Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/9 nk. 3-4
  • Zabolo azali mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zabolo azali mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Zabolo azali mpenza, ezali kaka biyambayamba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Zabolo azalaka mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Zabolo azali mpenza ndenge nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/9 nk. 3-4

Zabolo azali mpenza?

Mokomi moko, nkombo na ye Ludovic Kennedy, akomaki na mokanda na ye (“All in the Mind​—A Farewell to God”) ete: “Na eleko moko boye, na mangomba ya boklisto bazalaki kotalela zabolo, Belezebula to Satana, lokola mobandisi ya mabe, ndenge oyo mwa ndambo ya bato oyo bazali se kokóma moke, bazali kotalela ‘Nzambe’ lelo oyo: ete azali moto ya solo mpe ya nguya. Bayuda na baklisto ya liboso bakanisaki ete azali ekelamu moko oyo ezali ndambo mosusu moto, ndambo mosusu nyama, nde ezali mobandisi ya makambo mabe oyo bazalaki komona. Na nsima baklisto bayaki komona ete ezalaki se makanisi mpamba, ete ezali na likambo moko te oyo ezali mpenza kondimisa yango mpe batikaki kondima ete Zabolo azali.”

NDENGE mokomi mpe mopanzi-nsango Ludovic Kennedy alobi yango, eumelaki bankama ya bambula, moto moko te na lingomba azalaki kotya ntembe ete Zabolo azali. Kutu, ndenge Profɛsɛrɛ Norman Cohn akomi yango na mokanda na ye (Europe’s Inner Demons), na bantango mosusu, baklisto bazalaki na nsɔmɔ mingi ya nguya ya Satana na bademo na ye. Ezalaki kaka te bato ya mboka oyo batángá te nde bazalaki koyoka nsɔmɔ yango. Na ndakisa, Profɛsɛrɛ Cohn alobi ete “ezali te bato oyo batángá te, baoyo balekaki mingi, ezali nde bato ya mayele na ntango wana” nde bazalaki kokanisa ete Zabolo azalaki kobongwana nyama mpo na kotinda bato na misala ya mabe mpe kotambwisa milulu ya nsɔni. “Bato ya mayele” yango​—na bakonzi ya mangomba oyo bayekolá mingi​—babandisaki likambo ya koluka bandɔki mpe koboma bango, likambo oyo esalemaki na Mpoto mobimba kobanda na ekeke ya 15 tii na ekeke ya 17, lingomba mpe bakonzi ya Leta banyokolaki mpe babomaki pene na bato 50 000 oyo bafundamaki ete bazali bandɔki.

Tokoki kokamwa te ete bato mingi bandimaka lisusu te oyo bazali kotalela lokola biyambayamba mpe makanisi mpamba mpo na Zabolo. Kutu, ata na ntango ya kala, na ndakisa na mobu 1726, Daniel Defoe azalaki kosɛka bato oyo bazalaki kondima ete Zabolo azali elima, azali na “mapapu lokola ya ngembo, azali na maseke, na matambi ekabwaná na biteni mibale, na mokondo moko molai, na lolemo oyo ezali lokola nkanya mpe bongo na bongo.” Alobaki ete makanisi motindo wana, ezali “makanisi ya mpambampamba” ya “bato oyo bamisalelá zabolo na bango oyo azali lokola elima mpe balobelaka ye”; bato yango “bakosaki bato oyo batángá te na masolo ya zabolo oyo bango moko bakanisaki.”

Yo mpe okanisaka bongo? Ondimaka ete “zabolo azali se lisapo mpamba oyo bato bango moko bakanisi mpo na kolimbola ntina oyo basalaka masumu”? Maloba oyo euti na mokanda moko (The Zondervan Pictorial Encyclopedia of the Bible), mpe bato mingi oyo balobaka ete bazali baklisto bakanisaka bongo. Jeffrey Burton Russell, alobi ete ebele ya bato ya teoloji na mangomba ya boklisto bakómá “kotalela Zabolo mpe bademo lokola biyambayamba ya kala.”

Kasi, bato mosusu bakanisaka kaka ete Zabolo azali mpenza. Bazali kokanisa ete esengeli kozala na nguya moko oyo eleki mayele ya bato, nguya oyo ezali nsima ya makambo mabe oyo esalemaka mbala na mbala na mokili. Russell alobi ete: “Makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na ekeke ya 20 ezali ntina moko oyo bato bakómi lisusu kondima ete Zabolo azali, nsima ya ntango molai oyo bazalaki kondima te ete azali.” Mokomi Don Lewis akomaki na buku na ye ete bato mingi oyo batángá “basɛkaka na mwa kotyola” biyambayamba mpe bibangabanga ya “bankɔkɔ na bango oyo batángá te bakómi mpe kokanisa ete ezali na nguya moko ya mabe oyo eleki mayele ya bato.”

Bosolo ya likambo ezali mpenza nini? Zabolo azali kaka biyambayamba ya mpamba? Makanisi nini tosengeli mpenza kozala na yango na ntina ya Zabolo na ekeke oyo ya 21?

[Elilingi na lokasa 4]

Ndenge liyemi oyo ya Gustave Doré emonisi yango, na biyambayamba ya kala bazalaki komonisa ete Zabolo azali ndambo mosusu moto, ndambo mosusu nyama

[Eutelo ya bafɔtɔ]

The Judecca​—Lucifer/The Doré Illustrations For Dante’s Divine Comedy/Dover Publications Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto