Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/1 nk. 26-27
  • Bilenge oyo bazali ‘kotya elikya epai na Yehova’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge oyo bazali ‘kotya elikya epai na Yehova’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosambela Nzambe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/1 nk. 26-27

Bilenge oyo bazali ‘kotya elikya epai na Yehova’

BONZENGÁ ezali bobele mpo na bilenge te, mpe mayele mazali bobele mpo na mibangé te. (Kokanisá na Masese 11:22: Mosakoli 10:1.) Kasi, baoyo bazali na bonzengá bokoumelaka mpe na mayele ya solosolo bazali bato oyo bakotyaka elikya epai na Yehova mpe bazali koloba na ntina na ye na motema mobimba ete: “Yo ojali Njambe na ngai.”​—Njembo 31:14; Masese 9:10; 16:31.

Na bipai binso na mokili, ezali na ebele ya bato na bonzengá, bilenge mpe mikóló, baoyo bazali sé kobakisama, baoyo bazali komonisa mayele na bango na kosaleláká Nzambe mpe na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Na ndakisa, tolobela Sabrina, oyo azali na mibu mwambe.

Sabrina azali kofanda na Allemagne mpe azali na Eteyelo ya yambo. Azali Motatoli ya Yehova ya liboso oyo azali kotanga na eteyelo wana. Na mawa nyonso, azalaki kotungisama mingi na mafinga ya baninga na ye ya kelasi kino mokolo oyo molakisi asengaki na bayekoli nyonso ete moto na moto amema búku oyo alingaka mingi na kelasi. Sabrina azwaki ekateli ya komema Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Na butu oyo ezalaki liboso ya mokolo yango, atako azalaki na bobangi, amibongisaki malamu mpo na kelasi. Lokola bazalaki bayekoli 26 kati na kelasi na bango, ayebaki ete akozala na ntango mingi te. Kasi azwaki ekateli ete akopesa nzela na moto moko te ete akata lisoló na ye, mpe andimisamaki ete Yehova akosalisa ye. Wana ekómaki mokolo yango, molakisi atunaki soki nani amemaki búku mpe nani akolinga kozala moto ya liboso mpo na kolakisa yango. Na kokamwa nyonso, bobele Sabrina nde amemaki búku na ye. Atelemaki liboso ya kelasi mpe abandaki koloba, kotanga mpe komonisa bililingi bizali na búku mpe kolimbola ete makambo nyonso wana mazali na kati mauti na Biblia. Mpo na kosukisa, atunaki ete: “Nani akosepela kozwa búku oyo?” Apesaki búku moko na molakisi, mpe na boumeli ya mwa mikolo milandaki, apesaki babúku mosusu zomi epai na bamoko na baninga na ye ya kelasi. Maloba ya molakisi mpo na lisoló ya Sabrina ezalaki ete: “Naino namona likambo motindo boye te.” Apesaki Sabrina bilembo malamu mpo na mosala na ye.

Ya solo, bilenge Batatoli mingi bazali basakoli ya esengo ya nsango malamu na biteyelo. Ndakisa mosusu ezali ya Erika, elenge mwasi mosakoli na mibu 11, na mboka Mexico. Uta bomwana bateyaki ye kolinga Yehova. Bilembo na ye na kelasi ezali malamu mpenza. Moko na makambo oyo asengelaki kosala ezalaki ya kosala bolukiluki likoló na makambo matali SIDA mpe boombo ya makaya mpe ya masanga. Amibongisaki malamu, kosaleláká zulunalo Lamuká!, mpe azwaki bilembo ya malamu koleka. Molakisi na ye ya mwasi atunaki soki azwaki bandimbola wana epai wapi mpe nani apesaki ye bazulunalo oyo ezalaki na masoló oyo malobeli makambo yango. Na nsima, molakisi asalelaki bazulunalo yango mpo na kolobela makambo yango elongo na bayekoli nyonso. Na ntina na etamboli ya Erika, limemya na ye epai na balakisi na ye, mpe bilembo malamu mingi oyo azalaki kozwa na kelasi, abongaki mpo na kozwa makabo, mapolɔmi, mpe mbongo mpo na kofutela kelasi. Atako bongo, amiyokaki ete lokumu na ye monene mpo na makambo asali ezwami mpo ete amimonisaki lokola Motatoli ya Yehova, azalaki na likoki ya kolakisa babúku ekolimbolaka Biblia, mpe akumisaki nkombo ya Nzambe.

Tozali lisusu na ndakisa ya Shannon, elenge mobali ya mibu zomi, oyo afandi na Nouvelle-Zélande. Azali bobele na liso moko oyo ezali malamu; liso mosusu ekufa na ntina na cancer azwaki wana ezalaki ye mwana moke. Ntango Shannon akómaki na mbula nsambo, mama na ye abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Nzokande, mwa moke na nsima wana abandaki mateya na ye ya Biblia, azalaki kofanda na mobali moko kozanga ete babalana mpe azwaki ekateli ya kotika boyekoli na ye. Shannon asengaki ete boyekoli na ye ya Biblia ezongelama. Mposa na ye ekokisamaki. Batatoli bakóbaki kotala ye, mpe basangani nyonso misato ya libota bayekolaki Biblia mpe bakólaki na elimo. Nsima na kobalana na boyokani na mibeko ya Leta, mama ya Shannon mpe mobali ya mama na ye bazwaki batisimo.

Mokolo moko, Shannon mpe mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga babimaki elongo kati na mosala ya bilanga. Moto moko oyo ayambaki bango na ndako na ye, atunaki Shannon ete: “Nini ekómelaki liso na yo?” Ayanolaki ete: “Nazwaki cancer kati na yango, mpe esengelaki ete balongola yango. Mosika te Yehova akopesa ngai liso mosusu ya sika kati na Paladiso, mpe ezali mpo na ntina yango nde tolingi kosolola na yo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto