Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/9 lok. 28
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mikumba ya mwasi kati na makomami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/9 lok. 28

Mituna ya batángi

Mpo na nini bapesaki Bayisalaele nzela bábalaka basi ya bikólo mosusu oyo bakangi na etumba atako Mibeko ya Moize epekisaki kobala basi ya bikólo mosusu?​—Deteronome 7:1-3; 21:10, 11.

Ezali na makambo oyo ekokaki kopesa bango nzela ya kobala basi wana. Yehova atindaki Bayisalaele bábebisa bingumba ya bikólo nsambo na mokili ya Kanana mpe báboma bafandi na yango nyonso. (Deteronome 20:15-18) Mpo na bikólo mosusu, ekoki mpenza kozala ete mikóló oyo bakokaki kobomama te ezalaki kaka bana basi oyo bayebaki naino mibali te. (Mituya 31:17, 18; Deteronome 20:14) Moto ya Yisalaele akokaki kobala mwasi ya ndenge wana, kasi liboso na yango esengelaki kosala mwa makambo mosusu.

Biblia elobi ete mwana mwasi ya ndenge wana asengelaki kosala makambo oyo: “Akokokola motó na ye mpe akokata [manzaka] na ye. Akolongola mpe bilamba na ye ya moombo, mpe akofanda na ndako na yo mpe akolela tata na ye mpe mama na ye sanza moko mobimba. Na nsima okoki kosangana na ye, mpe kozala mobali na ye, mpe akozala mwasi na yo.”​—Deteronome 21:12, 13.

Soki Moyisalaele alingi kobala mwana mwasi ayebi naino mibali te oyo bakangaki na etumba, mwana mwasi yango asengelaki naino kokokola motó na ye. Kokata nsuki nyonso ya motó ezalaki komonisa ete azali kolela to azali na mawa. (Yisaya 3:24) Na ndakisa, ntango bana nyonso ya Yobo bakufaki mpe biloko na ye nyonso ebebaki, akataki nsuki na ye mpo na komonisa ete azali na mawa. (Yobo 1:20) Mwasi yango asengelaki mpe kokata manzaka na ye, yango elingi koloba ntango mosusu ‘kokata manzaka na ye mokuse’ mpo ata soki atye yango ina, emonana kitoko te. (Deteronome 21:12, Knox) ‘Bilamba ya moombo’ oyo mwasi oyo bakangi asengelaki kolongola ezali oyo wapi? Bana basi oyo bazalaki kofanda na bingumba ya bikólo wana bazalaki na momeseno ya kolata bilamba na bango oyo eleki kitoko soki bamoni ete banguna balingi kozwa mboka na bango. Bazalaki kosala bongo mpo basoda oyo bakokanga bango bálula bango. Mwana mwasi oyo azali kolela asengelaki kolongola nde bilamba wana.

Mwana mwasi oyo bakangi na etumba, oyo moto ya Yisalaele alingi kobala ye, asengelaki kolela bandeko na ye oyo bakufi na boumeli ya sanza mobimba. Lokola basengelaki kobebisa nyɛɛ bingumba oyo balongi, mwana mwasi oyo bakangi alingaki kotikala na ndeko to moninga ata moko te. Lokola basoda ya Yisalaele basengelaki kobebisa banzambe na bango ya bikeko, ezalaki lisusu na eloko moko te oyo akokaki kosambela. Sanza mobimba oyo mwana mwasi oyo bakangi na etumba asengelaki kolela ezalaki mpe eleko ya kopɛtolama mpo abosana losambo na ye ya kala.

Nzokande, likambo yango etaleli te basi ya bikólo mosusu oyo bakangi na etumba te. Mpo na basi yango, mobeko elobaki boye: “Okobala kati na bango te, kopesa bana basi na yo epai na bana mibali na bango te, to kokamata bana basi na bango mpo na bana mibali na yo te.” (Deteronome 7:3) Mpo na nini bapekisaki kobala basi ya bikólo mosusu? Deteronome 7:4 elobi ete: ‘Mpo ete bakopɛngwisa bana mibali na yo ete bálanda ngai te mpe básalela banzambe mosusu.’ Na bongo, bapekisaki likambo wana mpo Bayisalaele básambela banzambe mosusu te. Nzokande, kobala mwasi ya ekólo mosusu ndenge elobelami na Deteronome 21:10-13 ezalaki na likama ya ndenge wana te. Bandeko na ye nyonso babomamaki mpe bikeko oyo azalaki kosambela ebebisamaki. Azalaki lisusu te na kati ya bato oyo basambelaka nzambe ya lokuta. Nzambe apesaki Moyisalaele nzela ya kobala mwasi ya ndenge wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto