Masoló ya Basakoli na Bokonzi
Solo ya Biblia eyeisi bomoko kati na libota moko
LELO oyo, kati na bisika mingi ya mokili, bomoko kati na libota ezali mpenza lisusu te. Nzokande, Biblia ezali komonisa sɛkɛlɛ́ ya bomoko ya libota. Tótalela, na ndakisa, maloba oyo ya Yesu: “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai mpe akotosaka yango akokokana na moto na mayɛlɛ oyo atongi ndako na ye likolo na mabanga.” (Matai 7:24) Bankóto na mabota kati na Batatoli ya Yehova bakómaki na bomoko na kosaleláká maloba wana mpe na kosaleláká Biblia lokola moboko mpo na koyeisa bomoko kati na libota. Basusu mpe bazali kokóma na bomoko motindo wana, lokola emonisami kati na lisoló oyo lilandi.
Ntango Daniel azalaki kosala mosala ya sodá na France, aumonier moko asɛngaki ye ete asomba Biblia; ezali yango nde asalaki, mpe abandaki kotánga yango mbala na mbala. Na nsima, atindamaki na mboka Tahiti. Bamoko na baninga ya Daniel oyo bazalaki basodá, bazalaki ba Adventistes, mpe basusu bazalaki ba Mormons. Masoló na bango mbala mingi mazalaki kotalela makambo ya losambo. Mokolo mosusu, mokonzi moko na basodá alakisaki Daniel epai na mwasi na ye, oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Mwasi yango alekisaki nsima na nzangá mobimba na koyanola na mituna mingi oyo Daniel azalaki na yango mpe atyaki ye na boyokani na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova oyo lizalaki na Tahiti. Mosika te, abandaki koyekola Biblia mbala na mbala.
Baboti ya Daniel oyo bazalaki kofanda na France bazalaki mpenza bandimi ya Katolike. Tata na ye azalaki mopesi-toli na eteyelo mpe azalaki na mokumba ya kolakisa makambo ya losambo na biteyelo ya Katolike. Lokola alingaki ete akabola elongo na baboti na ye bingɛngiseli kitoko ya elimo oyo azalaki koyekola, Daniel abandaki mokemoke kokɔtisa makanisi ya Biblia kati na mikanda oyo azalaki kotindela bango.
Na ebandeli, mama ya Daniel abandaki kosepela, kasi na nsima atungisamaki na komona nkombo ya Yehova kati na moko na mikanda oyo mwana na ye atindaki. Mwa mikolo na nsima, ayokaki lisoló moko kati na radio koloba ete Batatoli ya Yehova bazali “mwa lingomba ya likámá.” Akomelaki Daniel, kosɛngáká na ye ete akata nokinoki boyokani nyonso elongo na Batatoli. Nzokande, Daniel alandaki kokóla kati na boyekoli na ye ya Biblia mpe mosika te akamataki bibongiseli mpo na kotika mosala ya sodá mpe kozonga na France.
Wana azongaki na mboka na ye, Daniel azalaki kolekisa mpokwa nyonso—mbala mosusu kino katikati na butu mpenza—na kosolola Biblia elongo na mama na ye. Na nsuka, andimaki kokende elongo na Daniel na Ndako ya Bokonzi. Wana ayanganaki mpo na mbala na ye ya liboso na makita, akamwaki mingi na boye ete abandaki boyekoli na ye moko ya Biblia. Akólaki nokinoki mpe mosika te, azwaki batisimo.
Tata ya Daniel azalaki moto oyo andimaka makanisi ya basusu, kasi amipesaki mingi kati na mosala na ye mpe na misala ya lingomba. Nzokande, na libaku moko, amemaki mwasi na ye mpe Daniel na motuka mpo na kokende na liyangani ya etúká. Ezalaki na Yulí 14, mpe azalaki na likanisi ya kokende kotala botamboli kati na engumba mpo na bokundoli ya mokolo ya Bastille (elingi koloba bokundoli ya kokwea ya bolɔkɔ Bastille na France). Wana ezalaki ye kozela, azwaki ekateli ya koyeba nini ezalaki kosalema, na kokɔtáká kati na ndako ya liyangani. Akamwaki mingi na lolenge makambo mabongisamaki mpe na kimya oyo amonaki kati na basaleli ya Yehova, mpe lokola azalaki kotambolatambola na bisika bikeseni ya misala ya liyangani, bato nyonso bazalaki kobénga ye “ndeko.” Abosanaki botamboli ya bokundoli mokolo ya Bastille mpe atikalaki kuna kino nsuka ya liyangani. Asɛngaki boyekoli ya Biblia mpe akólaki nokinoki kati na boyekoli ya solo. Nzokande, lokola azalaki koyekola mingi, abandaki mpe kosepela lisusu na mosala na ye te; na yango, atikaki mosala na ye wana azalaki na mibu 58. Sikawa bango banso misato kati na libota, basilá komipesa mpe kozwa batisimo, mpe bazali na bomoko mpo na kosalela Yehova elongo.
Ezalaki solo ya Biblia nde eyeisaki bomoko kati na libota ya Daniel. Ekoki mpe koyeisa bomoko na mabota mosusu soki [mabota] yango mazali koyekola mpe kosalela solo na motema na bango mobimba.