Okoki koyanola?
Otangaki na likebi nyonso banimero ya Mosenzeli oyo euti kobima? Na yango, tala soko okoki koyanola na mituna milandi.
◻ Na ndimbola nini Paulo asaleli liloba “moyokanisi” kati na 1 Timote 2:5, 6?
Na mokapo yango, Paulo asaleli liloba na greke mésitês, oyo ebongolami na “moyokanisi”, ezali na ndimbola ya makambo matali mibeko. Asaleli yango te na ndimbola oyo epesami na minoko mingi. Na yango, Paulo, alobi te ete Yesu azali Moyokanisi kati na Nzambe mpe bato banso. Amonisi Klisto lokola Moyokanisi oyo aponami na kondimana na sika, oyo atyaki moboko mpo ete bayekoli bapakolami na Klisto basangana na ye na Bokonzi na ye na makoló. (2 Bakolinti 5:1, 5; Baefese 1:13, 14; Baebele 8:7-13)—15/8, pages 30, 31.
◻ Na Matai 25:34, maloba malandi oyo Yesu alobaki epai na “bampate” malimboli nini: “Bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili.”
Yesu alingaki koloba te ete “bampate” na ye bakoyangela elongo na ye na makolo, kasi bakosangola esika na Bokonzi na mabelé ebongisami mpo na bango “longwa na ebandeli na mokili” na bato oyo bakoki kosikwama. Na ndenge yango, bakokoma bana na mabelé na “Tata na seko”, Mokonzi Yesu Klisto. (Yisaya 9:6, 7)—1/9, page 20.
◻ Ekozala na ntina ete basangani mosusu na Bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé bazela naino ete bayamba basembwi oyo bakufa liboso na Pantekote ya mobu 33?
Te, ekozala mpenza na ntina te. Ebele monene na babiki ya bolozi monene bazali kobongisama mpo na komema mikumba kati na lisangá. Na yango, bakozala na makoki ya kotalela makambo na basekwi mpe kolakisa bango “mabelé na sika etambwisami na makoló na sika”. (2 Petelo 3:13)—1/9, pages 20, 21.
◻ Esengeli kosala nini mpo na “kobikisama”? (Misala 16:30)
Likambo ya liboso ya kosala yango oyo: “Ndimela Nkolo Yesu mpe okobikisama.” (Misala 16:31) Yango ezali kosenga ete moto azala na boyebi ya solo ya mikano na Nzambe mpe na nzela ya lobiko. Na nsima na yango, esengeli kozala na kondima epai na Yesu Klisto, Esaleli monene na lobiko. (Yoane 3:16; Tito 2:14) Moklisto akomi bongo lokola moto oyo abikisami, kasi asengeli na bomoi na ye mobimba koyika mpiko mpo na kokokisa mokano na Nzambe mpe kokokisa ntango nyonso makambo masengami na Nzambe. Ezali bobele na ndenge yango nde akobikisama mpo na kozwa bomoi ya seko. (Matai 24:13)—15/9, page 7.
◻ Na ndenge nini kondima na Noé ekweisaki mokili? (Babele 11:7)
Botosi mpe misala na boyengebene na Noé emonisaki ete bato mosusu bakokaki kobika na mpela, lokola ye mpe libota na ye, soko bazalaki pene mpo na kobongola bomoi na bango. Noé amonisaki ete, ata na bopusi na nzoto oyo ezangi kokoka, mpe bopusi na mokili oyo ezingaki ye mpe bopusi na Diable, bato bazalaki na likoki ya kozala na bomoi malamu na miso na Nzambe.—1/10, page 11.
◻ Mpo na nini tosengeli komibatela na bilobaloba ata ya moke?
Ata yango ezali mpo na kozokisa te, nzokande ekoki solo kozokisa soki ezongelami mbala na mbala. Ekoki kobonga to mpe kokota zamba kino kobebisa lokumu ya moto na sembo mpe kopakola salité na nkombo na ye. (Masese 20:19)—15/10, page 13.
◻ Matomba nini makobima soko babalani basali ‘ekanganeli malamu’?
Babalani bakoki kolendisana mpo na oyo etali losambo na Nzambe na bango. Epai mosusu, bakoki kosalela Makomami mpo na kobongisa mikakatano na bango.—1/11, page 20.
◻ Ndenge nini Mibeko Zomi mikoki kosalisa biso na ntango oyo?
Ezali komonisa ndenge nini Jéhovah azali kotalela makambo mpe ezali bokundoli ya ntina ya mikumba na biso ya kolinga Nzambe mpe mozalani na biso. (Matai 22:37-39; 2 Timote 3:16, 17)—15/11, pages 5, 6.
◻ Tanga mbala misato oyo Nzambe alobaki na motindo boye ete Yesu mpe bato mosusu bayokaki ye?
Mbala ya yambo, ezalaki na ntango oyo Yesu abatisamaki na Yoane Mobatisi. (Matai 3:17); mbala ya mibale, ntango Yesu abongwanaki na miso na Yakobo, Yoane mpe Petelo. (Matai 17:5); mpe mbala ya misato, le 10 Nisan, mikolo minei liboso na kufa na Yesu, ntango bibele oyo bazalaki na temple bayokaki mongongo na Nzambe. (Yoane 12:28)—1/12, page 8.