Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/10 lok. 8
  • Medayi ya lokumu mpo na ndako moko ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Medayi ya lokumu mpo na ndako moko ya Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Bandako ya Bokonzi efungwami mpo na bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bokoli ezali kosɛnga ete bisika mosusu ya losambo etongama nokinoki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndako ya Bokonzi ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/10 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Medayi ya lokumu mpo na ndako moko ya Bokonzi

NA EKÓLO Finlande, ministɛrɛ ya makambo etali kobatela mai, mopɛpɛ na bazamba eponaki mobu 2000 lokola “Mbula ya kobongisa bisika oyo ezali na banzete mpe bafololo.” Moko na bakambi ya ebongiseli yango alobaki ete: “Toponi likambo yango ezala na mbula oyo mpo na kolamusa na makanisi na biso makambo oyo nzete na fololo esalaka na bomoi na biso mpe mpo na bolamu na biso.”

Na mokolo ya 12 Yanuali 2001, biro ya Batatoli ya Yehova na Finlande ezwaki mokanda moko oyo eutaki na ebongiseli moko (Finnish Association of Landscape Industries) oyo etalelaka makambo ya kobongisa bisika oyo ezali na banzete na bafololo na ekólo yango. Na mokanda yango balobaki ete bapesi moko na bamedayi ya lokumu oyo ebongisamaki mpo na mbula ya kobongisa bisika oyo ezali na banzete na bafololo na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na mboka Tikkurila, mpo baloná bafololo mpe banzete ya kitoko mpenza na lopango yango. Na mokanda yango, balobaki lisusu ete “ezala na eleko ya molunge to na eleko ya mpiɔ, lopango yango emonanaka kaka kitoko mpe malamu mpenza.”

Bapesaki Batatoli ya Yehova medayi yango na likita moko oyo esalemaki na otɛlɛ Rosendahl na engumba Tampere; bato oyo babongisaka bisika oyo ezali na banzete na bafololo na bato ya mombongo, bango nyonso bato 400 bazalaki wana. Ebongiseli yango epesaki mpe bapanzi-nsango liyebisi moko oyo ezalaki na maloba oyo: “Na bisika ndenge na ndenge ya ekólo na biso, Bandako ya Bokonzi nyonso ya Batatoli ya Yehova ebongisami malamu mpe ezali kitoko. Likebi ya moleki-nzela nyonso ebendamaka na ndenge oyo babongisaka libándá ya bandako yango. Ndako ya Bokonzi ya Tikkurila na lopango na yango ezali ndakisa ya elanga oyo ezali kitoko mpenza; ezali esika ya kimya mpe ebongisami na mindɔndɔ te.”

Bandako ya Bokonzi ezali 233 na ekólo Finlande, mpe mingi kati na yango ezingami na bafololo mpe banzete kitoko. Kasi, soki bisika yango ezali mpenza kitoko ezali mpo ete ezali bisika ya losambo ya solo mpe ya koteya mateya ya Biblia. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali milio koleka motoba; balingaka Bandako na bango ya Bokonzi mingi, ezala kitoko mingi to te. Yango wana, basepelaka mingi kobatela yango. Na mboka na bino, moto nyonso oyo alingi akoki kokende na Ndako ya Bokonzi!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto