Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/9 lok. 3
  • Maladi eutaka mpenza wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maladi eutaka mpenza wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo likambo ebandaki
  • Zabolo nde apesaka biso maladi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Omibatela na bilimo mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nzambe andimaka kobikisama ya bato na nzela na bikamwiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Kobikisa bato na nzela na bikamwiseli ezali misala na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/9 lok. 3

Maladi eutaka mpenza wapi?

MWANA MOKO YA MOKE NKOMBO NA YE OWMADJI AZALI NA PULUPULU. Mama na ye Hawa azali kobanga ete mwana asila mai na nzoto. Eumeli naino te autaki kozwa nsango ete ndeko na ye moko na mboka akufelaki mwana mpo abɛlaki pulupulu. Nkɔkɔ ya Owmadji, bokilo ya Hawa, alingi bákende na mwana epai ya nganga-nkisi. Alobi ete: “Elimo moko mabe ezali kopesa mwana maladi. Oboyaki bálatisa mwana nsinga mpo na kobatela ye, talá sikoyo, mikakatano ebandi!”

MAKAMBO ya ndenge oyo esalemaka na bisika mingi na mokili. Bato ebele bakanisaka ete bilimu mabe nde bapesaka bato maladi. Kasi, ezalaka mpenza bongo?

Ndenge oyo likambo ebandaki

Mbala mosusu yo ondimaka te ete bilimu, bikelamu oyo bato bamonaka te nde epesaka bato maladi. Okoki ata komituna mpo na nini bato mosusu bandimaka likambo yango mpamba te bato ya siansi bayekoli mpe bamoni ete maladi eutaka na mikrobe. Kasi, kobosana te ete kala bato bayebaki mikrobe te. Ezali se na ekeke ya 17, ntango Antonie van Leeuwenhoek abimisaki mikroskope nde bato bakokaki komona mikrobe, mwa banyama mikemike mpenza oyo emonanaka na miso te. Atako bongo, ezali se na ekeke ya 19, na nzela ya bolukiluki oyo Louis Pasteur asalaki nde bato ya siansi bakómaki koyeba ete mikrobe nde epesaka maladi.

Lokola ntina oyo bato bazwaka maladi eyebanaki te na boumeli ya bambula ebele mpenza, biyambayamba mingi ebimaki mpe epalanganaki. Moko na yango elobaki ete bilimu mabe nde bapesaka bato maladi. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) eyebisi ndenge oyo mbala mosusu likanisi yango ebandaki. Elobi ete banganga-nkisi ya libosoliboso oyo bazalaki kobikisa bato na maladi bazalaki kosalisa na misisa mpe bankasa ya nzete mpe biloko mosusu ndenge na ndenge oyo bazalaki na yango na ntango wana. Ntango mosusu bankisi yango ezalaki kobikisa. Na nsima, banganga-nkisi bakómaki kosala milulu mpe makambo kilikili mpo bato mosusu báyeba te nkisi oyo ezalaki mpenza kosilisa maladi. Bazalaki kosala bongo mpo bato ya maladi bákendaka kaka epai na bango mpo na koluka lisalisi. Yango wana, kosalisa bato ya maladi ekómaki na mabombami, mpe bato bakómaki kotyela bilimu motema mpo na kozwa lisalisi.

Na mikili mosusu, tii lelo oyo basalisaka bato na ndenge yango. Mingi balobaka ete bilimu ya bankɔkɔ nde epesaka bato maladi. Bato mosusu balobaka ete Nzambe apesaka biso maladi lokola etumbu mpo na masumu na biso. Ata ntango bato oyo bayekolá bakangi ntina ete maladi eutaka na mikrobe, mbala mosusu babangaka kaka bilimu oyo ezali na nguya oyo eleki nguya ya bato.

Banganga-nkisi na bato oyo basalisaka na ndenge ya bonkɔkɔ basalelaka bobangi yango mpo na kokosa bato. Na yango, tosengeli kondima nini? Moto abikaka mpenza soki aluki lisalisi ya bilimu? Biblia elobi nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto