Nani azali “Nzambe ya solosolo mpe bomoi ya seko”?
YEHOVA, Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto, azali Nzambe ya solosolo. Azali Mozalisi, mpe akopesa bato oyo balingaka ye bomoi ya seko. Bato mingi oyo batángaka Biblia mpe bandimaka yango bakoyanola bongo na motuna oyo etunami na motó ya likambo ya lisolo oyo. Kutu, Yesu ye moko alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
Kasi, bandimi ya mangomba mingi balimbolaka maloba ya 1 Yoane 5:20 ndenge mosusu. Eteni moko ya vɛrsɛ yango elobi boye: “Tozali na bomoko elongo na moto wana ya solosolo, na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto. Wana nde Nzambe ya solosolo mpe bomoi ya seko.”
Bato oyo bandimaka Bosato (Trinité) balobaka ete likitani (pronom) “wana” (houtos) elobelaka nkombo oyo ezali liboso na yango, elingi koloba Yesu Klisto. Balobaka ete Yesu azali “Nzambe ya solosolo mpe bomoi ya seko.” Nzokande, ndimbola yango eyokani ata moke te na makambo mosusu oyo Biblia elobi. Lisusu bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka likanisi wana te. Brooke Westcott, moto ya mayele na Iniversite ya Cambridge akomaki boye: “Liloba [houtos] oyo ebongolami na ‘wana’ elobeli te moto oyo azali liboso na yango kasi oyo ntoma azalaki kokanisa.” Ezali solo ete ntoma Yoane azalaki kokanisa Tata ya Yesu. Erich Haupt, moto ya teoloji na Allemagne akomaki boye: “Esengelaki koyeba soki liloba [houtos] oyo ebongolami na wana, na fraze oyo elandi elobeli moto oyo azali penepene na yango . . . to moto oyo balobeli mwa liboso elingi koloba Nzambe. . . . Kolimbola ete liloba yango ezali kolobela Nzambe ya solo kaka moko eyokani mpenza na likebisi ya kosambela bikeko na esika ya koloba ete liloba yango emonisi ete Klisto azali Nzambe.”
Ata buku A Grammatical Analysis of the Greek New Testament, oyo ebimisamaki na Institut biblique pontifical de Rome elobi boye: “Lokola basaleli liloba [houtos] na [vɛrsɛ] 18-20 ekoki kolobela mpenza kaka Nzambe ya solosolo, oyo akeseni na bikeko (vɛrsɛ 21).”
Mbala mingi, soki liloba houtos ebongolami na “wana” to na “ye,” elobelaka nkombo oyo ezali pembeni na yango te. Bavɛrsɛ mingi emonisi yango. Na 2 Yoane 7, kaka ntoma oyo akomaki mokanda ya Yoane ya liboso alobi boye: “Mpo ete ebele ya bakosi babimi na kati ya mokili, bato oyo bazali te koyambola Yesu Klisto ete ayaki na kati ya mosuni. Wana [houtos] nde mokosi mpe motɛmɛli ya Klisto.” Na vɛrsɛ oyo liloba [houtos] oyo ebongolami na “wana” ekoki kolobela nkombo oyo ezali pembeni na yango te, elingi koloba Yesu. Na ntembe te liloba “wana” elobeli nde bato oyo bazali kowangana Yesu. Bato yango babengami “mokosi mpe motɛmɛli ya Klisto.”
Ntoma Yoane akomaki boye na Evanzile na ye: “Andele ndeko ya Simona Petelo azalaki moko na bango mibale oyo bayokaki makambo Yoane alobaki mpe balandaki Yesu. Liboso ye [houtos] akutanaki na ndeko na ye mpenza, Simona.” (Yoane 1:40, 41) Emonani polele ete liloba “ye” elobeli nkombo oyo balobeli na nsima te, kasi nde Andele. Na 1 Yoane 2:22, ntoma Yoane asaleli liloba yango kaka na ndenge wana.
Luka mpe asalelaki liloba yango kaka na ndenge wana, ndenge Misala 4:10, 11 elobi: “Na nkombo ya Yesu Klisto Monazalete, oyo bino bobakaki na nzete kasi oyo Nzambe alamwisaki na bakufi, na nzela na ye nde mobali oyo atɛlɛmi awa liboso na bino na nzoto malamu. Ye [houtos] azali ‘libanga oyo bino batongi-ndako bomonaki yango mpamba oyo ekómi motó ya litumu ya ndako.’” Emonani polele ete liloba “ye” elobeli te moto oyo abikisamaki, atako batángi ye pembeni ya liloba [houtos]. Na ntembe te, liloba “ye” na vɛrsɛ 11 ezali kolobela nde Yesu Klisto Monazalete, oyo azali “libanga ya litumu” ya lisangá ya boklisto.—Baefese 2:20; 1 Petelo 2:4-8.
Misala 7:18, 19 mpe emonisi likambo yango: “Tii ntango mokonzi mosusu abimaki na Ezipito, oyo ayebaki Yozefe te. Ye [houtos] asalelaki ekólo na biso mayele mabe.” “Ye” oyo anyokolaki Bayuda ezalaki Yozefe te, kasi nde Falao, mokonzi ya Ezipito.
Bavɛrsɛ oyo endimisi likanisi ya Daniel Wallace, moto ya mayele moko na Grèce, oyo alobaki ete “nkombo oyo ezali pembeni ya likitana na kati ya fraze moko ezalaka ntango nyonso te nkombo oyo yango ezali kolobela.”
“Nzambe ya solosolo”
Ndenge ntoma Yoane akomaki, “Nzambe ya solosolo” ezali Yehova, Tata ya Yesu Klisto. Azali Nzambe kaka moko ya solosolo mpe Mozalisi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo na biso ezali mpenza na Nzambe kaka moko Tata, oyo uta na ye biloko nyonso ezali.” (1 Bakolinti 8:6; Yisaya 42:8) Ntina mosusu oyo 1 Yoane 5:20 ebengi Yehova “Nzambe ya solosolo” ezali ete solo eutaka epai na ye. Mokomi ya nzembo abengaki Yehova, “Nzambe ya solo” mpamba te azali sembo na makambo nyonso oyo asalaka mpe akoki kokosa te. (Nzembo 31:5, NW; Exode 34:6; Tito 1:2) Ntango azalaki koloba na Tata na ye, Mwana alobaki ete: “Liloba na yo ezali solo.” Mpe mpo na mateya na ye moko, Yesu alobaki ete: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te kasi ya moto oyo atindaki ngai.”—Yoane 7:16; 17:17.
Yehova azali mpe “bomoi ya seko.” Azali Mopesi ya bomoi, Ye oyo apesaka yango lokola likabo na nzela ya Yesu. (Nzembo 36:9; Baloma 6:23) Ntoma Paulo alobaki ete Nzambe azali “mopesi mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Nzambe apesaki Mwana na ye mbano na ndenge asekwisaki ye, mpe tata akopesa mbano ya bomoi ya seko epai ya bato oyo bazali kosalela ye na motema na bango mobimba.—Misala 26:23; 2 Bakolinti 1:9.
Sikoyo, tokoloba nini? Ezali Yehova, kasi moto mosusu te nde “Nzambe ya solosolo mpe bomoi ya seko.” Bikelamu na ye nyonso basengeli kosambela kaka ye.—Emoniseli 4:11.