‘Atambolisaka ngai na nzela ya boyengebene’
Lisolo ya Olga Campbell
Emily, leki na ngai ya mwasi, akomelaki ngai mokanda mpo na kopesa ngai longonya ntango nakokisaki mbula 60 na mosala ya Nzambe. Alobaki boye: “Moto oyo azali ndakisa malamu azali lokola ngonga oyo ezali kobɛta mpo na kobenga basusu. Obɛtaki ngonga, mpe ngai nalandaki yo.” Tiká nayebisa bino naino ndenge oyo bomwana na ngai ezalaki mpe ndenge oyo nakɔtaki na mosala ya Nzambe.
NABOTAMAKI na mokolo ya 19 Yanuali 1927 na ferme ya libota na biso, pembeni ya engumba Wakaw, na etúká ya Saskatchewan, na Canada; baboti na ngai bazalaki bato ya Ukraine. Ngai ná lipasa na ngai ya mobali Bill tozali bana ya motoba na libota ya bana mwambe. Ntango tozali bana mike, tozalaki kosalisa tata na biso oyo azalaki molende na mosala ya bilanga. Tozalaki kofanda na ndako moko ya moke mpe Mama azalaki kokipe biso malamu atako azalaki koyoka mpasi makasi mpo na maladi ya mingai, oyo nsukansuka ebomaki ye. Azalaki kaka na mbula 37 ntango akufaki; atikaki ngai ná lipasa na ngai na mbula 4.
Sanza 6 nsima ya liwa ya Mama, Tata abalaki mwasi mosusu. Eumelaki te, matata etondaki na ndako, mpo mwasi ya tata ayaki na bana na ye mitano ya basi! Nazalaki kosala makasi ya kopesa mama yango limemya; kasi, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na yaya na ngai John.
Na nsuka ya bambula ya 1930, ngai ná Bill tokɔtaki na eteyelo ya ntei; yango esalisaki biso tókima matata oyo ezalaki na ndako. Mwa moke liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato mingi bazalaki komonisa bolingo ya ekólo. Molakisi na biso asɛngaki biso tópesa drapo losako, kasi mwana-kelasi moko ya mwasi aboyaki kosala yango. Bana-kelasi babandaki kotyola ye. Kasi, ngai nasepelaki na mpiko na ye mpe natunaki ye ntina oyo aboyaki kopesa drapo losako. Ayebisaki ngai ete azali Moyekoli ya Biblia, ndenge oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana, mpe ete akumisaka kaka Nzambe.—Exode 20:2, 3; Misala 5:29.
Nalongwe na ndako ya baboti
Na 1943, nazwaki mosala moko na engumba Prince Albert; nazalaki komema motuka mpo na kokende kotikela bato masanga ya sukali. Lokola nazalaki na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe, nasombaki Biblia; kasi, nazalaki kokanga te ntina ya makambo oyo nazalaki kotánga mpe nazalaki kolela. Na Biblia mobimba, nayebaki kaka libondeli ya “Tata na biso.”—Matai 6:9-13.
Mokolo moko ya lomingo, nkolo ndako oyo nazalaki kofutela ayebisaki ngai na esengo nyonso ete abenganaki mwasi moko oyo ayaki koteya ye Biblia. Namitunaki boye: ‘Mpo na nini asalaki likambo ya mabe bongo?’ Mwa bapɔsɔ na nsima, mokolo moko ya lomingo nazalaki koyoka nzoto malamu te, mpe nakendaki ndako-nzambe te. Mokolo yango, mwasi wana ayaki lisusu.
Atunaki ngai boye: “Obondelaka?”
Nayanolaki ete: “Nasalaka libondeli ya ‘Tata na biso.’”
Ntango azalaki kolimbwela ngai maloba ya Yesu, nazalaki koyoka ye na likebi mpenza. Alakaki ngai ete akozonga mokolo ya misato.
Ntango nkolo ndako azongaki, nayebisaki ye na esengo nyonso ete mwasi wana, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, ayaki lisusu. Likambo ya kokamwa, nkolo ndako ayebisaki ngai na nkanda ete, “Soki azongi awa na mokolo ya misato, nakobengana bino mibale!”
Natambolaki kartye mobimba mpo na koluka Motatoli yango oyo nkombo na ye ezalaki Madame Rampel. Ntango namonaki ye, nayebisaki ye mokakatano oyo nazalaki na yango mpe nasɛngaki ye ayebisa ngai makambo nyonso oyo ayebi na ntina na Biblia. Ezalaki lokola nde tosololaki makambo oyo ezali banda na Genese tii na Emoniseli! Alobaki ete ntango na biso ekokani na mikolo ya Noa, ntango Nzambe abomaki bato ya mabe mpe abikisaki Noa ná libota na ye.—Matai 24:37-39; 2 Petelo 2:5; 3:5-7, 12.
Nsima ya lisolo yango oyo eumelaki ntango molai, Madame Rampel alobaki na ngai boye: “Namoni ete ondimi ete mateya yango ya Biblia ezali solo. Nsima ya pɔsɔ mibale, ekozala na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova, mpe osengeli kozwa batisimo.” Na butu yango, nalalaki te mpe nazalaki kaka kokanisa makambo oyo nayekolaki. Likanisi ya kozwa batisimo ezalaki kobangisa ngai. Kasi, nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe! Atako nayebaki makambo mingi te ya Biblia, nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 16, na mokolo ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1943.
Nakei na engumba mosusu
Na sanza ya Novɛmbɛ, yaya na ngai Fred asɛngaki ngai nakende kosala lokola mwana-mosala na ndako moko ya etaze mibale na engumba Toronto, na ɛsti ya Canada, esika azalaki kofanda. Nandimaki mpo namonaki ete kuna nakozala na bonsomi ya kosalela Yehova. Liboso nakende, nakendaki kotala yaya na ngai Ann, oyo azalaki kofanda na engumba mosusu ya etúká ya Saskatchewan. Ayebisaki ngai ete ye ná yaya na ngai mosusu Doris, bazalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe alendisaki ngai nasala yango. Nayebisaki ye ete nasilaki kokóma Motatoli oyo azwi batisimo!
Ngai ná leki na ngai Emily tozwaki engbunduka mpo na kokende na Toronto. Bill ayaki kozwa biso na gare mpe amemaki biso na ndako oyo azalaki kofanda na Fred mpe John. Natunaki Fred soki moto mosusu azali te na ndako yango. Alobaki boye: “Soki nayebisi yo, okokamwa. Oyebi lisusu Alex Reed oyo tozalaki na ye ntango tozalaki bana mike? Afandaka na etaze ya likoló, kutu akómi kosangana na bato oyo babengaka Bayekoli ya Biblia!” Motema na ngai etondaki na esengo.
Namataki malɛmbɛ na etaze ya likoló mpo na kotala Alex mpe toyokanaki tókende na makita kaka na mpokwa yango. Nalingaki nakende kaka na mpokwa wana liboso bandeko na ngai bápekisa ngai. Mwa moke na nsima, atako ngai moko nayekolaki mpenza Biblia na moto te, nabimaki na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso. Nazalaki kosolola mingi na bato oyo bautá na Ukraine, nazalaki koloba na bango na monɔkɔ oyo nayekolaki na bomwana.
Mbala mingi, Bill azalaki kotánga banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo nazalaki kotya na shambre na ye. Ntango akendaki kofanda na etúká ya Colombie-Britannique na wɛsti ya Canada, nasalelaki ye abonema mpo azwaka nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Atako azalaki koloba mingi te, akomelaki ngai mokanda ya nkasa 10 mpo na komonisa botɔndi na ye. Nsukansuka, azwaki batisimo mpe akómaki nkulutu ya molende. Nazali na esengo mpamba te bandeko na ngai mitano (Bill, Ann, Fred, Doris, mpe Emily) bakómá basambeli ya Yehova!
Na mokolo ya 22 Mai 1945, guvernɛma ya Canada ezongiselaki Batatoli ya Yehova bonsomi ya losambo.a Kutu, ngai nazalaki koyeba te ete tozalaki na epekiseli tii mokolo oyo nayokaki liyebisi ete epekiseli esili. Ngai ná moninga na ngai Judy Lukus tozwaki mokano ya kokende kosakola mingi na etúká ya Québec, epai bato balobaka Lifalanse. Ntango bandeko na ngai, Doris ná Emily bayokaki yango, bango mpe bazwaki mokano ya kosakola mingi na engumba Vancouver, na etúká ya Colombie-Britannique.
Baboyi Batatoli ya Yehova na Québec
Kokende kofanda na Québec ezalaki mbongwana mpo na ngai. Batatoli bakutanaki na botɛmɛli makasi mpo na mosala ya kosakola.b Tozalaki kokabola trakte oyo ezalaki na motó ya likambo ete Likunya makasi ya bato ya Québec mpo na Nzambe, mpo na Klisto mpe bonsomi ezali nsɔni mpo na Canada mobimba. Trakte yango ezalaki na nsango moko oyo ezalaki komonisa ndenge baboyaki lingomba ya Batatoli.
Na boumeli ya mikolo 16, tozalaki kosakola kobanda na ngonga ya 2 ya ntɔngɔ, tozalaki na ekɛngɛ nyonso kokɔtisa batrakte na nse ya baporte. Mokolo moko, wana tozalaki na buludingi moko, toyokaki ete bapolisi bazali koya. Bazwaki biso te mpo tobombanaki na nzela moko ya moke. Mokolo oyo elandaki, tokendeki lisusu na balabala mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Lamuká! Wana basanza ezalaki koleka, bapolisi bakangaki biso mingi; toyebi kutu te soki mbala boni. Lokola nayebaki ete bakoki kokanga ngai mpe kotinda ngai na bolɔkɔ, nazalaki ntango nyonso kotambola na brɔsi mpe krɛyo na ngai ya miso.
Na sanza ya Novɛmbɛ 1946, Nathan Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, autaki Brooklyn, na New York. Abengisaki babongisi-nzela 64 ya Québec na kelasi ya mbala ya 9 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na engumba South Lansing, na etúká ya New York. Na kelasi yango, tolandaki mateya ya Biblia na boumeli ya sanza 5. Bapesaki biso badiplome na sanza ya Augusto 1947 mpe batindaki biso na bamboka ya Québec mpo na kofungola masangá.
Mosala moko ya esengo
Tozalaki bilenge basi minei oyo totindamaki na engumba Sherbrooke. Tosalaki molende mpo na koloba Lifalanse malamu, tozalaki kozongela maloba nzelanzela na mosala ya kosakola. Na ntango ya kopema, mikolo mosusu tozalaki kozanga mbongo ya kosomba bilei, yango wana tozalaki kozonga ndako mpe koyekola. Moninga na ngai ya mosala, Kay Lindhorst, ayebaki gramɛrɛ malamu. Alakisaki ngai naino gramɛrɛ ya Lingelesi mpo na nsima, nayeba oyo ya Lifalanse.
Eleko ya malamu mingi na mosala na ngai ya mobongisi-nzela ezalaki ntango natindamaki na Victoriaville, mboka oyo ezalaki na bato soki 15 000 na ntango wana. Bato moke kaka nde bazalaki koloba Lingelesi; yango esalisaki biso tóyeba malamu koloba Lifalanse. Pɔsɔ ya liboso ezalaki malamu mingi. Bato nyonso bazalaki kondima mikanda na biso. Ntango tozongelaki bango, baporte ná bafenetre nyonso ezalaki ya kokangama. Mpo na nini?
Sango ya mboka yango apekisaki bato báyokaka biso. Yango wana, ntango tozalaki kosakola ndako na ndako, bana mike bazalaki kolanda biso mpe kobamba biso mabanga. Atako bongo, ezalaki kaka na bato mingi oyo bazalaki na mposa ya koyoka nsango malamu. Na ebandeli, bayebisaki biso tókendaka kotala bango kaka na butu. Kasi, wana bazalaki koyekola makambo mingi, bandimaki tóyekolaka ata na moi, atako bato mosusu bazalaki kotyola bango.
Na bambula ya 1950, ngai ná bandeko na ngai ya basi tokendaki na engumba Wakaw. Na lisangá moko, tobɛtaki lisolo ya makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola. Na nsima, nkulutu oyo akambaki lisolo yango alobaki na biso ete, “Mama na bino akozala na esengo ntango akosekwa mpe akoyeba ete bana na ye bakómaki Batatoli ya Yehova!” Alobaki ete mama ayekolaki Biblia liboso akufa. Tolelaki na koyeba ete ayekolaki mateya ya Biblia mpe ete na ntembe te soki akufaki te, alingaki kolakisa biso mateya yango.
Mosala elongo na molongani na ngai
Na 1956, nakutanaki na Merton Campbell, Motatoli moko oyo alekisaki sanza 27 na bolɔkɔ mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Azalaki kosala na Betele ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn banda bambula pene na 10. Merton azalaki na bizaleli malamu, mpe namonaki ete akozala mobali ya malamu. Tobandaki kokomana mikanda, mpe lokola tozalaki komonisana limemya, tokómaki baninga mpe tolinganaki.
Ngai ná Merton tobalanaki na mokolo ya 24 Sɛtɛmbɛ 1960. Mbula 47 oyo nasili kosala elongo na mobali na ngai oyo azali na bizaleli mingi ya elimo, ezali mpenza lipamboli! Merton asalaki mbula 58 na Departema ya Mosala, oyo epesaka malako mpo na kotambwisa masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova na États-Unis. Na boumeli ya mbula koleka 30, mosala na ngai na Brooklyn ezalaki ya kotya bafololo mpe kobongisa bashambre ya bapaya mpe na nsima nakómaki kosala mosala yango na bandako ya mayangani na engumba New York. Na 1995, ngai ná Merton totindamaki na Betele ya Patterson, na ntaka ya kilomɛtrɛ 110 longwa na engumba New York.
Ntango nalongwaki na ndako ya baboti na mbula 12, nayebaki te ete nakókoma na bandeko ebele ya elimo, kati na bango bandeko na ngai ya makila. Nazali kozela mokili ya sika oyo Nzambe alaki, ntango nakoyamba Mama na lisekwa mpe nakoyebisa ye makambo oyo elekaki—mingimingi ndenge oyo Yehova Nzambe, na bolingo na ye, asalisaki bana na ye báyeba Ye. Tozali mpenza na esengo ndenge Yehova azali kotambwisa biso na “nzela ya boyengebene”!—Nzembo 23:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola Batatoli ya Yehova baboyaki kokɔta na makambo ya politiki, guvernɛma epekisaki mosala na bango na mokolo ya 4 Yuli 1940.
b Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na botɛmɛli na mosala ya kosakola na Québec, talá Lamuká! ya 22 Aprili 2000, nkasa 20-23 (ebimeli ya Lifalanse).
[Bililingi na lokasa 27]
Baboti na ngai mpe ndako oyo tozalaki kofanda na bandeko na ngai nsambo
[Elilingi na lokasa 29]
Na baninga na ngai ya mosala na Ottawa, na 1952
[Elilingi na lokasa 29]
Ná bandeko na ngai (banda na lobɔkɔ ya mwasi) Ann, Mary, Fred, Doris, John, ngai, Bill, mpe Emily
[Elilingi na lokasa 29]
Ngai ná Merton lelo oyo