Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/4 nk. 26-29
  • Otalelaka bato ya mobulu ndenge Nzambe atalelaka bango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otalelaka bato ya mobulu ndenge Nzambe atalelaka bango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya lisapo yango
  • Bilombe ya kala, bato na lokumu
  • Bato ya lokumu lelo oyo
  • Makasi ya ndenge mosusu
  • Nzambe alaki kosilisa mobulu
  • Banefilime bazalaki banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka mobulu?
    Lamuká!—2003
  • Lobiko ebelemi mpo na bato bazali kobanga Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Babandisi ya mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/4 nk. 26-29

Otalelaka bato ya mobulu ndenge Nzambe atalelaka bango?

Banda kala, bato basepelaka mpe bakumisaka bato ya nguya, bato ya makasi mpe bilombe. Ndakisa moko ya bato ya ndenge yango ezalaki Héraclès, elombe moko ya masapo ya Bagreke ya kala. Baloma bazalaki kobenga ye Hercules.

HÉRACLÈS azalaki nsuka na elombe mpe azalaki na lokumu mingi, mpe azalaki makasi koleka bato nyonso oyo bazalaki kobunda bitumba. Masapo elobaka ete azalaki mwa nzambe, azalaki mwana ya Zeus, nzambe ya Bagreke, mpe mama na ye Alcmène azalaki moto. Abandaki kosala makambo ya kokamwa ntango azalaki naino mwana moke. Ntango nzambe-mwasi moko, oyo azalaki koyokela ye zuwa, atindaki nyoka mibale ya minene eswa ye mpo akufa, Héraclès abomaki yango. Na nsima, ntango akolaki, abundaki bitumba mingi, alongaki bilima mpe abundisaki liwa mpo na kobikisa moninga na ye moko. Lisusu, abebisaki bingumba, asangisaki nzoto na basi na makasi, abwakaki mwana mobali moko longwa na likoló na ndako molai mpe abomaki mwasi na ye na bana na ye.

Atako Héraclès azalaki moto te, kasi bobele masapo mpamba, banda kalakala masolo ya mikili oyo Bagreke bayangelaki ezalaki kolobela Héraclès. Baloma bazalaki kosambela ye lokola nzambe; bato ya mombongo mpe bato oyo bazalaki kosala mibembo bazalaki kobondela ye mpo na kozwa mbongo mingi mpe mpo abatela bango na ntango ya likama. Banda kala bato basepelaka na masapo ya makambo ya kokamwa oyo ye asalaki.

Ebandeli ya lisapo yango

Masolo ya Héraclès mpe ya bilombe mosusu ya masapo eutá nde na makambo oyo esalemaki solo? Ekoki kozala bongo. Biblia elobeli ntango moko oyo, na ebandeli ya lisolo ya bato, “banzambe” mpe “mwa banzambe” bazalaki mpenza na mabele.

Mose alobelaki ntango yango na maloba oyo: “Na ntango bato bayaki mingi na mokili, mpe bana basi babotamaki na bango, bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi na bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.”—Genese 6:1, 2.

“Bana mibali ya Nzambe” oyo balobeli ezalaki bato te; ezalaki bana mibali ya Nzambe oyo bazalaki baanzelu. (Kokanisá na Yobo 1:6; 2:1; 38:4, 7.) Yuda, mokomi ya Biblia, alobi ete baanzelu mosusu “babatelaki motindo na bango na liboso te kasi batikaki ezaleli na bango mpenza.” (Yuda 6) Na maloba mosusu, batikaki esika oyo Nzambe atyaki bango na kati ya ebongiseli na ye na likoló mpo basepelaki kofanda na basi kitoko awa na mabele. Yuda alobi lisusu ete baanzelu wana batomboki bazalaki lokola bato ya Sodomo na Gomola, oyo “basalaki pite na koleka ndelo mpe basalelaki nzoto misala ya mbindo.”—Yuda 7, NW.

Biblia eyebisi makambo nyonso te oyo baanzelu wana batomboki basalaki. Nzokande, masapo ya kala ya Bagreke mpe ya bisika mosusu ezali kolobela banzambe mpe banzambe-basi ebele oyo bafandaki esika moko na bato, ezala na ndenge ya komonana to na ndenge ya komonana te. Soki balati nzoto ya bato, bazalaki kitoko mingi mpenza. Bazalaki kolya, komela, kolala mpe kosangisa nzoto bango na bango to na bato. Atako bazalaki koloba ete bazali basantu mpe bakoki kokufa te, bazalaki kokosa, bazalaki koswana mpe kobunda, bazalaki kobuba mpe kosangisa nzoto na basi na makasi. Masapo yango, atako ebongisami malamu mpe ezali na makambo mingi ya lokuta, ezali komonisa makambo oyo ezalaki mpenza kosalema liboso ya Mpela oyo Biblia elobeli na mokanda ya Genese.

Bilombe ya kala, bato na lokumu

Baanzelu oyo bazangaki botosi mpe balataki nzoto ya bato, basangisaki nzoto na basi mpe basi yango babotaki bana. Bana wana bazalaki lokola bana nyonso te. Bazalaki Banefilime, ndambo moto, ndambo anzelu. Biblia elobi ete: “[Banefilime, NW ] bazalaki na mokili na mikolo yango mpe na nsima lokola, wana eyaki bana na Nzambe epai na bana basi na bato mpe babotelaki bango bana. Baoyo bazalaki bilombe mpe na lokumu na kalakala.”—Genese 6:4.

Na Liebele, liloba “nefilime” elimboli “bakweisi,” bato oyo bakweisaka bato mosusu na mobulu na bango. Na yango tokoki kokamwa te ete Biblia elobi lisusu boye: “Mokili etondaki na [mobulu, NW ].” (Genese 6:11) Mwa banzambe ya masapo lokola Héraclès na Gilgamesh, elombe moko ya Babilone, bakokani mpenza na Banefilime.

Tóbosana te ete bazalaki kobenga Banefilime “bilombe” mpe bato ya “lokumu.” Banefilime bazalaki lokola Noa te, moto ya sembo oyo azalaki mpe na bomoi ntango wana, bango bazalaki koluka lokumu ya Yehova te. Bango bazalaki koluka kaka lokumu mpe nkembo na bango moko mpo bato báyeba bango. Lokola bazalaki kosala makambo minene, oyo na ntembe te ezalaki makambo ya mobulu mpe ya koboma bato, bato oyo baboyaki Nzambe na ntango wana bazalaki kopesa bango lokumu oyo bazalaki koluka. Bazalaki nsuka na bilombe na ntango wana; bato bazalaki kobanga bango, kotosa bango mpe moto akokaki kosala bango eloko moko te.

Atako Banefilime na batata na bango baanzelu oyo bamibebisaki bazwaki lokumu na miso ya bato ya ntango wana, na miso ya Nzambe bazalaki mpenza na lokumu te. Bazalaki na bomoi ya mabe. Yango wana Nzambe apesaki baanzelu oyo bakweaki etumbu. Ntoma Petelo akomaki ete: “Nzambe atikaki baanzelu te baoyo basalaki mabe kasi abwaki bango na [Tartare, NW ], atyaki bango na mabulu na molili tuu ete bábatelama mpo na kosamba. Atikaki mokili ya kalakala te, kasi abateli Noa, mosakoli ya boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisi ye mpela na mokili likoló na batyoli.”—2 Petelo 2:4, 5.

Ntango Mpela eyaki na mokili mobimba, baanzelu wana batomboki batikaki nzoto na bango ya bato mpe na nsɔni nyonso bazongelaki nzoto na bango ya elimo. Nzambe apesaki bango etumbu, apekisaki bango kolata lisusu nzoto ya bato. Banefilime, bato ya kokamwa oyo bazalaki bana ya baanzelu oyo bazangaki botosi, bakufaki bango nyonso. Kaka Noa na libota na ye nde babikaki na Mpela.

Bato ya lokumu lelo oyo

Lelo oyo, banzambe mpe mwa banzambe bazali lisusu te. Kasi mobulu ezali mingi. Lelo oyo, mikanda, bafilme, televizyo mpe miziki ezali kolobela bato ya lokumu. Bakanisaka ata moke te kosala malamu soki basaleli bango mabe, balingaka banguna na bango te, balukaka kimya te, balimbisaka te mpe batikaka mobulu te. (Matai 5:39, 44; Baloma 12:17; Baefese 4:32; 1 Petelo 3:11) Nzokande, bato bazali kokumisa bilombe ya ntango na biso mpo na makasi na bango, mpe lisusu mpo bayebi kobunda, kozongisa mabe na mabe, mpe kosala mobulu makasi ntango oyo basaleli bango mabe.a

Banda na ntango ya Noa, likanisi ya Nzambe mpo na bato ya ndenge wana ebongwani te. Yehova asepelaka na bato oyo balingaka mobulu te mpe alekisaka ntango na ye na kotala misala na bango te. Mokomi na nzembo ayembaki boye: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, molimo na ye ayini ye oyo alingi mobulu.”—Nzembo 11:5.

Makasi ya ndenge mosusu

Yesu Klisto azali moto oyo ayebani na mokili koleka bato nyonso tii na moi ya lelo, kasi akeseni mpenza na bilombe wana ya mobulu, ye azalaki moto ya kimya. Ntango azalaki na mabele asalaki “mabe te.” (Yisaya 53:9) Ntango banguna na ye bayaki kokanga ye na elanga ya Getesemane, bayekoli na ye mosusu bazalaki na mipanga. (Luka 22:38, 47-51) Bakokaki kosangana mpe kobunda ete Yesu akabama na mabɔkɔ ya Bayuda te.—Yoane 18:36.

Kutu, ntoma Petelo abimisaki mopanga na ye mpo na kobundela Yesu, kasi Yesu alobaki na ye ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:51, 52) Ya solo, lisolo ya bato emonisi yango mbala na mbala, mobulu ebimisaka kaka mobulu. Longolá bibundeli, Yesu akokaki komibikisa na ndenge mosusu. Ayebisaki Petelo lisusu ete: “Oyebi te ’te nakoki kosenga lisalisi epai ya Tata na ngai, mpe na mbala moko akoki kotindela ngai batayo ya baanzelu ebele koleka kutu zomi na mibale?”—Matayo 26:53, Boyokani ya Sika.

Yesu asalaki mobulu te mpe asɛngaki te ete baanzelu bábatela ye, kasi andimaki bákanga ye mpe na nsima bato yango babomaki ye. Mpo na nini? Ezali mpo ete ayebaki ete ntango ekokaki naino te mpo Tata na ye ya likoló asukisa mabe na mokili. Na esika ya kosilisa likambo ye moko, Yesu atyaki motema na ye epai ya Yehova.

Yango ezalaki bolɛmbu te kasi ezalaki nde bokasi mpenza ya motema. Yesu amonisaki ete azali na kondima makasi ete Yehova akobongisa makambo na ntango oyo Ye moko aponi mpe na ndenge Ye moko alingi. Lokola azalaki na botosi, Yehova apesaki Yesu lokumu oyo, kaka lokumu na ye moko Yehova nde eleki yango. Ntoma Paulo akomaki mpo na Yesu ete: “Amisɔkisi mpe atosi kino na kufa, ɛɛ, kino kufa na [nzete ya mpasi, NW ]. Yango wana Nzambe [atomboli] ye mingi mpe apesi ye nkombo koleka nkombo mosusu nyonso, ete na nkombo na Yesu mabɔlɔngɔ nyonso makumbama, yango na Likoló mpe yango na mokili, mpe yango na nse na mokili, mpe ete ndemo nyonso iyambolaka ete Yesu Klisto ye Nkolo mpo na nkembo na Nzambe Tata.”—Bafilipi 2:8-11.

Nzambe alaki kosilisa mobulu

Baklisto balandaka ndakisa ya Yesu mpe mateya na ye na bomoi na bango. Bakumisaka bato ya lokumu mpe ya mobulu ya mokili oyo te mpe balandaka ndakisa na bango te. Bayebi ete Nzambe abongisi ntango oyo akoboma bato wana mpo na libela lokola abomaki bato mabe na mikolo ya Noa.

Nzambe azali Mozalisi ya mabele mpe ya bato. Azali mpe na lotomo ya kozala Mokonzi. (Emoniseli 4:11) Soki moto oyo azali zuzi azalaka na lotomo ya kokata makambo, Nzambe azali na lotomo koleka mpo na kosala yango. Lokola atosaka mibeko na ye moko ya sembo, mpe lokola alingaka bato oyo balingaka ye, akosukisa mabe nyonso mpe bato oyo bazali kosala yango.—Matai 13:41, 42; Luka 17:26-30.

Yango ekomema kimya ya libela na libela awa na mabele, kimya oyo ekouta na bosembo mpe na boyengebene. Esakweli moko oyo eyebani malamu mpe etaleli Yesu elobaki likambo yango na maloba oyo: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye, nkombo na ye akobyangama ete, Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Nkolo ya kimya. Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te; na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe likoló ya bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atɛ[lɛ]misa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa ya [Yehova] na bibele ekosala oyo.”—Yisaya 9:6, 7.

Yango wana mpenza baklisto bazali na bantina malamu ya kolanda toli oyo Nzambe apesá banda kala ete: “Yokelá moto na yauli zuwa te, [kolanda] ata moko na nzela na ye te. Zambi moto na yauli aboyami na [Yehova], kasi mwango na ye ezali epai na basembwi.”—Masese 3:31, 32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mbala mingi, bato ya makasi na masano ya video mpe na bafilme ya barobo bamonisaka mpenza elimo yango ya mobulu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

BATO BASEPELAKA NA BILOMBE YA NTANGO NA BISO MPO BAZALI NA MAKASI MPE BAKOKI KOSALA MOBULU MAKASI NA NTANGO OYO BASALELI BANGO MABE.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Alinari/Art Resource, NY

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto