Okoki solo kolinga Nzambe?
NZAMBE alobi ete: “Moto akotala ngai mpe kobika te.” (Exode 33:20) Lisusu, uta ntango ya Biblia ezali na bilembeteli te oyo bimonisi ete bato basololaki na ye wana ezalaki bango kotala elongi na ye. Omoni te ete ezali likambo ya mpasi—to kútu likambo oyo likoki kosalema te—ete okólisa bolingo mozindo ya motema epai na moto oyo omoná naino ye te to oyoká naino ye te? Bato bakoki solo kozala na boyokani oyo etondi na bolingo elongo na Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba?
Ntembe ezali te ete bato bakoki kozala na boyokani ya penepene elongo na Nzambe. Kati na Deteronome 6:5, tozali kotánga ete libota ya Yisalaele lizwaki etindá oyo: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” Na nsima, Yesu Klisto azongelaki lilako wana epai na bayekoli na ye mpe abakisaki ete: “Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso.” (Matai 22:37, 38) Biblia ekokaki kolendisa biso ete tólinga Nzambe soki boyokani motindo yango ekokaki kosalema te?
Yehova azali kosɛnga biso ete tólinga ye bobele mpo apesi biso etindá yango? Te. Nzambe asalaki babalani ya liboso na kopesáká bango makoki ya komonisela ye bolingo. Adama mpe Eva bapusamaki na makasi te ete básala boyokani ya bolingo elongo na Mozalisi na bango. Na bokeseni, Nzambe atyaki bango na esika kitoko oyo ekokaki kokólisa epai na bango bolingo mpo na ye. Bango moko basengelaki kosala liponi—kosala boyokani na Nzambe to koboya ye.
Adama mpe Eva baponaki nzela ya botomboki. (Genese 2:16, 17; 3:6, 7) Nzokande, bakitani na bango bazalaki na makoki ya kokólisa boyokani ya bolingo elongo na Mozalisi.
Batambolaki elongo na Nzambe ya solo
Na ndakisa, kati na Biblia, Abalayama alobelami lokola “moninga” ya Nzambe. (Yakobo 2:23) Nzokande Abalayama azalaki te moto bobele moko oyo asalaki boyokani ya penepene elongo na Nzambe. Biblia ezali kolobela ebele ya bato mosusu ya kozanga kokoka oyo bamonisaki bolingo ya solo, ya motema epai na Yehova mpe ‘batambolaki na Nzambe elongo.’—Genese 5:24; 6:9; Yobo 29:4; Nzembo 25:14; Masese 3:32.
Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala babotamaki te na bolingo to na bolingo ya motema mpo na Nzambe. Esengelaki ete bakólisa yango. Na lolenge nini? Na koluláká koyeba ye na ndimbola ekangisami na nkombo na ye mpenza, Yehova. (Exode 3:13-15; 6:2, 3) Na koyebáká ete ye azali mpe na kondimáká bonzambe na ye. (Baebele 11:6) Na komanyoláká ntango nyonso likoló na misala na ye ya bolingo. (Nzembo 63:6) Na komonisáká makanisi na bango ya mozindo epai na Nzambe kati na libondeli. (Nzembo 39:12) Na koyekoláká makambo na ntina na malamu na ye. (Zekalia 9:17) Na kokólisáká mayoki malamu ya kobanga koyokisa ye mpasi.—Masese 16:6.
Okoki kokóma moninga ya Nzambe mpe kotambola na ye elongo? Ya solo, okoki komona Nzambe te mpe okoki koyoka mongongo na ye te. Atako bongo, Yehova azali kobyanga yo ete okóma moko na ‘babyangami kati na hema na ye,’ ozala moninga na ye. (Nzembo 15:1-5) Na yango, likoki lizali mpo na yo ete olinga Nzambe. Kasi lolenge nini okoki kokólisa boyokani ya penepene mpe ya bolingo mozindo elongo na ye?