nzambe asundoli bango; ekomonana polele ntango mabota bakoboma bango, lokola na ekeke ya liboso ya ntango na biso, Yelusaleme mpe temple na yango ebomamaki na basoda ya Loma.—Tala Emoniseli, mikapo 17, 18.
19. Mituna nini tokoki komituna na ntina na mangomba.
19 Maloba oyo na ntina na mangomba maleki makasi? Ndenge nini tokoki koyeba solosolo ete ekateli ya Nzambe ekokwea mosika te likolo na mangomba oyo nyonso? Lingomba esengeli kosala nini mpo endimama na Nzambe? Tozali na bandakisa ya kala oyo emonisi ete Jéhovah abatelaka baoyo batii elikya na bango epai na ye mpe bazali kotosa mibeko na ye? Lisolo elandi ekoyanola na mituna oyo.
Bozongeli
◻ Mpo na nini lelo bato mingi bazali lisusu na konfianse te epai ya baninga na bango bato?
◻ Mokili etyaki motema na bilikya nini, nzokande eloko nini eyei komonana?
◻ Nani tokoki kotyela ye motema na biso mobimba, mpe motambwisi nini apesaki biso?
◻ Mpo na nini ebongi te kotya motema epai na biso moko soko mpe epai na bato mosusu?
◻ Ndenge nini Nzambe azali kotalela mangomba ya mokili?