Bolingo ya solo ekopesaka bolamu
“Mpo ete Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo basili bino kotalisa na nkombo na ye.”—BAEBELE 6:10.
1, 2. Mpo na nini bolingo ya solo ezali kopesa biso bolamu?
BOLINGO ezangi moimi ezali ezaleli oyo eleki nyonso, ezaleli na lokumu koleka, na motuya koleka oyo tokoki komonisa. Bolingo wana (na greke agapé) ezali kosenga ntango nyonso makambo mingi epai na biso. Nzokande, lokola tozalisamaki na Nzambe ya boyengebene mpe ya bolingo, tozali komona ete bolingo yango oyo ezangi moimi ezali kopesa bolamu ya solo. Mpo na nini yango ezali bongo?
2 Ntina ya liboso mpo na yango bolingo ya solo ekopesaka bolamu esangani na mosala ya nzoto, elingi koloba bopusi ya makanisi na biso mpe ya mayoki na biso kati na nzoto na biso. Monganga moko oyo ekosalisaka maladi ya makanisi alobaki ete: “‘Osengeli kolinga mozalani na yo’ ezali moko na batoli eleki malamu ya minganga.” Ya solo, “moto na boboto akosunga molimo na ye moko.” (Masese 11:17) Kati na likanisi motindo moko, tozali kotanga ete: “Molimo na kokabela akofulisama monene; ye oyo akomema mai akozwa mai mpo na ye moko.”—Masese 11:25; tala Luka 6:38.
3. Nzambe azali kosala nini mpo ete bolingo ya solo epesa bolamu?
3 Soki bolingo ekopesaka bolamu, ezali lisusu mpo ete Nzambe akopesaka mbano na ezaleli ya bokabi. Tozali kotanga ete: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisa Jehovah; (Nzambe)akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.” (Masese 19:17) Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala bongo ntango bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Bayebi ete ‘Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bango mpe bolingo oyo basili komonisa na nkombo na ye.’—Baebele 6:10.
Ndakisa eleki malamu
4. Nani apesaki ndakisa malamu oyo ezali komonisa ete bolingo ya solo ekopesaka bolamu, mpe ndenge nini?
4 Nani amonisi koleka bato nyonso ete bolingo ekopesaka bolamu? Moto mosusu te bobele Nzambe ye moko! “Alingaki mokili (na bato) na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko.” (Yoane 3:16) Likabo ya Mwana na ye, likabo oyo apesaki mpo na kosalisa baoyo bakondima mbeka na lisiko wana ete bazwa bomoi na seko, esengisaki ye makambo mingi mpenza mpe amonisaki mpo na yango bolingo na ye mpe ezaleli na ye ya komitya na esika ya bato. Tozali mpe komona bizaleli wana ya Nzambe ntango tozali kotanga ete ‘na boumeli nyonso ya mpasi ya Yisraele na Ezipito, ezalaki mawa mpo na ye.’ (Yisaya 63:9) Yango ezalaki mpenza mawa mingi lisusu koleka mpo na Jehovah na komona Mwana na ye konyokwama na nzete na mpasi mpe koyoka ye konganga ete: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?”—Matai 27:46.
5. Nini epesamelaki nzela mpo ete Nzambe alingaki mingi mokili ya bato mpe apesaki mwana na ye lokola mbeka?
5 Jéhovah amonaki ete bolingo na solo oyo amonisaki epesaki bolamu? Ya solo mpenza. Oyo nde eyano monene akokaki kopesa na Satan le Diable lokola Yesu amimonisaki sembo atako mimekamo oyo monguna wana abimiselaki ye! (Masese 27:11) Ya solo, nyonso oyo Bokonzi na Nzambe ekosala mpo na kosukola nkombo na Jéhovah na nsoni oyo ezali kobebisa yango, mpo na kozongisa Paradis na mabelé mpe kopesa bomoi na seko epai na bamilió na bato, nyonso wana ekosalema mpo ete Nzambe alingaki mpenza mokili na bato, ntina wana apesaki lokola mbeka moto oyo alingami mingi na ye.
Ndakisa malamu na Yesu
6. Bolingo etindaki Yesu na kosala likambo nini?
6 Tozali na ndakisa mosusu eleki malamu na bomoto na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, oyo emonisi ete bolingo ya solo ekopesaka bolamu. Alingi Tata na ye ya likoló, mpe bolingo wana epusaki ye na kosala mokano na Ye, atako yango ebendelaki ye minyoko. (Yoane 14:31; Bafilipi 2:5-8) Yesu alandaki komonisa bolingo na ye mpo na Nzambe, atako mbala mosusu abondelaki Tata na ye “na konganga makasi mpe na mpisoli” mpo ete akokisa yango. Baebele 5:7.
7. Motindo nini Yesu amonaki ete bolingo ya solo ekopesa bolamu?
7 Bolingo wana emonisami na ezaleli ya komiboya epesaki bolamu epai na Yesu? Solo mpenza Kanisa naino esengo oyo azwaki na makambo nyonso malamu oyo asalaki na boumeli ya mosala na ye ya mbula misato na ndambo. Ezalaki mpenza lisalisi malamu oyo apesaki epai na bato na nzela na elimo mpe na mosuni. Nde koleka nyonso, Yesu azwaki esengo na kolakisa ete Satana azali mokosi, na komonisaka ete moto ya kokoka azali na likoki ya kotikala mpenza sembo epai na Nzambe atako mimekamo nyonso oyo Satana akoki kobimisela ye. Lisusu, lokola azalaki mosaleli ya sembo na Nzambe, Yesu azwaki mbano monene: alatisamaki nzoto ekoki kobeba te na ntango ya lisekwa na ye mpo na kozala na bomoi bokoki kosuka te, kuna na likoló. (Baloma 6:9; Bafilipi 2:9-11; 1 Timote 6:15, 16; Baebele 1:3, 4) Mpe matomba kitoko mazali kozela ye na Armagedon mpe na boumeli ya Boyangeli na ye ya mbula nkoto, ntango Paradis ekozongisama awa na mabelé mpe ete ebele na bato bakosekwisama. (Luka 23:43) Na ntembe te, Yesu asili komona ete bolingo ya solo ekopesaka bolamu.
Ndakisa ya Paulo
8. Nini ekomelaki Paulo na ntina na bolingo na ye ya solo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na ye?
8 Mokolo moko, ntoma Petelo atunaki Yesu ete: “Tala, biso totiki nyonso mpe tolandi yo. Biso tokozwa nini?” Yesu ayanolaki ete: “Ye nani atiki ndako to bandeko babali to bandeko basi to tata to mama to bana to baninga mpo na nkombo na ngai, akozwa mbala mingi mpe akosangola bomoi na seko.” (Matai 19:27-29) Tozali na ndakisa kitoko ya solo oyo na bomoto na ntoma Paulo, ye oyo azwaki bolamu mingi, lokola Luka akomaki yango polele mpenza kati na mokanda ya Misala. Bolingo ya solo na Paulo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na ye ememaki ye na kotika mosala na ye ya Mofalisai, oyo esengelaki kopesa ye lokumu. Kanisa lisusu na makambo nyonso oyo ayikelaki mpiko: abetamaki fimbo, abelemaki na kufa, azwaki makáma mpe kozanga bilei mpe mai nyonso wana mpo na bolingo na ye ya solo mpo na Nzambe mpe mosala na Ye ya bulee.—2 Bakolinti 11:23-27.
9. Bolamu nini Paulo azwaki mpo ete amonisaki bolingo ya solo?
9 Jéhovah apesaki mbano na Paulo mpo na ndakisa malamu oyo apesaki na komonisáká bolingo ya solo? Kanisa na meko nini mosala ya Paulo ebotaki mbuma mingi. Ntoma wana asalaki masangá mingi na boklisto. Epai mosusu, Nzambe apesaki ye nguya ya kosala bikamwiseli minene. (Misala 19:11, 12) Paulo azwaki mpe libaku malamu ya kozwa bimonaneli mpe kokoma mikanda 14 oyo mizali lelo kati na Makomami na greke ya boklisto. Na koleka nyonso, azwaki mbano ya bomoi bokoki kosuka te kuna na makoló. (1 Bakolinti 15:53, 54; 2 Bakolinti 12:1-7; 2 Timoté 4:7, 8) Na ntembe te, Paulo asili komona ete Nzambe akopesaka mbano na bolingo ya solo.
Bolingo ya solo ezali kopesa bolamu na mikolo na biso
10. Kokóma bayekoli na Yesu mpe komonisa bolingo na biso mpo na Jéhovah ekoki kosenga nini epai na biso?
10 Motindo moko, na mikolo na biso, Ba Témoins de Jéhovah bazali komona ete bolingo ya solo ekopesaka bolamu. Komonisa bolingo na biso mpo na Jéhovah na kozwáká etelemelo na ngambo na ye mpe na kokómáká bayekoli na Yesu, ekoki komema biso na kokufa lokola bato na bosembo. (Tala Emoniseli 2:10.) Yango wana Yesu alobaki ete tosengeli kotanga motuya. Nzokande, tozali kosala yango te mpo na koyeba soki tokomizwela bolamu to te wana tokomi bayekoli na ye, kasi ezali nde mpo tomibongisa na kondima nyonso oyo yango ekoki kosenga biso.—Luka 14:28.
11. Mpo na nini bato mosusu bazali komipesa na Nzambe te?
11 Lelo, ntalo monene na bato na ntembe te bamilió na bato bazali kondima nsango euti na Liloba na Nzambe oyo ba Témoins de Jéhovah bazali koyebisa bango. Nzokande, bazali kokakatana mpo na komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo. Ezali mpo ete bazangi bolingo ya solo oyo bamosusu bazali na yango mpo na Nzambe? Mingi bazali komipesa te mpe kozwa batisimo te mpo ete balingi te kozwana matata na babalani na bango oyo bazali bandimi te. Bamosusu bazali kobelema pene na Nzambe te mpo ete bazali na elimo motindo moko na moto na mombongo oyo alobaki na Temwe moko ete: “Nalingaka masumu.” Lokola yango emonani polele, bato wana bazangi botondi epai na Nzambe mpe na Klisto mpo na nyonso oyo basalaki mpo na bango.
12. Mosenzeli elobaki nini mpo na komonisa bolamu bozwami na boyebi oyo bozali kobelemisa biso pene ma Nzambe kati na bolingo ya solo?
12 Mpo na biso, soki tozali na botondi ya solo mpo na nyonso oyo Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto basalaki mpo na bolamu na biso, bokomonisa yango na kondimáká na motema moko makambo nyonso oyo makobima likoló na kosalela Tata na biso ya makoló mpe kozala bayekoli na Yesu. Na bolingo ya solo mpo na Nzambe, mibali mpe basi ya mitindo nyonso—bato na mimbongo ya mosolo mingi, ba vedette ya masano, mpe bongo na bongo batikaki, na ndakisa ya ntoma Paulo, misala oyo bazalaki kolanda na moimi nyonso mpo na komipesa mobimba kati na mosala na boklisto. Mpe bakoki te kosanzé to kosombitinya bolamu oyo bazali kozwa na boyebi mpe na mosala na Nzambe, na likambo moko to mpe na eloko moko kati na mokili. Na ntina yango, tala oyo totangaki mokolo moko kati na Mosenzeli ya Lingelisi ya 15/12/1914, lokasa 377: “Ekomelaki biso na kotuna ete: Bandeko boni bakosanzé makambo oyo bayebi na ntina na Solo mpo na badolare nkoto? Moko te atombolaki loboko! Na badolare nkoto zomi? Moto moko mpe te! Na badolare milió moko? Nani akolinga kosombitinya mokili mobimba na makambo oyo ye ayebi na ntina na Nzambe mpe mokano na Ye? Moto moko te! Na nsima tolobaki ete: Baninga ya bolingo, bozali etuluku ya bato bazangi bosepeli te. Soki bozali kondima ete bozali bazwi na boye ete, na mokili bokoki kosanzé boyebi na bino mpo na Nzambe na eloko moko te, na bongo bokanisi ete bozali bazwi lokola biso mpe tozali kokanisa yango.” Na yango, boyebi ya solo na Nzambe mpe ya mikano na ye ezali kobelemisa biso pene na ye kati na bolingo ya solo, bolingo oyo bokopesaka bolamu ya solo.
13. Ndenge nini tokoki kotalela boyekoli na biso moko ya Biblia?
13 Soki tolingi Nzambe, tokosala nyonso mpo na koyeba mokano na ye mpe kosala yango. (1 Yoane 5:3) Tokobatela esika esengeli mpo na boyekoli na biso ya Biblia, mpo na mabondeli mpe mpo na kosangana na makita ya boklisto. Misala nyonso wana mikosengaka milende, mpamba te ezali kosenga ntango, makasi mpe makambo mosusu. likoki ntango mosusu kosengela na biso ete topona kolanda émission moko ya télévizió to mpe kosala boyekoli na biso ya Biblia. Nzokande, tokomilendisaka kati na elimo, tozali kokóma na mayele mingi mpo na kopesa litatoli mpe tozali kozwa matomba mingi na makita ya boklisto wana tozali koyekola na motema moko mpe komibombela ntango malamu mpo na kosala yango.—Nzembo 1:1-3.
14. Ntina ya libondeli mpe boyokani malamu elongo na Jéhovah Nzambe ezali nini?
14 Tozalaka ntango nyonso na esengo ya kolobana na Tata na biso ya likoló na ‘kolendendela kati na mabondeli’? (Baloma 12:12) To mpe tozalaka ntango nyonso na mosala mingi ya kosala na esika na kosepela na libaku kitoko wana? Ezali likambo na ntina ete ‘tobondelaka ntango nyonso’ mpo na kolendisa boyokani na biso elongo na Jéhovah Nzambe. (1 Batesaloniki 5:17) Mpe likambo moko ezali te oyo eleki boyokani malamu elongo na Jéhovah mpo na kosalisa biso ntango tomekami. Nini esalisaki Yosefe na kotelema ngwi ntango amekamaki na mwasi ya Potifare? Mpe mpo na nini Danyele atikaki kobondela te wana mobeko ya Medi mpe Perse epekisaki kosala mabondeli epai na Jéhovah? (Genese 39:7-16; Danyele 6:4-11) Ezali boyokani malamu oyo bato wana bazalaki na yango elongo na Nzambe nde esalisaki bango na kolonga momekamo wana, mpe ekosalisa biso na kosala motindo moko.
15. Motuya nini tosengeli kopesa na makita ya boklisto, mpe mpo na nini?
15 Na yango, motuya nini topesaka na makita na biso mitano ya poso na poso? Topesaka nzela na kolemba, na mwa bolembu moke ya nzoto to na mwa mbula moke ete ezangisa biso na koyangana elongo na bandeko na biso baklisto, nzokande tozali na mokumba ya kotika yango te? (Baebele 10:24, 25) Motambwisi moko ya engbunduka to train na Amerike, oyo azalaki kofutama malamu amonaki ete mosala na ye ezalaki kopekisa ye mbala mingi na koyangana na makita ya boklisto. Atako kotika yango ebungiselaki ye mosolo, alukaki mosala mosusu mpo akoka koyangana mbala na mbala na makita nyonso na boklisto. Makita na biso mazali kosalisa biso na kozwa litomba na kolendisana mpe na koyikisana mpiko kati na kondima na biso. (Baloma 1:11, 12) Kati na makambo nyonso wana, ezali solo te ete “ye oyo akokóna moke akobuka moke nde ye oyo akokóna mingi akobuka mingi”? (2 Bakolinti 9:6) Ee, baoyo bazali komonisa bolingo ya solo na kosaláká motindo wana, bazali komizwela bolamu mingi.
Bolingo ya solo mpe mosala na biso mpo na Nzambe
16. Ntango bolingo ezali kotinda biso na kopesa litatoli ya mbálákáká, litomba nini likoki komonana?
16 Bolingo ezali kotinda biso na kosakola nsango malamu lokola basaleli na Jéhovah. Na ndakisa, ezali kotinda biso na kopesa litatoli na motindo ya mbalákáká. Tokoki kokakatana mpo na kosala yango, kasi bolingo ezali kotinda biso na koloba. Na ntembe te, bolingo ezali komema biso na koluka myango nyonso ya kobanda lisolo na mayele mpe nsima koloba na ntina na Bokonzi. Na yango, mokolo moko, kati na mpepo, nkulutu moko amimonaki ete afandaki penepene na sángo moko. Na ebandeli, asololaki na ye na ntina na makambo ya bongo na bongo. Kasi ntango sángo akitaki na mpepo, mposa na ye elamusamaki mpenza mpo ete akoka kondima mikanda na biso mibale. Oyo nde litomba malamu lizwamaki na nzela na litatoli ya mbalákáká!
17, 18. Kati na likambo litali mosala na boklisto, bolingo ekoki kotinda biso na kosala nini?
17 Bolingo ya solo ezali mpe kotinda biso na kosangana mbala na mbala kati na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe na mitindo mosusu nyonso ya mosala ya boklisto. Kati na meko oyo tokoki kobanda masolo ya Biblia, tozali koluka kokumisa Jéhovah Nzambe mpe kosalisa “bampate” na kokóta kati na nzela ya bomoi na seko. (Tala Matai 7:13, 14) Ata soki tokoki kobanda masolo te, milende na biso mizali ya mpamba te. Bobele komonana na biso epai na bato ezali mpenza kopesa litatoli, mpe biso moko tozali kozwa litomba na mosala ya kosakola, mpamba te tokoki te kosakola solo ya Biblia kozanga ete tolendisa kondima na biso. Ya solo, esengeli komikitisa mpo na kokende ndako na ndako mpe ‘kosala nyonso na ntina na nsango malamu, mpo na kokóma mokabani elongo na bamosusu.’ (1 Bakolinti 9:19-23) Kasi na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso, tozali kosala molende yango na bopolo nyonso mpe tozali kozwa bolamu mingi.—Masese 10:22.
18 Basaleli na Jéhovah basengeli mpe komonisa bolingo ya solo mpo na kozongela na motema moko, bato oyo basepelaki na solo ya Biblia. Na kotambwisáká boyekoli ya Biblia poso na poso mpe sanza na sanza, tozali komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso, mpamba te mosala yango esengaka ntango, milende mpe ekosengaka makambo mingi. (Malako 12:28-31) Kasi, ntango tozali komona moyekoli moko ya Biblia kozwa batisimo, to mpe kobanda mosala ya pionnier, tozali kondimisama te ete bolingo ya solo ekopesaka bolamu?—Tala 2 Bakolinti 3:1-3.
19. Boyokani nini bozali kati na bolingo mpe mosala ya pionnier?
19 Bolingo ezangi moimi ezali kotinda biso na kotika bozwi na biso ya mosuni mpo na kobanda mosala ya pionnier, soki likoki ezali na biso ete bosangana na mosala yango. Ebele na Batemwe bakoki komonisa ete bazali komizwela bolamu boleki mpenza na komonisáká bolingo na bango na motindo wana. Soki, na ezalela ya makambo na bomoi na yo, okoki kosangana na mosala ya pionnier, nde ozali kosalela libaku yango te, ozali koyeba te bolamu nini ozali kobungisa.—Tala Malako 10:29, 30.
Bolamu mosusu
20. Na likambo nini bolingo ezali kosalisa biso na kolimbisa?
20 Bolingo ya solo ekopesaka bolamu: ezali kosalisa biso na kolimbisa bamosusu. Ya solo, bolingo “ekobómbaka mabe na motema te,” kasi “ekozipaka ebele na masumu.” (1 Bakolinti 13:5; 1 Petelo 4:8) “Ebele”, elingi koloba ntalo monene, boye te? Oyo nde ebele na bolamu tozali kozwa na komilengeláká mpo na kolimbisa! Ntango tozali kolimbisa, kobondisama monene ezali komonana mpo na biso moko, mpe mpo na ye oyo asalelaki biso lisumu! Kasi likambo ya ntina mingi lisusu koleka ezali oyo, bobele soki tosilaki kolimbisa baoyo bazali kosalela biso masumu, nde tokoki komizela ete Jéhovah alimbisa biso.—Matai 6:12: 18:23-35.
20 Bolingo ya solo ezali mpe kopesa biso bolamu mosusu: ezali kosalisa biso na kozala na bosokemi. Soki tolingi Jehovah, tokondima kosokema na nse na loboko na ye makasi. (1 Petelo 5:6) Bolingo na biso mpo na ye ezali kotinda biso mpe na kotosa esaleli oyo ye aponaki, “moombo na sembo mpe na mayele.” Yango wana tozali na botosi epai na baoyo bazali liboso na biso kati na lisangá. Ezalela wana ezali kopesa biso bolamu, mpamba te ekozala na biso “mpasi mingi” kosala ndenge mosusu. (Matai 24:4547; Baebele 13:17) Ya solo, ezali mpe ntina mingi na kozala na botosi kati na libota. Ezalela wana ezali kopesa bolamu, mpamba te ezali kolendisa esengo, kimya mpe boyokani kati na libota na kopesaka mpe bosepeli ya koyeba ete tondimami epai na Nzambe.—Baefese 5:22; 6:1-3.
21. Na likambo nini bolingo ezali kosalisa biso na kozala na bosokemi?
21 Ezali polele ete, ezalela eleki mpenza oyo tokoki kolona ezali bongo bolingo agapê, bolingo ezangi moimi, etongami na mitinda. Mpe ntembe soko moke ezali te ete bolingo ya solo ezali kopesa bolamu. Na yango, tokozala mpenza na esengo soki toloni mpe tomonisi ntango nyonso koleka ezaleli wana mpo na lokumu ya Jéhovah Nzambe na biso atondi na bolingo.
◻ Na motindo nini Jéhovah Nzambe amonisaki bolingo ya solo?
◻ Ndenge nini Yesu Klisto amonisaki bolingo?
◻ Ndakisa nini ntoma Paulo apesaki mpo na oyo etali komonisa bolingo ya solo?
◻ Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa bolingo?
◻ Engebene yo, mpo na nini bolingo ezali kopesa bolamu?
22. Ndenge nini tokoki kozala mpenza na esengo?
[Elilingi na lokasa 16]
Bolingo na Jéhovah mpo na bato etindaki ye ete apesa Mwana na ye mpo tokoka kozwa bomoi na seko. Elembo wana ya bolingo na solo ezali kopusa motema na yo na kozala na botondi mingi?
[Elilingi na lokasa 18]
Bolingo na biso ya solo mpo na Jéhovah esengeli kotinda biso na ‘kolendendela kati na libondeli’