Ebandeli ya lifelo
Nouvelle Encyclopédie catholique (Angl.) ezali kolimbola ete “Lifelo” ezali liloba “esalelami mpo na komonisa esika oyo bato balakelami mabe bazali”. Buku moko ya baprotestá ezali kolimbola lifelo lokola “esika moko oyo bato mabe bakonyokolama”a. Nzokande, kondima na esika motindo wana ya bitumbu bikopesama nsima na liwa ezali bobele mateya ya Mangomba minene ya boklisto na mokili oyo te. Liteya yango ebandaki mpenza bikeke mingi liboso ete boklisto ya mokili ekoka kobotama.
Lifelo ya bato na Mezopotami
Penepene na mibu 2 000 liboso na kobotama na Yesu, Basumeryé mpe Bababilonyé bazalaki kondima ete mokili mosusu ezalaki na nse ya mabelé, mpe bazalaki kobianga yango “mabelé epai moto akoki kozonga te”. Endimeli wana ya kala ezali komonana kati na ba poèmes to maloba kitoko ya basumeryé mpe baakkadyé oyo eyebani na titre ya “Kokumisama ya Gilgamesh” mpe ya “Bokiti ya lshtar na lifelo”. Bazalaki koloba ete bakufi bakendaka na ndako moko ya molili, “ndako oyo moto akoki kobima kati na yango te nsima na kokota kuna”.
Mpo na makambo oyo mazalaki kosalema na esika yango, makomi ya kala ya bato na Assyrie mazali kondimisa ete “mokili ya nse etondaki na monyokoli”. Mokonzi na Assyrie, komikumisaka ete azwaki emonaneli ya esika bato bakufa bakendaka na nse ya mabelé, alobaki ete “makolo na ye mazalaki kolenga” mpo na ntina na makambo oyo ye amonaki. Komonisaka Nergal, mokonzi ya lifelo, alobaki ete: “Angangelaki ngai makasi lokola nyama ya zamba, konganga moko ya nkanda oyo eyokanaki lokola mopepe makasi.”
Kati na mangomba ya Ezipite mpe ya Azia
Bato ya Ezipite ya Kala bazalaki kondima na kozanga kokufa ya molimo, mpe bazalaki na likanisi na bango moko mpenza mpo na oyo etali mokili ya bakufi. Nouvelle Encyclopédie britannique ezali kolimbola ete: “Kati na ndimbola ya makomi matali kokunda bibembe ya bato na Ezipite, nzela oyo ezali kokamba na mokili ya nsima na liwa ezali na makama minene, mbisi minene, maziba na móto, bizibelo oyo bato bakoki koleka te kozanga misala ya maji, mpe monyokoli moko oyo azali kolakisa nzela, oyo bosengeli kokosa ye na nzela ya maji mpo na kopengola mikano na ye ya mabe.”
Mangomba ya bato bauti na lnde mpe lran mabimisaki bindimeli mingi mpo na minyokoli nsima na liwa. Mpo na oyo etali hinduisme, Encyclopedia Universalis ezali kondima ete: “Ezali na ebele na bandimbola ya lifelo ntuku mibale na moko oyo ekanisami epai na Bahindou. Basali na masumu bazali kolyama na banyama mabe mpe epai na banyoka, bakalingami malamumalamu, bakatami mikemike na bikateli na mabaya, batungisamaki na mposa ya mai mpe na nzala, batokisami na mafuta to batutami na eboka, banikami kati na sani ya bibende to ya mabanga.”
Jaïnisme mpe bouddhisme bango mpe bazali na ndenge na bango ya komonisela lifelo epai kuna bato na masumu bazali konyokolama. Zoroastrisme, oyo ebandaki na lran, to Perse, yango mpe ezali na lifelo na yango-esika moko ya malili mpe ya nsolo mabe epai kuna milimo ya basumuki mizali kotungisama.
Bato bazali koloba ete, minyokoli ya lifelo ya bato na Ezipite, ya bahindous, ya ba jaïniste, ya ba budiste mpe ba zoroastriens ezali mpenza ya seko te. Engebene mangomba yango, nsima na eleko moko ya mpasi, milimo ya basali na masumu mizali kokende na esika mosusu to mizali kobongwana, na kotalela esika moto asengeli kokende engebene likanisi ya lingomba mokomoko. Makanisi na bango mpo na lifelo makokani na oyo ya epongelo na bakatolike.
Lifelo epai na bagreke, baétrusque mpe baromain
Bagreke ya Kala bazalaki kondima na kozanga kokufa ya molimo (psukhê, liloba oyo elimboli lisusu kipungupungu). Mpo na bango, mokili na bakufi ezalaki kobengama Hadès mpe etambwisamaki na nzambe oyo azalaki na nkombo moko wana. Kati na mokanda na ye Orpheus-Lisolo nyonso ya mangomba, moto na mayele na makambo matali mikanda Salomon Reinach ye moto na France akomaki boye na ntina na Bagreke: “Endimeli moko oyo epalangani elingi [ete molimo] ekota kati na Lifelo, nsima na kokatisa ebale ya lifelo ya Styx likoló na masuwa moke ya nkoko nocher Charon, oyo azali kosenga, mpo na tiké ya boleki, obole (mosolo ya ebende) oyo bazali kotia kati na monoko ya mowei. Na lifelo, azali kobima liboso na basambisi misato ya esika yango . . . ; akweisami mpo na misala na ye mabe, akonyokwama kati na Tartare . . . Bakanisaki mpe nkutu ata mpo na limbes, esika na milimo ya bana bakufi bilenge mpenza, mpe na Epongelo epai kuna minyoko ya petee mizali kopetola milimo.” Engebene buku moko (The World Book Encyclopedia), milimo oyo mizalaki kokende na Tartare “mizalaki konyokwama mpo na libela”.
Na ltalie, ba Etrusque, oyo bomoi na bango eyebanaki liboso na oyo ya Baromé, bazalaki mpe kondima na minyokoli nsima na liwa. Diksionere ya mangomba elobi: “Likebi makasi oyo ba Estruoue bazalaki na yango mpo na kotalela bakufi na bango ezali kolimbolama na likanisi na bango ya lifelo, oyo bazalaki na yango, na ndakisa ya ba Babilonyé, lokola esika na konyokolama mpe ezangi elikya mpo na ba mânes [milimo na bakufi]: eloko bobele moko oyo ezalaki kolembisa bampasi na bango ezalaki makabo oyo bakitani na bango bazalaki kotumba mpo na kosenga lilimbisi.” Mokanda mosusu ya masolo elobi: “Nkunda ya ba Etrusque ezalaki na bililingi ya nsomo oyo epesaki makanisi ya lifelo epai na badésinatere ya boklisto ya mokili.”
Baromé bamekolaki lifelo ya ba etrusque, kobengaka yango Orcus to lnfernus. Bamekolaki mpe masolo ya Bagreke na ntina etali Hadès, mokonzi ya esika yango ya nse na mabelé, kobengaka ye Orcus to Pluton.
Bayuda mpe Makomami na liebele
Ezalaki boni mpo na Bayuda liboso na eleko na Yesu? Na ntina na bango, tozali kotanga kati na Encyclopédie britannique (1970): “Kobanda na ekeke ya mitano liboso na Yesu Klisto, Bayuda bazalaki na boyokani ya penepene elongo na Baperse mpe Bagreke, mabota mibale oyo bazalaki na makanisi ndenge na ndenge likoló na mokili ya bakufi. . . . Na eleko na Klisto, Bayuda bamekolaki endimeli oyo ete milimo ya bato mabe mizalaki kozwa etumbu kati na Géena nsima na liwa.” Nzokande, Encyclopoedia Judaica endimisi ete: “Esika moko te kati na Makomami tokokuta likanisi wana ebakisamaki mpo na Géena.”
Likanisi oyo touti kotanga ezali solo. Makomami na liebele mazali kondimisa ata mbala moko te ete nsima ya liwa molimo enyokolamaka kati na lifelo moko ya móto. Liteya wana ya nsomo euti na mangomba ya kala ya Babilone, kasi euti na Biblia te. Liteya ya boklisto na mokili oyo etali monyokoli kati na lifelo ebotamaki epai na ba Babilonyé ya yambo. Liteya ya katolike na ntina etali minyokoli mpo na kokitisa etumbu kati na epongelo euti epai na mangomba ya yambo ya Ezipito mpe ya Azia. Limbe to esika oyo milimo na basembwi mizali kofanda kino ntango mbeka mpo na lisiko ya masumu ekopesama eutaki na mateya ya lokuta ya Bagreke. Mabondeli mpe makabo mpo na bakufi mazalaki misala ya ba étrusque.
Makanisi oyo, ya kopesa etumbu na milimo nsima na liwa matongami likoló na nini?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, M’Clintock et Strong, volume 4, page 165.
[Elilingi na lokasa 5]
Nzela ya Styx mpo na kokatisa lokola yango emonisami kati na “Lifelo” ya Dante.