Mokolo oyo tokoluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia
1 Kobanda na sanza ya Yanuali, lisangá mokomoko ekobanda kopona na sanza nyonso mokolo moko ya pɔsɔ to ya lomingo, ekoki kozala na pɔsɔ ya liboso ya sanza, mpo na koluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia. Lisangá mokomoko ekopona mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo oyo ebongi na bango. Na mokolo yango, ata soki moto andimi te koyekola Biblia, tokolakisa ye buku Biblia eteyaka to tokotikela ye bazulunalo oyo ebimi sika. Bankulutu mpe basaleli na misala nyonso basengeli komibongisa mpo na kosangana mingi na mosala yango mpe kosalisa basakoli bábanda koyekola na bato Biblia.
2 Komite ya mosala ya lisangá ekopona mokolo nini ya pɔsɔ to ya lomingo oyo basakoli bakobanda koluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia. Esengeli kopesa liyebisi mbala na mbala mpo basakoli bámibongisa mpe básala makasi mpo báluka bato ya koyekola na bango Biblia wana bazali kosakola ndako na ndako mpe kozongela bato oyo basepelaki.
3 Ndenge ya komibongisa: Tokoki kozwa makanisi mpo na ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2006 mpe na buku Comment raisonner, lokasa 12. Basusu bakoki kopona kosalela trakte, na ndakisa Okosepela koyeba solo? Longola yango, Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 2007 lokasa 3 epesi makanisi mpo na ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia ntango tozongeli bato oyo totikelaki bazunalo. Esengeli kosala programɛ mpo bankulutu mpe basaleli na misala bátambwisaka likita mpo na mosala ya kosakola. Likita yango esengeli koumela kaka miniti 10 to 15, mpe esengeli kotalela likanisi moko to makanisi mibale ebongi, oyo emonisi ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia to kosala yango elakiseli.
4 Toyebi ete moto nyonso te nde akondima koyekola Biblia to kokoba koyekola yango mpo na ntango molai. Kasi, yango esengeli te kolɛmbisa biso, mpamba te toyebi ete Yehova nde abendaka bato oyo bazali lokola bampate na ebongiseli na ye. (Yoa. 6:44) Mokumba na biso ezali kaka te ya kolona mboto ya solo, tosengeli mpe kobwakaka mai na mboto oyo ezwi misisa, elingi koloba koyekolaka Biblia na bato ya mitema sembo. Soki tosali bongo, tokozala bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.—1 Kol. 3:9.