Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/10 nk. 4-6
  • Ndenge ya kosambela Nzambe na solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosambela Nzambe na solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyeba solo elongolaka bobangi
  • Mpo na nini ekeseni mingi?
  • Bilenge oyo bazali ‘kotya elikya epai na Yehova’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/10 nk. 4-6

Ndenge ya kosambela Nzambe na solo

Mpo Nzambe andima losambo na biso, esengeli kotongama na solo. (Yoane 4:23) Biblia emonisi ete basambeli ya solo bazali na “lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzi mpe etɛlɛmiselo ya solo.” (1 Timote 3:15, NW) Basangani ya lisangá ya Nzambe bandimaka solo ya Liloba ya Nzambe, basalelaka yango na bomoi na bango mpe balongisaka yango na kosakoláká yango na mokili mobimba.​—Matai 24:14; Baloma 10:9-15.

BATATOLI YA YEHOVA bayebani malamu mpo na mosala na bango ya koteya bato Biblia, mosala oyo ezali kosalema sikawa na mikili koleka 200. Bayekolaka Biblia mpe bateyaka yango ete ezali solo. Bakɔtisaka filozofi ya bato na mateya ya Biblia te. Oyebi malamu mateya na bango oyo mauti na Biblia? Bato mingi bakakatanaka mpo na koyoka Batatoli ya Yehova mpamba te bato mosusu balobaka makambo mabe mpo na bango. Kasi, tozali kosɛnga na bato ya mitema sembo ete bango moko bákata likambo soki mpenza Batatoli bateyaka solo to te. Ekateli monene wana esengeli kouta na bilobaloba ya bato te. Bato mingi oyo balukaki koyeba bango moko mateya ya Batatoli ya Yehova bazwaki matomba mingi.

Koyeba solo elongolaka bobangi

Tókamata ndakisa ya Eugenia. Ye akolá na libota ya Bakatolike ya makila. Tata na ye azalaki kati na bato oyo babongisaki makambo mpo na koyamba Pápa na ekólo Mexique na 1979. Eugenia akutanaki na Batatoli ya Yehova mokolo moko ntango akendaki kotala baninga na ye. Batatoli basalisaki ye ete abanda kotalela malamumalamu makambo oyo Biblia elobi. Alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki kobanga. Namonaki ete solo yango oyo! Kasi elingi koloba ete bindimeli mingi oyo nazalaki na yango liboso ezali ya lokuta. Bandeko na ngai, baninga na ngai, bato oyo nalingaka—bango nyonso bazali na libunga. Nazalaki kobanga. Nazalaki se kokanisa ete bandeko na ngai bakoloba nini mpo na makambo oyo nayekolaki. Nsima ya mikolo mpe na lisalisi ya Yehova, motema ebandaki kokita. Mokolo moko namonaki malamu nayebisa likambo oyo nazalaki na yango na motema epai ya moto moko moninga ya libota na biso; azalaki molakisi ya teoloji. Nayebisaki ye ete nazali na mposa ya koyeba solo. Alobaki ete, ‘Soki olingi koyeba solo, luká Batatoli ya Yehova.’”

Se ndenge Eugenia akanisaki, babenganaki ye na ndako. Kasi, Batatoli batikaki te kosunga ye na elimo. Alobi ete, “Nazwaki makasi oyo esalisaki ngai nakangama na solo. Namonaki ete ebongi nabunda etumba mpo na likambo yango. Ndenge Batatoli ya Yehova bayambaki ngai ezalaki na ntina mingi. Namonaki ete balingi ngai na kati ya lisangá ya boklisto. Komesena na ebongiseli ya Nzambe esalisaki ngai nálonga bobangi ya kozala ngai moko.”

Tótalela ndakisa mosusu. Sabrina amesanaki kosolola masolo ya Biblia na kati ya libota na bango banda bomwana na ye. Kutu, basalaki oyo tokoki kobénga ‘lingomba ya libota.’ Azwaki momesano ya kosolola na bato ya mangomba ndenge na ndenge mpo na komonisa mabunga na bango. Ntango Motatoli ya Yehova moko alukaki koyekola na ye Biblia, andimaki mbala moko, akanisaki ete na ndenge yango akokweisa bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Alobi ete: “Nsima ya koyekola na boumeli ya koleka mbula moko, nabandaki komona lokola nalingi kobungisa ‘solo na ngai.’ Nazalaki na mpasi te mpo na komonisa lokuta ya mangomba mingi oyo nakutanaki na yango, kasi na mbala oyo ezalaki pɛtɛɛ te.”

Sabrina atikaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpo azalaki kobanga. Kasi, na nsima ayokaki ete azali kozanga eloko moko na elimo. Amonaki malamu azongela boyekoli mpe nsukansuka andimaki solo oyo ayebaki sika. Sabrina akolaki kino akómaki na mposa ya koyebisa bato mosusu makambo oyo azalaki koyekola. Kutu, asɛngaki ete abimaka na Batatoli na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Sabrina alobi boye: “Liboso bápesa ngai nzela ya kobima na Batatoli ya Yehova, batunaki ngai ete, ‘Olingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova?’ Nayanolaki ete, ‘Te!’ Nabandaki lisusu kobanga.” Na nsuka, nsima ya koyangana na makita mpe kotala basaleli ya Nzambe mpe ndenge oyo bazalaki kotosa mitinda ya Biblia, Sabrina andimaki ete wana ezali mpenza solo. Azwaki batisimo mpe lelo oyo azali mobongisi-nzela.

Mpo na nini ekeseni mingi?

Bato mosusu bakoki kotuna ete, ‘Mpo na nini mateya ya Batatoli ya Yehova ekeseni mingi na mateya ya mangomba mosusu?’ Soki otaleli mwa moke bindimeli ya Batatoli, okomona ete bazali baklisto ya sembo, bamipesi mpenza na koyekola Biblia. Tolendisi yo otánga na Biblia na yo moko bavɛrsɛ oyo epesami na mwa ndambo ya bindimeli na bango ya moboko oyo epesami na kati ya etanda.

Soki otaleli malamumalamu bindimeli ya Batatoli ya Yehova mpe ndenge basalelaka makambo oyo bateyaka, okoki kozwa bonsomi oyo solo epesaka. (Yoane 17:17) Ntina ya kobanga solo ezali te. Kobosana elaka ya Yesu te ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”​—Yoane 8:32.

[Etanda na lokasa 6]

MWA BINDIMELI YA MOBOKO YA BATATOLI YA YEHOVA

◯ Yehova azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Tozali kokuta nkombo na ye ekomami mbala 7 000 na bamaniskri ya kalakala ya Biblia.​—Nzembo 83:18.

◯ Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe, ayaki awa na mabelé mpo na kopesa bomoi na ye mpo na bato. (Yoane 3:16, 17) Batatoli ya Yehova balandaka mateya ya Yesu Klisto ndenge ezali na kati ya Baevanzile.

◯ Nkombo Batatoli ya Yehova euti na Yisaya 43:10, oyo elobi ete: “[Yehova] alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai.”

◯ Na kati ya libondeli ya “Tata na biso,” Bokonzi oyo bato basɛngaka ete eya ezali guvernema ya likoló oyo, mosika te, ekolongola minyoko mpe bampasi na mokili mpo na kotya paladiso oyo Biblia elaki.​—Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44; Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:3, 4.

◯ Moto na moto oyo asalaka mokano ya Nzambe azali na likoki ya kozwa mapamboli ya seko oyo Bokonzi ekopesa.​—Yoane 17:3; 1 Yoane 2:17.

◯ Baklisto basengeli kobongola bizaleli na bango mpo na kolanda makambo Biblia elobi. Basengeli kosala nyonso mpo na kozala sembo, kozala na bomoi ya pɛto mpe na bizaleli malamu, mpe kolinga bazalani na bango.​—Matai 22:39; Yoane 13:35; 1 Bakolinti 6:9, 10.

[Elilingi na lokasa 5]

Batatoli ya Yehova bateyaka solo ya Biblia epai ya bato na mikili koleka 200

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto