Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Nguya ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobongola bomoi
ANDIMAKI na maloba na ye moko ete, azalaki “motuki na Nzambe mpe monyokoli mpe motioli.” (1 Timoté 1:13) Kasi abongwanaki! Mbongwana kati na bomoi ya ntoma Paulo ezalaki monene mpenza na boye ete apusamaki na koloba ete: “Bózala bayokoli na ngai lokola ngai nazali moyokoli na Klisto.”—1 Bakolinti 11:1.
Lelo oyo, ebele ya bankóto ya basambeli ya motema sembo kati na mokili mobimba bazali kosala mbongwana motindo yango. Nini ezali kopesa bango nzela ya kosala bongo? Bazali kozwa boyebi ya Liloba ya Nzambe mpe bazali kosalela yango kati na bomoi na bango. Lisoló oyo lilandi lizali komonisa nguya ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobongola bomoi.
Na Slovénie babalani mibale oyo basilaki kokóma mikóló bazalaki kofanda bango mibale na nsuka ya mboka moko. Mobali, Jože, oyo azalaki na mibu soko 60 mpe azalaki na mikakatano makasi ya boombo ya masanga. Atako bongo, azalaki kobatela malamu Ljudmila, mwasi na ye oyo azalaki kobɛ́la. Mokolo moko basakoli ya Bokonzi mibale bayaki kosolola na Jože. Asɛngaki na Batatoli ete bákɔta na ndako na ye, epai bakutaki mwasi na ye. Nsima ya koyoka nsango ya Bokonzi, Ljudmila alelaki na esengo. Jože mpe asepelaki na oyo ayokaki mpe atunaki mituna mingi. Nsima ya kotikela babalani yango mikanda oyo mikolimbolaka Biblia, Batatoli bakendaki.
Sanza moko na nsima Batatoli bazongelaki bango, mpe bamonaki búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis likoló na mesa. Ntango batunaki ye soki azwaki yango wapi, Jože alobaki ete: “Namonaki liyebisi oyo lizali na lokasa ya nsuka ya moko na bazulunalo oyo botikelaki ngai. Bongo natindaki nkomá na biro na bino na Zagreb mpo na kosɛnga búku yango.” Na kotalela bosepeli makasi oyo amonisaki, abyangamaki ete ayangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto oyo esengelaki kosalema kati na Ndako ya Bokonzi. Akendaki koyangana, likambo oyo lipesaki Batatoli yango esengo monene!
Nokinoki boyekoli ya Biblia ebandaki, mpe asalaki bokóli malamu mpenza. Na ndakisa, ntango bamonisaki Jože kati na Biblia ete “okosala ekeko mpo na yo te . . . okokumbamela yango te to kosalela yango te,” kozanga koumela ayanganisaki bililingi nyonso ya losambo oyo bizalaki kati na ndako, elongo na bikeko, mpe abwaki yango.—Exode 20:4, 5.
Mposa ya Jože ya komela mai ya solo ya elimo ezalaki kokokisama. Nzokande, likambo ya mawa, azalaki mpe na mposa ya komela eloko mosusu. Na boumeli ya mibu 18, azalaki komela soko balitɛlɛ 10 ya vinyo mokolo na mokolo. Na ntina na boombo wana ya masanga, azalaki kotya likebi te na bopɛtɔ ya nzoto na ye. Kasi nsima ya koyeba likanisi ya Nzambe litali kolekisa ndelo na komela, azwaki ekateli ya kobongwana.
Asalaki milende mpo na kolónga mokemoke mokakatano na ye ya komela, kokebáká na boike ya masanga oyo azalaki komela mokolo na mokolo. Mosika te asikolamaki na boombo ya vinyo. Na boumeli ya boyekoli na ye ya Biblia, ayekolaki lisusu ete baklisto ya solo basengeli kobatela bopɛtɔ ya nzoto na bango. Na yango, apesaki Batatoli mbongo mpe alobaki ete: “Bókamata, bókenda kosombela ngai biloko oyo nasengeli na yango mpo namonana malamu kati na makita ya boklisto mpe na mosala ya kosakola!” Batatoli bamemelaki ye mompíla, sosɛti, sapato, simisi, kazaka, kalavati mpe sakosi.
Nsima na mbula moko ya boyekoli ya Biblia, Jože mpe Ljudmila bakokisaki masɛngami mpo na kobima elongo na Batatoli kati na mosala ya kosakola ndako na ndako. Sanza misato na nsima bamonisaki komipesa na bango epai na Nzambe na nzela ya batisimo ya mai na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Atako azalaki mobangé mpe na kolɔngɔ́nɔ́ malamu te, Jože asanganaki na mosala ya kosakola nsango malamu mpe na nsima, asalaki lokola mosaleli na misala kati na lisangá, kino kufa na ye na Máí 1995. Mbuma malamu oyo ebotami kati na bomoi ya mobali wana ya komikitisa mpe ya mwasi na ye ezali litatoli oyo limonisi nguya ya Liloba ya Nzambe oyo ebongolaka bomoi!