Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/6 nk. 17-21
  • Ndako na yo ezali esika ya komema mpe ya kimya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndako na yo ezali esika ya komema mpe ya kimya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kopona Mobalani ya malamu
  • Batoli oyo ezali kolendisa kimya kati na ndako.
  • ‘Bopesa Diable esika te’
  • ‘Mokumba na bana mpo na kobatela kimya ya libota’
  • Sala na ndenge ete ndako na bino ezala esika na kopema mpe na kimya
  • Kokabola te oyo Nzambe asangisi esika moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Batoli ya bwanya mpo na babalani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ozalaka mpenza na botɔndi mpo na likabo ya libala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/6 nk. 17-21

Ndako na yo ezali esika ya komema mpe ya kimya?

Jéhovah apesa bino likabo ete bozwa kopema moto na moto na ndako na mobali na ye!​—Luta 1:9, (MN)

1. Esili koleka mibu soko 3 000, basi nini basalaki mobembo mpo na kokende na Yuda?

ESILI koleka mibu soko 3 000, basi misato basalaki mobembo ya likama kati na mokili ya Moabe oyo ezalaki na bangomba mingi, mokili oyo etondaki na miyibi mpe batomboki. Naomi, ye nde azalaki na mibu mingi ya kobotama koleka bamosusu, azalaki mwasi akufela mobali mpe akanaki makasi ete azonga na Beteleme na Yuda mboka na ye ya kobotama oyo motema na ye elingaki mingi. Bamoabite mibale bazalaki elongo na ye oyo bazalaki bilenge mingi koleka ye, Orpa mpe Luta, basi bakufeli mibali oyo bazalaki basi ya bana ya Naomi, Kiloni mpe Mahloni. Kasi yoka . . .

2. Naomi atombelaki nini mpo na Orpa mpe Luta?

2 “Kenda!” elobaki Naomi. “Bozonga na bino moto na moto na ndako na mama na ye! Tika ete Jéhovah asalela bino boboto lokola esalaki bino na mibali oyo bakufi mpe epai na ngai!” Alakeli bango lisusu likambo oyo: “Jéhovah apesa bino likabo ete bozwa kopema moto na moto na ndako na mobali na ye!” (Luta 1:8, 9, MN) Ee, Naomi azali kosenga ete babokilo na ye ya basi bazonga epai na libota na bango, kati na elikya ete Nzambe akopesa bango likoki ya kozwa bopemi mpe kolendisama oyo ezali kozwama na kozala na mobali malamu mpe ndako ya esengo.

3. Likatami nini Luta azwaki, mpe litomba nini ebimisaki?

3 Orpa azongi na ye, kasi mosembwi Luta te. Koboyaka kotika bokilo na ye ya mwasi, azui ekateli oyo: “Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” Litomba nini ekobima? Luta akozwa ndako, esika na kimya epai na Boaze mpe akozwa “lifuti ya malonga”. Akozala na kati na bankoko ya mokonzi Davidi mpe ya Nkolo na ye oyo akokani na mosusu te, Yesu Klisto.​—Luta 1:16; 2:12; 4:13-22; Nzembo 110:1; Matai 1:1-6.

4. Motuna nini ya sikisiki ezali kopusa biso na kokanisa?

4 Naomi alingaki ete Jéhovah apesa likabo epai na moko moko ya babokilo na ye ya basi: libala ya makasi mpe ndako oyo ekozala esika na kimya. Na ntembe te, Nzambe ye mpe alingi ete basaleli na ye bazala na kimya kati na bandako na bango. Soko ozali Témoin de Jéhovah, motuna oyo ezali kotunama: Ndako na yo ezali esika na kopema mpe na kimya?

Kopona Mobalani ya malamu

5. Litambe nini ya liboso moklisto monzemba oyo alingi kobala asengeli kosala, soki alingi ete kimya ezala kati na ndako na ye na mikolo mizali koya?

5 Soko ozali moklisto mobali to mwasi monzemba mpe ete ozali kokana kobala, na ntembe te ozali na mposa ete ozala na kimya kati na ndako na yo na mikolo mizali koya. Ntoma Paulo ayebisi polele litambe ya liboso ya kosala mpo ete mposa yango ekokisama. Akomi: ‘Mwasi akangami na mobali na ye na ntango wana ezali ye na bomoi. Soki mobali akufi, akokangwa ete abalana na ye oyo elingi ye, kasi bobele kati na Nkolo’.​—1 Bakolinti 7:39.

6. (a)‘Kobala bobele kati na Nkolo’ elimboli nini? (b) Mituna nini misengeli kotalelama na moto oyo azali koluka mobalani? (c) Mpo na nini esengeli kobondela liboso ya kobalana ata na moto oyo asila kozwa batisimo?

6 ’Kobala bobele kati na Nkolo’ elimboli kobalana bobele na mobalani oyo azali mondimi. Moklisto asengeli mpenza te kobala nokinoki, ata na moto amipesi epai na Jéhovah. Tokoki mpenza koloba ete mobalani wana ozali kokana kobalana na ye ‘azali koluka boyengebene mpe bopolo’? (Sofoni 2:3) Azali kosalela Nzambe na motema na ye mobimba? Maloba na ye mazali komonisa bolingo na ye mpo na Jéhovah, mpe mposa na ye ya kosanzola ye? Asanganaka mbala na mbala kati na mosala ya kosakola mpe azali kopesa na mosala yango esika ya lokumu kati na bomoi na ye? Azali na likoki ya kokokisa mikumba oyo mizali kosengama kati na mosala ya Nzambe, mpe na libala ya boklisto? Ata okani kobalana elongo na moto moko asila kozwa batisimo, esengeli malamu kokanisa mpe kosambela. Na meko nyonso oyo ekoki, osengeli koluka koyeba ete moklisto yango mobali to mwasi azali na bizaleli malamu ya elimo. Na motindo oyo nde bokopengola mitungisi mpe mikakatano oyo mibebisaka mbala mingi mabota oyo moto na moto asambelaka na lingomba na ye moko.

7. Mpo na kozala mpenza na esengo kati na libala esengeli kosala nini?

7 Babalani baklisto mibale bazali na likoki ya kokokisa bamposa ya mayoki na bango mpe kopesana makanisi ya elimo. Na bongo bakokoka kosala ekanganeli ya penepene oyo ekoki kozala kati na bikelamu mibale. Baklisto mibali mpe basi bazali mpenza na mposa ya kozala na bomoko ya penepene elongo na mobalani na bango. Lokola tosalama na mposa ya kosambela, tozali koyoka bolamu mingi koleka na kosalaka oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo. (Matai 5:3) Koyebaka yango, tolingi mpenza te koboya kotosa Jéhovah na kobalaka moto oyo azali mondimi te, likambo oyo ekopimela biso bomoko yango ya elimo oyo ezali kolendisa bikanganeli ya libala. (Deteronome 7:3, 4) Mpo na kozala mpenza na esengo senzela ete Nzambe azala na esika kati na libala na bino. “Nkamba na nsinga misato ekokatama noki te“. (Mosakoli 4:12) Ee, na kopesaka Jéhovah Nzambe esika kati na libala na bino, bokopika makasi miboko ya libala na bino mpe bokokomisa ndako na bino esika na kopema mpe na kimya.

Batoli oyo ezali kolendisa kimya kati na ndako.

8. Batoli nini ya ntina ezali kotalela baklisto oyo babala?

8 Bongo baklisto oyo basila kobala, eloko nini basengeli kosala mpo ete ndako na bango ezala esika na kopema mpe na kimya? Makambo mingi, nzokande esengeli na bango mpenza kosalela batoli ya Paulo ekomami kati na Baefese 5:21-33. Ya solo, mobali to mwasi akoki kosalela maloba wana mpo na komonisa bambeba ya mobalani na ye. Kasi, eleki mpenza malamu kokanisa likoló na batoli oyo mpo na kosalela yango yo moko mpenza.

9. Paulo apesaki toli nini na mibali baklisto?

9 Soki ozali mobali moklisto, okopesa nzela na kokomisa ndako na yo esika na kopema mpe na kimya na kosalelaka yo moko batoli ya Paulo. Ntoma apesi toli oyo: “Bino babali, bolingaka basi na bino pelamoko Klisto alingaki Lingomba mpe amipesaki ye moko mpo na bango.” Abakisi: “Bongo ekoki na babali ete balinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye azali komilinga ye moko. Mpamba te moto te akoyina mosuni na ye moko, nde akoleisa yango mpe akobatela yango pelamoko Klisto epai na Lingomba.” Mpe lisusu: “Tika ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko.” Mobali asengeli ‘kolinga mwasi na ye lokola ye moko: ezala lokola mwasi ezalaki ye moko’. Yango ezali likambo ya malamu koleka, mpamba te ‘bango mibale bakomi mosuni moko’, boye te?​—Genese 2:24.

10. Na kotalela 1 Timote 5:8, mobali moklisto azali na mokumba nini?

10 Mobali oyo azali kolinga mwasi na ye lokola ye moko akozwa na maboko makambo nyonso matali elimo. Azali na mokumba kati na makambo ya elimo ya libota na ye. Na bongo akoki te kotika ete makambo mazanga kobongisama, na lolenge mosusu. Akosenzela mpenzampenza na matomba ya mosuni mpe ya elimo ya libota na ye mobimba. “Ee, Paulo alobi, soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timote 5:8.

11. Toli nini Paulo apesaki epai na basi baklisto?

11 Na ngambo na ye, mwasi moklisto akoki kosala mingi mpo ete ndako na ye ezala esika na kopema mpe na kimya. Paulo azali kopesa epai na basi toli oyo epemami na Nzambe: “Bino basi botosaka babali na bino pelamoko epai na Nkolo mpo ete mobali azali motó na mwasi pelamoko Klisto azali motó na Lingomba. Ye wana azali mobikisi na nzoto. Kasi pelamoko Lingomba bakotosaka Klisto, bongo tika ete basi batosa babali na bango na makambo nyonso. . . . Mwasi asengeli kozala na limemya mozindo mpo na mobali na ye.” (Baefese 5:22-24, 33, MN) “Limemya mozindo” ezali kopesa nzela mpo ete ndako ezala esika na kimya. Ezalaka na boyokani te na elimo ya lipanda mpe ya kowelana oyo emonisami na basi mingi lelo, elimo oyo ezali kobulunganisa mpe kobebisa libota to ndako.

12. Mwasi moklisto mpe mobali moklisto basengeli kosala na motindo nini?

12 Basi mpe mibali baklisto basengeli kosala na motindo ete balendisa bolingo mpe limemya. Mobali akomonisa boboto, bolingo mpe kotela na elimo. Mpo na mwasi, akobanga Nzambe mpe akomonisa ete azali kosala na boyokani elongo na mobali na ye mpe azali kolingama. Toyebi mpenza ete na komitambwisa motindo boye, babalani bakokomisa ndako na bango esika na kopema mpe na kimya.

‘Bopesa Diable esika te’

13. Toli nini Paulo apesaki na kati ya Baefese 4:26, 27?

13 Kozanga kokoka ya bomoto ezali kosala ete ezala petee te mikolo nyonso mpo na kobatela kimya kati na ndako. Ekoki kozala ete mikakatano ya libanda ekoka kobebisa kimya na kati ya libala. Kasi, na kosalela batoli ya Paulo oyo ekomami na Baefese 4:26, 27 ekoki kosalisa ete kimya ezala na ndako. Paulo akomi boye: “Boyokaka nkanda nde bosala lisumu te; tika te ete moi elimwa naino bozali na kosilika na bino, mpe bopesa Diable esika te.’ Ata soko moko na babalani azali na lotomo ya kozala na nkanda na ntango mosusu, asengeli te kotika kosilika na ye emema ye na kosala lisumu na kozala na nkanda mpe kobomba makaneli mabe na motema. Topesa soko moke te nzela epai ya monguna ya kimya, Satan le Diable, ete alongola kimya na ndako na biso!​—1 Petelo 5:8.

14. Soki mwa matata mabimisi bokabwani, makanisi nini mapesami makoki kosalisa ete kimya ekoka kozonga na kati na ndako?

14 Solo, mpo ete kimya ekoka kozala na ndako ezali kosenga ete babalani nyonso mibale bakoka kosalela batoli ya Biblia. Soko mwa matata mabimisi bokabwani, kosambela Nzambe elongo mpo ete akoka kopesa bango elimo na ye, ekosalisa bango ete bakoka komonisa mbuma ya elimo mpe kozongisa kimya kati na ndako na bango. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Ee, ata na ntango mikakatano ezali makasi koleka, kosala na lolenge wana ekosalisa bango bakomisa ndako na bango esika ya kopema mpe ya kimya.

‘Mokumba na bana mpo na kobatela kimya ya libota’

15. Ndenge nini bilenge bakoki kosala mpo ete kimya ezala na kati ya libota?

15 Bilenge bakoki bango mpe kosala ete kimya ezala na kati ya libota. Kasi ndenge nini? Soki bakokolisa elimo ya botosi mpe ya kosala elongo. Ezaleli ya elimo motindo wana ezali kotalela mingimingi mateya ya Biblia oyo bazali kozwa mpe na lolenge baboti na bango baklisto bazali kokokisa mokumba na bango lokola balakisi. Formasyo ya ntina ezali kosenga mingi ete baboti bakoka kolakisa ndakisa ya malamu. Masese 22:6 emonisi na lolenge nyonso ekoki ete ‘Bokola mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ata ntango akokoma mobange akopengwa na yango te’. Mingimingi, bana oyo bazali koteyama malamu mpe baboti bazali kopesa ndakisa malamu koleka, bazali kopengwa te na nzela ya malamu. Kasi ezali solo ete, etamboli na bango ezali kotalela mingi motuya mpe mozindo ya koteyama oyo bazali kozwa, mpe lisusu lolenge ya motema na bango.

16. Mpo na oyo etali koteya bana, ndakisa nini tozali kozwa na oyo etali Timote?

16 Bino baboti, bobanda koteya bana na bino makambo na elimo uta bolenge na bango. Timote azwaki litomba ya koteyama na elimo ndenge wana uta azalaki mwana moke mpenza, ndenge emonisami na elendiseli oyo Paulo akomelaki ye: “Kasi yo, oumela kati na makambo mayekoli yo mpe bandimisaki yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani mpe ete longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi na bulee, makoki kopesa yo mayele mpe na lobiko, na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu.’ (2 Timote 3:14, 15, MN) Ezali solo ete Timote ‘bandimisaki ye’ solo ya Biblia. Liloba ya greke esalelami kati na verset oyo ezali na ndimbola ‘kobenda na nzela ya maloba ya kondimisa, kondimisa likambo moko. (Nouveau lexique grec-anglais de Thayer, page 514). Mama na Timote Yunike mpe nkoko na ye ya mwasi Loisi, bango nyonso baklisto basalaki makasi mingi mpo na kobenda Timote akoka kozala na ‘kondima wana ya makasi’. Bakokaki kokotisa epai na ye “kondima ezangi bokosi”, atako tata na ye emonani ete azalaki na ye mondimi te. (2 Timote 1:5) Ozali kosala makasi ya kokolisa kondima motindo wana epai ya bana na yo?

17. Eloko nini emonisi ete mwana akoki koteyama uta bolenge na ye?

17 Timote ateyamaki na Makomami uta bomwana na ye. Tosengeli ata moke te kotyola makoki ya mwana ya kosimba makambo. Zulunalo moko ya Amerike oyo ebimaka mokolo na mokolo (The New York Times), elobaki mpo na boyekoli esalamaki ete “na kati na boongó ya bana mike basynapses ezali mbala mibale koleka (synapses ezali bisika oyo misisa ya bacellules oyo ezali lokola bitape ekutanaka) motuya oyo ezali na kati na boongó na mokolo.” Ata bana mike mpenza bakoki koyekola ete makambo mosusu mazali malamu mpe mosusu mazali mabe, oyo ezali kosepelisa to ya kopesa mpasi na motema. Na kati na mokanda Le cerveau (angl.) Richard Restak alobaki: “Na ekelamu nyonso na bomoi, boongó ezali kobongisa makambo moto ayebi to amonaki na kotalela motuya na yango mpo nakobatela yango. Nyama ‘akomikundola’ nyama mosusu oyo azali monguna mpe akokima noki soko abelemi penepene na ye. Kobombama ya makambo na boongó na ndenge ya kolandana ezali kotalela mpe makambo minene oyo esimbaki mayoki ya motema. Ezali kosenga te kolobela mwana mbala mibale ete asengeli te kosimba kikalungu ya moto.“ Ntembe ezali te ete etikali makambo mingi ya koyekola mpo na koyeba lolenge boongó ezali kosala, kasi eyebani ete mwana akoki koyekola makambo na nzela ya oyo ezali kozwa ye na bomoi. Na yango na ndakisa ata bana mike bakoki koteyama ete batikala kimya na kolanda na likebi na ntango ya makita ya boklisto.

18. Na Baefese 6:1-4, toli nini Paulo apesaki epai na bana mpe epai ya baboti?

18 Na ntango bana bazali kokola, bazali na makoki ya kozwa mokemoke boyebi ya makambo ya elimo. Kati na makambo mosusu bakoki koyekola ete Nzambe azali kosenga bango ete batosa baboti na bango. Yango nde ezali kosenga ete baboti na bango bakoka koteya bango na kozanga bopotu, kasi na bolingo mpe, lokola ekomaki Paulo: “Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, mpo ete yango ezali sembo. Kumisa tata na yo mpe mama na yo, oyo lilako na liboso lizali na elaka ete: ‘Bongo ezala na yo malamu mpo ete oumela na mokili ntango molai.’ Bino batata mpe boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bolanda kobokola bango kati na disipline mpe mateyo na Nkolo”. (Baefese 6:14) Bana oyo bazali kotosa bazali kosalisa mingi na boye ete ndako ezala esika na kopema mpe na kimya.

19. Eloko nini ekoki kosalisa ete ekanganeli oyo ezali kotia baboti na bana esika moko ezala makasi?

19 Kasi eloko nini ekoki kosalisa ete ekanganeli oyo ezali kotia baboti na bana esika moko ezala makasi? Botangi ya Biblia kati na libota mpe mikanda ya boklisto ekosalisa mpo na likambo yango. Mikanda lokola ‘Masolo ya Biblia mpe Boyoka Moteyi Monene’ mizali na ntina mingimingi mpo na kosalisa bana. Ntango bozali kotanga Biblia to bozali kosala likambo mosusu, benda likebi mingi likoló ya bolingo ya Nzambe. Na mesa ntango bozali kolya, tika ete maloba na bino makumisa Jéhovah, ye oyo azali mopesi na biloko nyonso. Ntango bozali kosala mobembo elongo na bana na bino, zongisa lokumu epai na Nzambe mpo na bikamwiseli ya kozalisama: bitoele, bafololo, banzete, bangomba, mongala, bitima na banyama. Ntango bozali kosangana na mosala ya kosakola boluka makambo oyo ekoki kopesa nzela na kolobela bana na bino mpo na bolingo ya Nzambe. Mokolo na mokolo, bosalisa bango mpo na kokolisa bolingo monene mpo na Jéhovah. Ntembe ezali te ete mpo na kosimba motema na mwana ezali kosenga ete bino moko bozala na bolingo liboso epai na Jéhovah, oyo bolingi kokotisa na motema na mwana na bino.​—Deteronome 6:4-7.

20. Ntina ya disipline ezali nini?

20 Bobosana soko moke te ete disipline ezali na ntina mingi. Ntango ezali kopesama mpe kondimama na ndenge esengeli, ‘ezali kobota mbuma ya kimya na boyengebene.’ (Baebele 12:11) Bana oyo bazali kondima na mayele disipline oyo ezali kopesamela bango na baboti na bango, bazali kosepelisa mpe kokumisa libota na bango na kobatelaka lokumu na yango malamu. (Masese 10:1; 13:1; 23:24, 25) Ya solo, na kokokisaka mikumba na bango na ndenge ezali kolimbolama na kati ya Makomami, baboti mpe bana bazali kosala na boye ete ndako na bango ezala esika na kopema mpe na kimya.

Sala na ndenge ete ndako na bino ezala esika na kopema mpe na kimya

21. Na kotalela Masese 24:3, 4, ndenge nini tokoki kosala mpo ete ndako etikala esika na kopema mpe na kimya?

21 Ndenge nini kosala mpo ete ndako na moto etikala esika na kopema mpe na kimya? Lisese moko elobi: Ndako ekotongama malamu na nzela na mayele; ekokokisama na nzela na bososoli. Na nzela na boyebi, biteni-na-ndako bikotonda na biloko na motuya malamu mpe na kitoko”. (Masese 24:3, 4) Na nzela ya boyebi mpe makasi na yango, libota oyo ezali kosala na molende ekoki kozwa biloko mingi ya mosuni. Kasi ndako ekotongama mpe ekotelemisama makasi bobele soki basangani na yango bazali kolakisa bososoli mpe bazali komonisa mayele ya bonzambe na kosalela malamu boyebi ya Makomami. Ee, mayele ezali kotonga libota mpe ezali kopesa yango nzela ya kotikala malamu na bomoko.

22. Kosalela malako ya bonzambe ekobimisa matomba nini?

22 Ndako ekozala na kimya soki basangani na yango bazali kosalela malako ya Nzambe, oyo alobaki na Bayisraele: “Ngai nazali Jéhovah. Nazali Nzambe na yo, Ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, Ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soko ya solo okotya likebi na malako na ngai mbele kimya na yo ekozala lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge na mai na monana.’ (Yisaya 48:17, 18, MN) Na bongo, bino mibali, basi mpe bana oyo bozali kotosa Nzambe, na bongo bomonisa bino banso mayele ezali kouta na likoló, mpe ndako na bino ekozala mikolo nyonso esika ya kopema mpe ya kimya.

Bozongeli

◻ Moklisto monzemba oyo azali kokana kobala asengeli kopona mobalani ya ndenge nini soki alingi ete ndako na ye ezala esika na kimya?

◻ Na kotalela Baefese 5:21-33, mibali mpe basi basengeli kosala nini mpo ete kimya ekoka kozala na kati ya ndako na bango?

◻ Na nini kosalela toli ezwami kati na Baefese 4:26, 27 ekoki kopesa nzela ete libota moko ezala esika ya kimya?

◻ Moto akoki kosala nini mpo ete ndako na ye ezala ntango nyonso esika ya kopema mpe ya kimya?

[Elilingi na lokasa 17]

Basi mpe mibali baklisto basengeli kosala na lolenge ete balendisa bolingo mpe limemya.

[Elilingi na lokasa 20]

Timote ayekolaki solo ya bonzambe uta bomwana na ye. Ozali kosalisa bana na yo na kokola kati na boyebi mpe bolingo na Jéhovah?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto