Olyaka mpenza malamu na elimo?
1 Lisese moko elobaka ete: ‘nzoto emonisaka ndenge moto alyaka.’ Ya solo, makasi na biso mpe kolɔngɔnɔ na biso ya nzoto etalelaka ndenge oyo tolyaka. Lokola Yesu alobaki ete: “Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe,” lolenge oyo tolyaka na elimo ekoki kobongisa to kobebisa elimo na biso. (Mat. 4:4) Na yango, mituna oyo ezali kotunama: Olyaka mpenza malamu na elimo? Oponaponaka mwa biloko mosusu oyo olingaka kolya? Olyaka mbangumbangu? To osepelaka mpenza kozwa ntango ya kolya mbala na mbala bilei malamu ya elimo?
2 Talelá malamu biloko oyo olyaka: Yehova azali kopesa “bilei na elaka na yango” mpe “elambo ya bilei ya mafuta,” na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45; Yis. 25:6) Mpo tózwa mpenza litomba na bibongiseli yango ya bolingo, tosengeli kosala molende ya kolya malamu na elimo.
3 Osengeli komituna boye: ‘Natángaka mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango mikolo nyonso? Natángaka Biblia mpe namanyolaka likoló na yango mikolo nyonso? Nayekolaka mpo namibongisa liboso mpo na makita ya lisangá? Nasili kotánga mikanda oyo euti kobima sika, bakisá mpe volimi nyonso mibale ya Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso?’
4 Yesu apesaki elaka ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo . . . Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo bakotonda.” (Mat. 5:3, 6, NW) Yango wana, lyaká malamu na elimo, tondisá makanisi na yo mpe motema na yo na boyebi ya Nzambe.