Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/11 nk. 16-17
  • Esobe na yuda ekaoka mpe kitoko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esobe na yuda ekaoka mpe kitoko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Aleisaki Yisraele na Sinai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mateya kitoko oyo tokoki kozwa na boyekoli ya Mokili ya Ndaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Boyekoli nimero 1—Mobembo mpo na kotala Mokili ya Ndaka
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yaká kotala libéké ya Galilai!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/11 nk. 16-17

Bililingi ya Mokili na ndaka

Esobe na yuda ekaoka mpe kitoko

OKANISAKA ete esobe na Yuda na Mokili na ndaka ezali ndenge nini? Bamoko bakanisaka ete ezali zamba monene etonda na banzete. Bamosusu bakanisaka ete ezali esobe lokola oyo na Sahara oyo ezali na etando molai na zelo.

Makanisi oyo mibale mazali solo te, mpe okoki komona yango na foto oyo ezali na nse. Foto yango ezali komonisa bobele mwa eteni na esobe, oyo elobelami na lisolo etali bomoi na Yesu. Engebene masolo na kala, Satana alakisaki Yesu “bikonzi nyonso ya mokili” uta nsonge na ngomba oyo ezali awa na ebandeli, oyo ezali na mondelo na esobe mpe ezali komonisa epai na est, na lobwaku na Yordani, na engumba na Yeriko mpe na elanga na yango ya mbila.​—Matai 3:1; 4:1-11.

Longwa na eteni oyo na nord-est, esobe na Yuda ekei pembenipembeni na libongo na la mer Morte, epai na elalelo na moi. Okoyeba malamu mpenza eteni na mabelé yango na kotalaka carte oyo ezali na ezipeli na Manaka ya ba Témoins de Jéhovah 1989. (Manaka yango ezali mpe na foto monene na elilingi oyo ezali awa na likoló.) Esobe (oyo ezali na bonene ya 16 kino 24 kilomètres) ebandi na bangomba na Yuda oyo ezali na orient mpe ekiti kino na mondelo na la mer Morte.

Bangomba ekangaka malili oyo ezali kouta na la mer Méditerranée. Yango wana bangomba ya mpembe oyo ezali epai na est, elingamalingama mpe ya polele, ezwaka se mbula moke longola bobele na ntango na malili mingi, na Novembre mpe Décembre. Na eleko yango, matiti ebimaka, mpe bampate bakoki koleisama kuna. Na yango “mapango na bampate matongami na mabanga’” oyo malobelami na 1 Samwele 24:3 makokani mpenza na ndimbola epesami na ntina na régió yango.

Matiti oyo ebimaka kuna eumelaka mingi te. Soko mopepe na est oyo ezali kouta na esobe ebeti, matiti ekoumela te mpo na kokaoka. Yango ezali elakiseli malamu ya esakweli monene oyo elandi: “Matiti mazali kokaoka, felele ezali kolemba, nde liloba na Nzambe na biso ekotelema libela.”​—Yisaya 40:8: 1 Petelo 1:24, 25.

Mbala mosusu Yesu akanisaki na mozindo ya verset yango ntango aza-laki kotambolatambola na esobe na Yuda mikolo 40 mpe butu 40. Kanisa na ndenge ayokaki ntango moi makasi ezalaki kongala likoló na mabanga mpe mabulu minene ezanga matiti. (Yisaya 32:2) Tobandi kokanga ntina mpo na nini ‘baanzelu bayaki na nsima mpe babandaki kosalela ye’!​—Matai 4:1-11.

Lokola ezalaki ya kokaoka mpe efandamaki na bato te, esobe na Yuda ekomaki bongo ebombamelo. David abombanaki kuna ntango azalaki koki- ma mokonzi Saulo oyo asilikaki, mpe alobaki boye: “Na kati na esika ekaoki mpe ezangi mai.” (Nzembo 63:1; 1 Samwele 23:29) Mpo na mwa ntango abombamaki na libulu kati na mabanga, oyo mbala mosusu ekokani na libulu na Umm-Qatafa na esobe ya Khareitun, lobwaku oyo euti epai na est na Bethléhem mpe etalisi epai na la mer Morte. (Baebele 11:32, 38) Na foto oyo ezwami uta na libulu kati na libanga, tozali komona na loboko na mobali, na nse, mwa bampate ya moindo bazali kolya matiti oyo ebimaka mpe mingi te.

David azalaki kobombama kati na libulu ya libanga moko na régió ya En-Guédi ntango Saulo akotaki mpo na kokende na kabine. Atako akataki eteni ya elamba na Saulo, asalaki mabe te na “mopakolami na Jéhovah”. Nsima na yango abengaki Saulo, mbala mosusu ntango akomaki na nse epai matiti mazali mingi. (1 Samwele 24:1-22) Okoki komituna ete: “Matiti mingi ekoki kobima awa?”

Ee,ya solo. Soko mai mazali mingi, esobe oyo ekoki kobimisa mpenza ma- titi. Tozwa ndakisa na En-Guédi. Na lobwaku oyo ezali epai na mondelo na ouest ya la mer Morte, mai oyo ezali kokota kati na mabanga matobokatoboka mabimaka lisusu lokola maziba. En-Guédi ekomaka bongo zamba monene na matiti kitoko. Ezalaka na lolenge mingi na fololo kuna mpe na mbuma, mpe na nyama na zamba, lokola daman oyo afandaka na mabanga minene mpe bouquetin; ata bankoi mpe bazalaka!​—1 Samwele 24:2; Loyembo na Salomo 1:14.

Soko tokanisi ete esobe ekaoka oyo na Yuda ekoki kobimisa matiti boye, tokokanga lisusu ntina na emonaneli oyo Ezekiele azwaka na temple na Yelusaleme na kati na yango mai ezalaki kobima. Mai yango ezalaki ko- bakisama kino ekomaki ebale monene oyo ezalaki kokenda epai na est mpe ezalaki koleka esobe na Yuda. Ezekiele alobeli yango boye: “Na libongo na ebale nzete ezalaki mingi . . . Mbuma na yango ekozala mpo na kolya mpe nkasa na yango mpo na kobikisa.”​—Ezekiele 47:1-12; Yisaya 35:1, 6, 7.

Na bongo, atako esobe na Yuda ekaoka mwa moke mpe efandami na bato te, ezali mpe eteni moko na mabelé oyo ezali kitoko mpe etondi na makamwisi, oyo ebongi mpenza mpo na masolo mingi mayebisami na Biblia.​—Luka 10:29-37.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto