“Likabo monene” mpo na Pologne
NA MOKOLO ya 6 Yuli 1525, Albert de Brandebourg, mokonzi ya Prusse akómisaki Lingomba ya Protesta, lingomba ya Leta. Na ntango wana, ekólo Prusse oyo ezalaki na nse ya bokonzi ya Pologne, ekómaki ekólo ya liboso oyo endimaki mateya ya Martin Luther.
Mokonzi Albert alingaki ete Königsberg, engumba-mokonzi ya Prusse orientale, ekóma esika monene ya mateya ya Lingomba ya Protesta. Afungolaki iniversite moko kuna mpe apesaki mbongo mpo mikanda ya Baprotesta ebimisama na minɔkɔ mingi. Na mobu 1544, mokonzi yango apesaki mpe mitindo ete bátángelaka bato ya Pologne oyo bafandaki na mokili na ye Makomami Mosantu na monɔkɔ ya mboka na bango. Nzokande, ezalaki ata na libongoli moko te ya Biblia na monɔkɔ ya Polonais.
Biblia na “elobeli ya bato nyonso”
Mpo na yango, Albert abandaki koluka moto moko oyo akoki kobongola Makomami ya Grɛki ya boklisto na monɔkɔ ya Polonais. Na mobu soki 1550, azwaki Jan Seklucjan oyo azalaki mokomi, motɛkisi, mpe mobimisi ya mikanda, mpo asala mosala yango. Seklucjan azwaki diplome na Iniversite ya Leipzig mpe bato bayebaki ye ete azalaki koyokana te na Bakatolike mpo azalaki kopalanganisa mateya ya Lingomba ya Protesta. Kutu, liboso akimaki na Königsberg mpo básambisa ye te na ndenge azalaki kopalanganisa bindimeli na ye.
Jan Seklucjan azalaki na mposa makasi ya kobimisa Biblia na monɔkɔ ya Polonais. Nsima ya mbula moko Seklucjan abimisaki evanzile ya Matai. Mokanda yango ezalaki na bandimbola mpe banoti na mipanzi oyo ezalaki komonisa ndenge mosusu oyo maloba ya bavɛrsɛ yango ekoki kobongolama. Eumelaki te, Seklucjan atambwisaki mosala ya kobimisa baevanzile nyonso minei. Nsima ya mbula misato mpamba, abimisaki libongoli mobimba ya Makomami ya Grɛki ya boklisto.
Mpo na kobimisa libongoli moko ya sikisiki, mobongoli atalelaki makomi ya Grɛki. Lisusu, maloba ya ebandeli ya libongoli oyo ebimisamaki na mobu 1551, elobaki ete mobongoli atalelaki mpe mabongoli ya monɔkɔ ya Latin mpe “mabongoli na minɔkɔ mosusu.” Stanisław Rospond, mokomi ya buku moko (Studies on the Polish Language of the 16th Century) alobi ete libongoli yango esalelaki “maloba ya malamu mpe ya pɛtɛɛ.” Alobi lisusu ete mobongoli abendamaki te na “elobeli ya makasi.” Kasi, asalaki molende mpo na kosalela “elobeli ya bato nyonso.”
Atako Seklucjan atambwisaki mosala ya kobongola, emonani ete azalaki kobongola te. Boye, nani azalaki kobongola? Ezali Stanisław Murzynowski, oyo azalaki na mbula soki 23 ntango Seklucjan azwaki ye mpo asala mosala wana monene.
Murzynowski abotamaki na mboka, kasi ntango akolaki tata na ye atindaki ye na Königsberg mpo ayekola monɔkɔ ya Grɛki mpe ya Liebele. Na nsima, Murzynowski akɔtaki na Iniversite ya Wittenberg, na Allemagne, ekoki kozala ete akutanaki na Martin Luther kuna. Elenge yango azalaki kolanda mateya ya Philipp Melanchthon, oyo na ntembe te asalisaki ye ayeba malamu monɔkɔ ya Grɛki mpe ya Liebele. Murzynowski akendaki lisusu kotánga na Italie, na nsima azongaki na Königsberg mpe akómaki kosala epai ya Mokonzi Albert.
Na buku na ye (The Bible in the Polish Language), Maria Kossowska akomaki ete “Murzynowski azalaki kosala mosala na molende mpenza, kasi yango etindaki ye te amikumisa, aluka bokonzi, to asɛnga ete nkombo na ye ekomama na libongoli yango ya Biblia.” Kutu, elenge yango akomaki boye mpo na komonisa ndenge azalaki komitalela: “Nakomaka malamu te ezala na monɔkɔ ya Latin to ya Polonais.” Atako bongo, Murzynowski asalaki mosala monene mpo bato ya Pologne bázwa Liloba ya Nzambe na monɔkɔ ya mboka na bango. Kutu, Seklucjan alobaki ete libongoli oyo babimisaki ezalaki “likabo monene” mpo na ekólo Pologne.
Moko na makabo oyo eleki monene
Nsima ya libongoli wana ya liboso na monɔkɔ ya Polonais, mabongoli mingi mpe ebimisamaki. Na ndakisa, na 1994, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ebimaki, mpe na 1997, Biblia mobimba Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebimaki na monɔkɔ ya Polonais. Babongoli ya Biblia yango, oyo balukaki koyebana te, basalaki milende mpo na kobongola Liloba ya Nzambe na bosikisiki mpe na elobeli ya mikolo na biso, kasi te na elobeli moko ya kala.
Lelo oyo, Biblia ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ soki 2 400. Soki ozali na Biblia oyo ebongolami malamu na monɔkɔ ya mboka na bino, na ntembe te yango ezali moko na makabo eleki monene oyo ozali na yango; likabo oyo euti na Yehova Nzambe mpo na kotambwisa yo.—2 Timote 3:15-17.
[Elilingi na lokasa 20]
Libanga mpo na kokanisa Stanisław Murzynowski, moto oyo abongolaki “Kondimana ya Sika” na monɔkɔ ya Polonais
[Elilingi na lokasa 21]
Mokapo ya 3 ya mokanda ya Matai ebongolamaki na Stanisław Murzynowski
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Dzięki uprzejmości Towarzystwa Naukowego Płockiego