Okoki koyanola?
Otangaki na likebi nyonso bazulunalo Mosenzeli oyo eleki kala mingi te? Okosepela mpenza kozongela mwa makanisi mazali awa na nsé:
◻ Ndenge nini masolo ya bitumba bikanami na Jéhovah mpe biyebisami na Biblia mazali kopesa biso nzela na kotya solo motema ete tokotelema ngwi na “bolozi monene” oyo ezali koya?(Matai 24:21)
Lokola ezali ye ntango nyonso nkolo makambo, Jéhovah asila komonisa ete akoki kokweisa myango na bayini na ye mpe kobimisa makambo mpo na kobikisa libota na ye.—15/8, lokasa 27.
◻ Baboti basengeli kozala pene na kosala nini mpo na kobatela boyokani elongo na bana na bango? Baboti basengeli kopesa ntango mpo na bana na bango. Basengeli kozala pene na kotika makambo oyo balingaka mpo na bango. mpo na bokoli ya nzoto, ya makanisi, mpe ya elimo na bango.—1/9, lokasa 22.
◻ Kobongwana na Yesu ezali na ndimbola nini mpo na biso? (Malako 9:2-4)
Kobongwana na Yesu ekoki kolendisa kondima na biso kati na liloba na esakweli na Jehovah mpe ezali kopesa biso endimiseli ete Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe mpe Masiya ya elaka Ezali mpe kokembisa endimiseli na biso na lisekwa na Yesu mpo na kozala na bomoi ya elimo mpe kokolisa kondima na biso kati na boyangeli na Nzambe.—15/9, lokasa 23.
◻ Liloba “mpo na mwa ntango” kati na Yisaya 11:6 (MN) elimboli nini?
Libongoli malamu ya eteni oyo emonisi ete mbwa ya zamba mpe mwana na mpate bakofanda ntango nyonso esika moko te kati na mokili ya sika. Ekoki kozala ete nyama yango bakofanda na bisika bikeseni, mpe lokola ezalaki na paradis ya ebandeli, bakozala na molongo ya “nyama ya mboka” to “nyama ya zamba.” (Genese 1:24)Atako bongo, banyama bakozala na kimya kati na bango mpe bakokoka kobelema bamoko na bamosusu kozanga likama.—15/9, lokasa 31.
◻ Wapi elembo oyo ezali kokesenisa boklisto ya solo?
Bolingo ezali elembo oyo ezali kokesenisa boklisto ya solo. Kondima, misala malamu mpe baninga ya malamu ezali na ntina monene, nzokande soki bolingo ezali te ezali na ntina moko te. Ezali bongo mpo ete Jehovah azali liboso na nyonso Nzambe na bolingo. (1 Bakolinti 13:1-3; 1 Yoane 4:8)—1/10, lokasa 20.
◻ Elobeli ’’ntango mpo na kobotama mpe ntango mpo na kokufa,” na Mosakoli 3:2, emonisi ete Nzambe esila kokana na liboso moko ya liwa na biso?
Te. Awa Salomo alobelaki bobele mpo na ndenge biso bato tozangi kokoka tozali kobotama mpe tozali kokufa. Mosakoli 7:17 elobi: “Zala mabe na koleka te mpe zala zoba te. Mpo na nini okokufa liboso na ntango na yo?’’ Toli oyo ekoki kolimbola mpenza nini soki eleko na liwa na biso esila kokanama liboso?—15/10, lokasa 5, 6.
◻ Bilembeteli nini tozali na yango mpo na komonisa ete ntoma Petelo azalaki episkɔpɔ wa yambo wa Loma te?
Ezali na eloko moko te oyo emonisi ete akendaki na Loma. Ezali mpe malamu na koyeba ete Petelo abandaki komitanga kati na bantoma ya Klisto, kasi abakisaki likambo mosusu te. (2 Petelo 1:1)—15/10, lokasa 8.
◻ Ezali malamu mpo na baklisto kopesa fololo mpo na bokundi ebembe?
Soki emonani ete momeseno moko (to eloko moko oyo ekembisami lokola ekulusu) ezali na ndimbola kati na losambo na lokuta, esengeli kobwaka yango. Na bongo, baklisto bakotinda bafololo te oyo ebongisami na motindo na ekulusu, mpe bakoboya mitindo misusu ya milulu ya kosalela bafololo oyo mizali na ndimbola ya losambo ya lokuta. Nzokande, lelo oyo, na mikili mingi, momeseno ya kopesa fololo epalangani mingi, kozanga ete ezala na boyokani na losambo ya lokuta. Baklisto mosusu batindaka-bafololo mpo na kobondisa mwa moke bato bazali na mpasi mpe komonisa motema mawa.—15/10, lokasa 31.
◻ Bandimbola oyo mangomba mazali kopesa likoló na Trinité to Bosato emonisi nini?
Emonisi polele ete Trinite to Bosato ezali likanisi ya pɛtɛɛ te. Nzokande, na boumeli na bikeke mingi, esili kosangisa liboke na makambo mpo na kokomisa yango ebongiseli moko. Ebele na balimboli ya Biblia, ata baoyo bandimaka Trinité, bazali kondima ete Biblia ezali koteya Trinite te.—1/11, lokasa 20, 22.
◻ Mpo na nini mobu 29 ya ntango na biso etalelami lokola mbula moko ya ntina kati na lisolo ya Biblia?
Mpo ete, na nzela na makambo mayebisami na Biblia mpe na ba dates oyo eyebisamaki na lisolo na bato mpo na boyangeli ya Tibele, moyekoli ya Biblia akoki kososola ete mosala ya Yoane ebandaki na printemps ya mobu 29 mpe sanza motoba na nsima, na automne ya mobu 29, Yoane abatisaki Yesu.—15/11, lokasa 31.
◻ Liloba losambo ezalaki na ndimbola nini mpo na Baebele, mpe na nini likambo yango ezali kotalela ba Témoins de Jéhovah na mikolo na biso?
Liloba ya Liebele oyo likokani na ”losambo” ekoki kobongolama na liloba “mosala.” Bongo, mpo na Baebele losambo ezali kolimbola mosala. Ezali ndenge moko, lelo, mpo na libota ya Jéhovah. Na yango, elembo moko oyo ezali na ntina mingi mpo na lingomba na solo ezali ete baoyo nyonso bazali kati na yango bazali kosangana na mosala na Nzambe etali kosakola.—1/12, lokasa 19.