Okoki koyanola?
Osepelaki kotanga banimero ya sika ya Mosenzeli? Boye, tala soki okoki koyanola na mituna oyo milandi:
▫Kobakisama na mikumba mpe misala epai na Banetinime mpe bana na basali na Salomo nsima na kozonga na bango na boombo ya Babilone ezalaki elilingi ya nini?
Lelo oyo, motuya ya batikali na Yisraele ya elimo baoyo bazali awa na mabelé mosengeli kokita, nzokande motuya na bampate mosusu mozali kokola. Lokola Banetinime mpe bana ya basali na Salomo, basusu kati na bampate yango basili kopesamela mikumba minene na nse na botambwisi ya batikali. (Yisaya 61:5)—15/4, nkasa 16, 17.
▫Mosakoli Sofoni alingaki koloba nini wana elobaki ye ete: “Soko nde bokobombama na mokolo na nkanda na Jéhovah”? (Sofoni 2:2, 3) Mpo ete moto abatelama na “bolozi monene oyo ezali koya,” tokoki koloba te ete soki obiki, obiki mpo na libela. (Matai 24:13, 21) Moto akobombama na mokolo wana soki akolanda kosala makambo oyo misato: Asengeli koluka Jéhovah, koluka boyengebene mpe asengeli koluka komikitisa.—1/5, nkasa 15, 16.
▫Na ndimbola nini Mikaele “azali kotelema” na “mikolo na nsuka”? (Danyele 12:1, 4) Uta kotyama na ye lokola mokonzi na 1914, Mikaele “asili kotelema” mpo na kokotela libota na Jéhovah. Kasi mosika te, Mikaele “akotelema” na motindo na kokamwa: akozala Esaleli oyo na nzela na ye, Jéhovah akolongola mabe nyonso na mabelé mpe akozala Mosikoli na libota na Nzambe.—1/5, 17.
▫Bolamu ya solo etaleli likambo nini? Bolamu ya solo ekoutaka na boyokani malamu elongo na Jéhovah, ngolu na ye mpe mapamboli na ye. (Masese 10:22) Na yango, bolamu ya solo ekoki kozwama te na nzela na kozanga botosi epai na Jéhovah mpe kozanga komikitisa na esengo nyonso na nse na mokano na ye. (Luka 11:28)—15/5, nkasa 16, 19.
▫Ntango Yesu azalaki kobikisa bato na nzela na bikamwiseli, kondima ezalaki lisengami epai na ye oyo asengelaki kobikisama? Kati na makambo mingi, bato oyo bayaki epai na Yesu kosenga ete abikisa bango bamonisaki mwa kondima. (Matai 8:13) Nzokande, bazalaki ata na mposa moke te ya koyambola naino kondima na bango mpo ete Yesu asala ekamwiseli, lokola makolo abikisaki motengumi moko oyo nkutu ayebaki te soko Yesu azalaki nani. (Yoane 5:5-13) Yesu azongisaki mpe litoyi ya moombo na ngonga-kapita aya ekatamaki, nzokande moto yango azalaki kati na banguna na Yesu. (Luka 22:50, 51) Ezali na nzela na nguya ya elimo na Nzambe nde bikamwiseli wana ezalaki kosalema, kasi mpo na kondima na bato na maladi te.—1/6, lokasa 3.
▫“Molubá” oyo elobelami kati na lisese na Yesu na Matai 13:47-50 elimboli nini? “Molubá” elimboli esaleli moko awa na mabelé oyo ezali komitanga lisangá ya Nzambe mpe ezali koyanganisa “mbisi.” Esangisi kati na yango boklisto ya mokili mpe baklisto bapakolami, baoyo basili kokanga “mbisi kitoko,” na bokambami ya baanzelu na boyokani na Matai 13:49.—15/6, lokasa 20.
▫Wapi bomoko na mitinda oyo bazuzi na Yisraele basengelaki kotosa ntango bazali kokokisa mikumba na bango? Boyengebene lolenge moko mpo na mozwi mpe mobola, kozanga koponapona, mpe koboya konyaka. (Levitike 19:15; Deteronome 16:19)—1/7, lokosa 13.
▫Mokano nini bankulutu basengeli koluka kokoma na yango wana bazali koyoka moto na comité ya kosambisa? Moko na mikano ezali ya koyeba makambo makangisami na lisumu yango, mpe bakosala yango na bolingo. Ntango basosoli yango, bankulutu basengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo na kobatela lisangá mpe kosala ete mitinda mitombwani na Jéhovah mpe bopusi ya elimo na Nzambe ezela kati na yango. Koyoka mosumuki na comité ezali lisusu mwango, soki ekoki, ya kobikisa mosumuki oyo azali na likama. (Tala Luka 15:8-10.)—1/7, nkasa 18, 19.
▫Mpo na nini ezali likama kokolisa kati na makanisi mposa makasi ya kosangisa nzoto? Na boyokani na maloba na Yesu kati na Matai 5:27, 28, baoyo nyonso bazali komitika kati na mposa ya mbindo etali kosangisa nzoto bazali kokwea na ekobo kati na motema na bango. Mpe likama lizali monene ete makanisi motindo makoki komema na kosala pite.—15/7, lokasa 15.
▫Na meko nini Jéhovah akoki kosunga biso na komona mimekamo na biso na lolenge lobongi mpe na koyikela yango mpiko? Likebi na biso likoki kobendama likoló na mikapo na Biblia, na baninga na biso kati na kondima to kati na boyekoli ya Biblia. Makambo mosusu oyo mabimi na litabwisi na Nzambe makoki komonisa biso oyo tosengeli kosala. Baanzelu bakoki kokamba biso, to tokoki kozwa lisungi na elimo santu. (Baebele 1:14)—15/7, lokasa 21.
▫Likita ya Nicée, oyo esalemaki na mobu 325, etyaki to endimisaki liteya ya Bosato? Te, likita ya Nicée ekokanisaki bobele Mwana na Tata, lokola azali “na nzoto moko na Tata.” Likanisi oyo elobi ete Tata, Mwana mpe elimo bazali moto na moto Nzambe mpenza—Nzambe moko kati na bato misato—elobelamaki na likita yango te to mpe na bakonzi na mangomba ya Eklezia ya liboso te.—1/8, lokasa 20.
▫Yobo azalaki moto na bosembo bobele moko na eleko oyo azalaki na bomoi? (Yobo 1:8) Te, mokanda na Yobo yango moko ezali komonisa ete Elihu andimamaki na Nzambe. Lisusu, na eleko oyo Yobo azalaki na bomoi, ebele na Bayisraele bazalaki na Ezipito, mpe ezali na ntina moko te ya kokanisa ete bango nyonso bazangaki sembo mpe bandimamaki na Nzambe te.—1/8, lokasa 31.