Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/10 nk. 8-10
  • Tóyeba komonisa bolingo ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyeba komonisa bolingo ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli kolinga Nzambe
  • Tóyeba kolinga bazalani na biso
  • Kolisá bolingo na yo
  • Tókoba kosala milende
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/10 nk. 8-10

Tóyeba komonisa bolingo ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso

Kosovo, Bosnie, Liban mpe Irlande. Ntango nyonso tozali koyoka nsango ya makambo oyo ezali koleka na bamboka yango. Mpo na bato mingi, bisika yango ezali bisika oyo makila ezali kosopana, bisika oyo bazali kobwaka babombe mpe bato bazali kobomana. Ya solo, matata kati na bato ebandá kala. Bato bazali kosalana matata mpo bakeseni na mangomba, na mposo, na bikólo mpe na makambo mosusu. Ɛɛ, matata ebandá kala mpe esalemaka ntango nyonso, mpe bato mingi bazali konyokwama mpenza.

BATO mingi bakanisaka ete bitumba mpe koyina ekosila te mpo ebandá kala mpe ezali se kokoba mpe koyinana ezali mpenza na makila ya bato. Kasi, makanisi ya ndenge wana eyokani ata moke te na mateya ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Biblia elobi polele ete: “Nde ye oyo akolingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Na bongo, Mozalisi alingi ete bato balinganaka.

Biblia elobi mpe ete Nzambe asalaki moto na elilingi na ye. (Genese 1:26, 27) Yango elimboli ete Nzambe apesaki moto likoki ya komonisa bizaleli na ye mpe ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso ezali bolingo. Lokola ezali bongo, mpo na nini bandá kala bato balinganaka te? Biblia epesi biso lisusu eyano. Ezali bongo mpo mobali na mwasi ya liboso, Adama na Eva, batombokelaki Nzambe mpe basalaki lisumu. Yango wana, bana na bango nyonso babotamaka na lisumu. Tozali kotánga boye na Baloma 3:23: “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” Nzambe asalá biso na likoki ya komonisa bolingo. Kasi lisumu oyo tobotamá na yango ezali kobebisa makambo. Yango elingi nde koloba ete bato bakoki kolingana te? Tokoki kolikya mokolo mosusu ete tokofanda kimya elongo na bazalani na biso mpe tokolingana?

Tosengeli kolinga Nzambe

Yehova Nzambe ayebi ete atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kolingana. Yango wana, asɛngaka bato nyonso oyo balingaka kosalela ye bázala mpenza na bolingo. Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, amonisaki likambo yango polele ntango batunaki ye mobeko oyo eleki Mibeko nyonso oyo Nzambe apesaki na Yisalaele. Alobaki boye: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba. Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso.” Mpe alobaki lisusu boye: “Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko. Mibeko nyonso mpe [basakoli bakangami, NW] na mibeko oyo mibale.”—Matai 22:37-40.

Nzokande, bato mingi bamonaka ete ezali mpasi bálinga Yehova Nzambe, moto oyo bamonaka te mpamba te azali Elimo. (Yoane 4:24) Kasi, mokolo na mokolo tomonaka misala ya Nzambe, awa bomoi na biso esimbami na biloko kitoko mingi oyo ye asalá mpo na bolamu na biso. Ntoma Paulo amonisaki likambo yango na maloba oyo: “[Nzambe] azangi kotatola na ntina na ye mpenza te, mpo ete asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko na kolya mpe na esengo.”—Misala 14:17.

Atako moto nyonso azali na bomoi mpo na biloko oyo Nzambe asalá, kaka bato moke nde bazongiselaka ye matɔndi. Na yango, esengeli tózalaka na botɔndi epai na Nzambe mpo na biloko nyonso ya malamu oyo ye apesi biso mpe tókanisaka na bozindo bizaleli kitoko oyo ezali komonana na misala na ye. Soki tozali kosala bongo, tokososola ete mayele ya Mozalisi na biso Monene mpe nguya na ye ezali na nsuka te. (Yisaya 45:18) Na koleka, yango ekosalisa biso tómona bozindo ya bolingo ya Nzambe mpamba te apesi biso bobele bomoi te kasi atondiseli biso yango na bisengo.

Na ndakisa, kanisá mitindo ndenge na ndenge ya fololo kitoko oyo Nzambe asali na mokili. Lokola Nzambe apesi biso mpe miso mpo tósepelaka na biloko yango kitoko, ezali likambo ya esengo! Nzambe apesi biso mpe bilei ya kitoko ndenge na ndenge oyo ezali kosimba bomoi na biso. Azali mpe Nzambe ya mayele oyo ayebi bamposa na biso, soki totali ndenge apesi biso lolemu mpo tóyokaka elɛngi ya bilei oyo tolyaka! Oyo nyonso emonisi solo ete Nzambe alingi biso mpe alukaka se bolamu na biso, boye te?—Nzembo 145:16, 17; Yisaya 42:5, 8.

Longola likambo ya komimonisa epai na biso na nzela ya “biloko oyo azalisá,” Mozalisi azali komonisa bomoto na ye na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Ezali bongo mpamba te Biblia etondi na makambo oyo emonisi bolingo ya Yehova Nzambe epai na bato ya kala mpe mapamboli oyo akopesa bato na mikolo ezali koya. (Genese 22:17, 18; Exode 3:17; Nzembo 72:6-16; Emoniseli 21:4, 5) Longola nyonso wana, Biblia ezali komonisa likambo monene oyo Nzambe asalaki mpo na komonisa bolingo na ye epai na bato: apesaki Mwana na ye se moko, azala Mosikoli mpo abikisa biso na lisumu mpe liwa. (Baloma 5:8) Ya solo, soki toyebi malamumalamu Mozalisi na biso ya bolingo, tokolinga ye na motema na biso mobimba.

Tóyeba kolinga bazalani na biso

Lokola Yesu alobelaki yango polele, longola mobeko ya kolinga Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na makanisi na biso, tosengeli kolinga bazalani na biso ndenge tomilingaka biso moko. Na bongo, ndenge Nzambe alingaka biso esengeli kotinda biso mpe tólinga bazalani na biso. Ntoma Yoane amonisaki yango polele na maloba oyo: “Balingami, soko Nzambe alingaki biso boye, ekoki na biso ete tólingana, moto moninga na ye.” Na nsima, alobelaki yango makasi boye: “Soko moto nani alobi ete, Nalingi Nzambe, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te. Tozwi mpe lilako oyo epai na ye ete ye oyo akolingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.”—1 Yoane 4:11, 20, 21.

Lokola Biblia eyebisaki yango, tozali sikoyo na ntango oyo bato mingi ya mokili bazali koluka bobele bolamu na bango moko, bazali “bamikumisi na bango mpenza.” (2 Timote 3:2) Na yango, soki tolingi komonisa bolingo, ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso na malamu, tosengeli naino kosala makasi mpenza mpo na kobongola makanisi na biso mpe kolanda ndakisa ya Mozalisi na biso ya bolingo, na esika tólanda bato ya mokili oyo ezangi bolingo. (Baloma 12:2; Baefese 5:1) Nzambe azali kutu komonisa “motema malamu epai na bango bazangi boboto mpe na bato mabe” mpe “akonɔkisa mbula [mpo] na bayengebeni mpe na bapɛngwi.” Lokola Tata na biso oyo azali na likoló azali kopesa biso ndakisa malamu bongo, tosengeli kosala makasi mpenza mpo na komonisela bato nyonso boboto mpe kosunga bango. Ntango tozali kosala ndenge wana, tozali komonisa ete tozali ‘bana ya Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló.’—Luka 6:35; Matai 5:45.

Ntango mosusu misala yango ya bolingo ekoki kosalisa bato bákóma basambeli ya Nzambe ya solo. Eleki mwa bambula, ndeko mwasi moko, Motatoli ya Yehova, amekaki koyebisa nsango ya Biblia epai na moninga na ye moko ya kartye, kasi mwasi yango aboyaki na motema moko. Ndeko mwasi alɛmbaki te. Alandaki komonisela mwasi yango boboto mpe abandaki kosunga ye na makambo mosusu. Mokolo moko, ndeko mwasi Motatoli asalisaki moninga na ye wana na kokumba biloko na ye mpo akɔtaki na ndako mosusu. Mokolo mosusu, ndeko mwasi yango asɛngaki na moto moko akende kotika ye na libándá ya mpɛpɔ mpo mwasi yango akendaki koyamba bandeko na ye. Na nsima, mwasi yango andimaki koyekola Biblia mpe akómaki moklisto ya molende atako mobali na ye azalaki konyokola ye makasi. Ɛɛ, bolingo oyo ndeko mwasi amoniselaki mwasi yango ebimisaki bolamu oyo ekoumela seko.

Mpo na koloba solo mpenza, soki Nzambe alingaka biso, ezali te mpo na bizaleli mingi ya malamu oyo tozali na yango. Kasi, alingaka biso atako tozalaka na bolɛmbu mingi mpe tosalaka mabunga mingi. Na ndenge wana, tosengeli mpe kolanda ndakisa na ye mpe kolinga bazalani na biso atako basalaka mabunga mingi. Soki tozali kosala milende mpo na kososola mpe kokumisa bizaleli malamu ya basusu na esika ya koluka se mabunga na bango, ekozala mpasi te mpo tólinga bango. Tokosuka bobele na komonisela bango bolingo lokola bato nyonso basalaka te kasi tokomonisela bango bolingo mingi, bolingo ya motema lokola baninga ya solosolo bamonisanelaka.

Kolisá bolingo na yo

Esengeli kokolisa bolingo mpe boninga. Koloba solo mpe kozala sembo ezali makambo ya ntina oyo ekolisaka bolingo yango. Bato mosusu babombaka mabunga na bango mpo bámimonisa bato malamu na miso ya bato oyo babandi kosala boninga elongo na bato wana. Kasi mbala mingi mabunga yango emonanaka na nsima mpe ekimisaka baninga. Na bongo, tóyoka nsɔni te mpo na koyebisa bomoto na biso na baninga na biso, atako tozali na mabunga oyo tozali kobunda mpo na kolonga yango. Kutu yango ekoki kosala ete bato yango bákóma baninga na biso.

Na ndakisa, na Extrême-Orient, ndeko mwasi moko mobange, Motatoli ya Yehova na lisangá moko, atángá kelasi mingi te. Kasi ayokaka nsɔni te mpo na koyebisa bandeko na ye likambo yango. Na ndakisa, abombaka te ete ayebi te kolimbola esakweli oyo elobi ete ntango ya mabota esukaki na 1914.a Kasi azali ndakisa malamu ya molende na mosala ya kosakola, mpe alingaka bandeko, akabelaka bango mpe akumisaka bango na motema moko, yango wana bandeko ya lisangá na ye bapesaka ye mpe limemya mingi.

Na mikili mosusu, bato bamesani te komonisaka bolingo na bango polele; bateyaka bango bámoniselaka bato mosusu bobele bonkonde (politesse). Atako ezali mabe te komonisela bato bonkonde mpe limemya, yango esengeli kopekisa biso te tómonisa mayoki na biso epai na basusu. Yehova azalaki koyoka nsɔni te mpo na kolobela bolingo monene oyo azalaki na yango epai na Yisalaele ya kala, libota oyo ye aponaki. Alobaki na bango ete: “Nalingi yo na bolingo na seko.” (Yilimia 31:3) Ndenge moko, ntoma Paulo alobaki na baninga na ye bandimi na Tesaloniki ete: “Awa ezalaki biso na bolingo monene epai na bino, toselingwi kokabela bino bobele Nsango Malamu na Nzambe te kasi bomoi na biso mpenza, mpo ete bosili kokóma balingami na biso.” (1 Batesaloniki 2:8) Na bongo, wana tozali kosala makasi mpo na kolinga bazalani na biso na motema moko, tóyeba ete Biblia nde esɛngi biso tómonisa bolingo yango polele na esika ya kobomba yango na motema.

Tókoba kosala milende

Kolinga bato mpe komonisela bango bolingo ezali likambo ya kosalaka ntango nyonso. Esɛngaka milende mingi mpamba te tosengeli kosala makasi mpo na kotika mabunga na biso moko mpe tosengeli lisusu kolonga mokili oyo mabe ezangá bolingo. Kasi, bolamu oyo tokozwa ezali mpenza monene na boye ete ebongi tósala milende mpo na komonisa bolingo yango.​—Matai 24:12.

Ata na mokili oyo etondi na mabe, tokoki komiyoka malamu elongo na bazalani na biso, mpe yango ekopesa esengo, kimya, mpe tokosepela biso moko mpe bazalani na biso. Milende na biso ekomonisa ete tobongi kozwa elikya kitoko ya bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe akosala. Longola nyonso wana, soki toyebi komonisa bolingo, ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso, Mozalisi na biso ya bolingo akosepela na biso mpe akopambola biso, sikoyo mpe libela na libela!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na ndimbola mosusu, talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, nkasa 1056-1059.

[Bililingi na lokasa 10]

Baklisto bakoki komonisa bolingo na misala ya boboto.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

FƆTƆ YA ONU 186226/M. Grafman

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto