Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w19 Mars nk. 29-31
  • Koloba “amen” ezali na motuya na miso ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koloba “amen” ezali na motuya na miso ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “BATO NYONSO BASENGELI KOLOBA: ‘AMEN!’”
  • “BATO BALOBAKI, ‘AMEN!’ MPE BAKUMISAKI YEHOVA”
  • MPO NA NINI KOLOBA “AMEN” EZALI NA NTINA?
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tóyeba mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • “Tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
w19 Mars nk. 29-31
Bandeko mibali mpe basi na kati ya lisangá bakitisi mitó na nse mpo na kolanda libondeli

Koloba “amen” ezali na motuya na miso ya Yehova

YEHOVA azwaka losambo na biso na motuya. ‘Atyaka likebi mpe ayokaka’ mabondeli ya basaleli na ye, mpe azwaka na motuya likambo nyonso oyo tosalaka mpo na kokumisa ye, ata soki ezali moke. (Mal. 3:16) Na ndakisa, tótalela liloba moko oyo tolobaka mbala mingi. Ezali liloba “amen.” Yehova azwaka liloba yango na motuya? Ɛɛ! Mpo na koyeba yango, tótalela ndimbola ya liloba yango mpe ndenge oyo esalelami na Biblia.

“BATO NYONSO BASENGELI KOLOBA: ‘AMEN!’”

Liloba “amen” elimboli “solo mpenza,” to “ezala bongo.” Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “kozala sembo” to “kotyelama motema.” Ntango mosusu, bazalaki kosalela liloba yango na makambo ya mibeko. Soki moto moko alapi ndai, na nsima asengelaki koloba “amen” mpo na komonisa ete likambo oyo alobi ezali solo, mpe andimi nyonso oyo ndai yango ekoki kobimisa. (Mit. 5:22) Ntango alobi “amen” na miso ya bato, amonisi ete andimi mpenza kokokisa ndai oyo alapi.​—Neh. 5:13.

Ndakisa moko ya kokamwa oyo liloba “amen” esalelami na Biblia ezali na mokanda ya Kolimbola Mibeko mokapo 27. Nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Bayisraele bayanganaki na katikati ya Ngomba Ebala mpe Ngomba Gerizime mpo na koyoka mibeko oyo basengelaki kotángela bango. Basanganaki kaka mpo na koyoka te, kasi mpe mpo na koloba polele ete bandimi mibeko yango. Mpo na kosala yango, bazalaki koyanola “Amen!” ntango bitumbu ya kozanga botosi ezalaki kotángama. (Mib. 27:15-26) Kanisá mingongo ya bankóto ya mibali, basi mpe bana, ntango bazali koyanola na mongongo makasi! (Yos. 8:30-35) Kozanga ntembe, babosanaki te maloba oyo balobaki mokolo wana. Mpe Bayisraele yango bakokisaki maloba na bango, mpo lisolo elobi boye: “Mpe Yisraele bakobaki kosalela Yehova mikolo nyonso ya Yosua mpe mikolo nyonso ya mikóló oyo batikalaki na bomoi nsima ya Yosua mpe oyo bayebaki misala nyonso oyo Yehova asalelaki Yisraele.”​—Yos. 24:31.

Yesu mpe asalelaki liloba “amen” mpo na komonisa ete maloba na ye ezali solo, kasi asalelaki yango na ndenge oyo ekeseni na bato mosusu. Na esika ya kosalela liloba yango mpo na koyanola na likambo oyo moto mosusu alobi, asalelaki liloba “amen” (“ya solo mpenza”) liboso ya koloba likambo mpo na komonisa ete maloba na ye ezali solo. Ntango mosusu, azalaki kozongela liloba yango: “amen amen.” (Mat. 5:18; Yoa. 1:51) Azalaki kosala bongo mpo na komonisa bato oyo bazalaki koyoka ye ete maloba na ye ezalaki mpenza solo. Yesu azalaki koloba polele ete maloba na ye ezali solo mpo azalaki moto oyo na nzela na ye bilaka nyonso ya Nzambe esengelaki kokokisama.​—2 Ko. 1:20; Em. 3:14.

“BATO BALOBAKI, ‘AMEN!’ MPE BAKUMISAKI YEHOVA”

Bayisraele mpe bazalaki kosalela liloba “amen” ntango bazalaki kokumisa Yehova mpe kobondela ye. (Neh. 8:6; Nz. 41:13) Soki bato oyo bayoki libondeli yango balobi “amen” na nsuka, bazalaki komonisa ete bandimi makambo oyo elobami. Yango ezalaki kopesa moto nyonso libaku ya kosangana na losambo, mpe bazalaki kosepela kosambela Yehova ndenge wana. Yango nde esalemaki ntango Mokonzi Davidi amemaki sanduku ya kondimana na Yerusaleme. Na molulu oyo esalemaki na nsima, asalaki libondeli moko oyo eutaki mpenza na motema; libondeli yango, oyo ezalaki lokola loyembo, ekomami na 1 Ntango 16:8-36. Bato oyo bazalaki wana bazalaki na esengo ya koyoka maloba na ye mpe “bato nyonso balobaki, ‘Amen!’ mpe basanzolaki Yehova.” Ya solo, koloba “amen” elongo ndenge wana ebakiselaki bango esengo na mokolo yango.

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki mpe kosalela liloba “amen” ntango bazalaki kokumisa Yehova. Bakomi ya Biblia basaleli liloba yango mbala mingi na mikanda na bango. (Rom. 1:25; 16:27; 1 Pe. 4:11) Kutu, mokanda ya Emoniseli elobeli bikelamu ya elimo na likoló bazali kokumisa Yehova na maloba oyo: “Amen! Bósanzola Yah!” (Em. 19:1, 4) Bakristo ya liboso bazalaki na momesano ya koloba “amen” nsima ya mabondeli oyo ezalaki kosalema na makita na bango. (1 Ko. 14:16) Atako bongo, ezalaki te liloba oyo bazalaki kozongela kozanga kokanisa.

MPO NA NINI KOLOBA “AMEN” EZALI NA NTINA?

Nsima ya kotalela ndenge basaleli ya Yehova bazalaki kosalela liloba “amen,” tomoni sikoyo mpo na nini koloba “amen” na nsuka ya libondeli ezali na ntina mingi. Ntango tolobaka “amen” na nsuka ya libondeli na biso moko, tomonisaka ete tondimi mpenza makambo oyo tolobi. Mpe ntango tolobi “amen,” ezala na motema to na libondeli oyo esalemi na miso ya bato, tomonisaka ete tondimi makambo oyo elobami na libondeli. Tólobela ntina mosusu oyo liloba “amen” ezali na motuya.

Tolandaka libondeli na likebi mpo ezali na kati ya losambo na biso. Tosambelaka Yehova ntango tozali kobondela, kaka na makambo oyo tozali koloba te, kasi mpe na ndenge oyo tozali komonana. Lokola tozalaka na mposa ya koloba “amen” oyo euti na motema na nsuka ya libondeli, tosalaka makasi tóbatela makanisi malamu mpe tótya likebi na biso nyonso na libondeli.

Tozalaka na bomoko na basambeli mosusu ya Yehova. Ntango libondeli ezali kosalema mpo na bato nyonso, bandeko nyonso ya lisangá batyaka likebi mpo na koyoka makambo oyo ezali kolobama. (Mis. 1:14; 12:5) Ntango tozali koyanola elongo na bandeko na biso, tozali kokómisa lisusu makasi bomoko na biso. Ezala tolobi “amen” na mongongo makasi to na kati ya motema, yango ekoki mbala mosusu kosala ete Yehova apesa biso makambo oyo tosɛngi ye.

Ndeko mwasi moko akitisi motó na nse mpo na kolanda libondeli ntango azali kolanda makita na nzela ya telefone

Ntango tolobaka “amen,” yango ekumisaka Yehova

Tokumisaka Yehova. Yehova amonaka makambo nyonso oyo tosalaka mpo na losambo na ye. (Luka 21:2, 3) Amonaka nini oyo etindaka biso tósala yango mpe nini ezali na motema na biso. Ata soki esɛngi tólanda makita na nzela ya telefone, tóyeba ete “amen” oyo tokoloba na nsuka, ata tozali biso moko, Yehova akoyoka yango. Na ndenge wana, tozali kokumisa Yehova elongo na bandeko oyo bazali na makita.

“Amen” oyo tolobi ekoki komonana lokola ezali na ntina mingi te, nzokande ezali bongo te. Buku moko oyo elimbolaka makambo ya Biblia elobi ete: “Na nzela ya liloba wana moko,” basaleli ya Nzambe bakoki komonisa ete “bazali kotyela Nzambe motema, bazali kondima na motema moko, mpe bazali na elikya makasi na mitema na bango.” Tiká ete mbala nyonso oyo tokoloba “amen” ezala mpo na kosepelisa Yehova.​—Nz. 19:14.

OSENGELI NTANGO NYONSO KOLOBA “AMEN”?

“Amen” ezali liloba ya kozwa na lisɛki te. Kasi, tokosala nini soki ndeko oyo azali kobondela alobi likambo moko oyo ebongi te? Tosengeli nde koboya koloba “amen”? Ezali mpenza bongo te. Yehova ayebi ete biso nyonso tobɛtaka mabaku na maloba, mpe alimbisaka mabunga yango. Yango wana, na esika ya kolandela maloba nyonso oyo emonani lokola ebongi te, soki totye likebi na likambo oyo ndeko alingaki koloba, tokoloba kaka “amen” na nsuka ya libondeli oyo asali.

Nzokande, tolobaka “amen” te, ezala na mongongo makasi to na motema, na libondeli oyo esalemi na moto oyo azali Motatoli ya Yehova te. Kasi, tokosala nini soki tozali na esika oyo libondeli ya ndenge wana ezali kosalema? Na ndakisa, ekoki kozala ete tozali na molulu moko, na fɛti to na esika ya kolela mowei, mpe basɛngi moto moko asala libondeli. To ekoki kozala ete tozali na libota oyo bato mosusu bazali Batatoli ya Yehova te, mpe nkolo-ndako, oyo azali Motatoli ya Yehova te, azwi ekateli ya kosala libondeli mpo na libota mobimba. Tosengeli kosala nini?

Soki tozali na esika ya ndenge wana, tokoki kofanda nyɛɛ mpe kozala na limemya. Tokoloba “amen” te mpe tokosimbana na mabɔkɔ na bato mosusu te na ntango ya libondeli, mpo yango ekomonisa ete tosangani na libondeli yango. Mbala mosusu, tokoki komona malamu tósala libondeli na biso moko na motema, kasi tosengeli te koloba “amen” na mongongo makasi, mpo yango ekoki kotinda basusu bákanisa ete tosangani na libondeli na bango. Soki bato nyonso batɛlɛmi, biso moko tokopona soki tokotɛlɛma to te. Kotɛlɛma to kogumba motó mpamba ezali losambo te. Mokristo mokomoko asengeli kopona oyo ebongi kosala na likambo boye to boye, mpe esengeli te koloba mabe mpo na ekateli oyo ndeko azwi na likambo yango.

Makambo tolobeli na lisolo oyo emonisi mpo na nini koloba “amen” ezali na ntina na miso ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto