Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/10 lok. 2
  • Lukáká bato ya koyekola na bango Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lukáká bato ya koyekola na bango Biblia
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Salelá yango na mabaku nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Tyáká likebi na kokómisa bato bayekoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mokolo oyo tokoluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 6/10 lok. 2

Lukáká bato ya koyekola na bango Biblia

1. Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa mokumba oyo Yesu apesá biso na Matai 28:19, 20?

1 Yesu apesá biso mokumba ya ‘kokómisa bato bayekoli . . . , koteya bango.’ (Mat. 28:19, 20) Yango wana, tosengeli koluka bato ya koyekola na bango Biblia ntango nyonso, kaka te na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo oyo eponamá mpo na koluka bato ya koyekola na bango Biblia. Makanisi oyo elandi ekoki kosalisa biso.

2. Banani tokoki kotuna soki bakondima tóyekola na bango Biblia?

2 Tunáká bato soki bakondima oyekola na bango Biblia: Soki tozali kotuna bato mingi soki bakondima tóyekola na bango Biblia, tokozanga te kozwa ata moto moko ya koyekola na ye. (Mos. 11:6) Osilá kobanda koyekola Biblia na moto kaka na mbala ya liboso oyo okutani na ye? Bandeko ya lisangá moko na États-Unis bayokanaki ete, na boumeli ya sanza mobimba, bábanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo bakutani na bango. Basepelaki mingi ndenge bato 42 bandimaki koyekola Biblia. Kokanisa mbala moko te ete lokola moto asepeli na lisolo, ayebi mpe ete ozali koluka bato ya koyekola na bango Biblia. Ntango okozongela ye, tuná ye soki akondima oyekola na ye Biblia. Soki aboyi, likambo te. Okoki kokoba kozongela ye mpo na kosalisa ye akolisa mposa oyo amonisaki. Osilá kotuna bato oyo bafandi pembeni na yo, bandeko na yo ya libota, baninga na yo ya kelasi to ya mosala, soki bakolinga oyekola na bango Biblia? Okoki mpe kotuna bato oyo oyekolaka na bango Biblia soki bazali na baninga to bandeko oyo bakolinga mpe koyekola Biblia.

3. Trakte nini ekoki kosalisa biso tóbanda koyekola na bato, mpe ntango nini tokoki kosalela yango?

3 Trakte oyo ekoki kosalisa biso: Trakte oyo ezali na motó ya likambo Okosepela koyeba solo? ekoki mpenza kosalisa biso tóbanda koyekola na bato Biblia. Okoki kopesa moto trakte yango, ata soki andimi kozwa mokanda mosusu to te. Tokoki kosalela trakte yango ntango tozali kopesa litatoli na esika ya mombongo, na balabala, ntango tozali kokomela bato mikanda, mpe ntango tozongeli bango. Tokoki mpe kotika yango na bandako oyo tokuti bato te. Ezali malamu tózalaka na yango ntango tomati na bisi, tokei kosomba biloko, mpe tozali na mosala. Lokasa na yango ya nsuka elimboli na mokuse ndenge oyo toyekolaka na bato Biblia mpe elobeli buku Biblia eteyaka.

4. Ndenge nini tokoki kosalela trakte Koyeba solo mpo na kobanda koyekola na bato Biblia?

4 Nsima ya kopesa moto trakte yango, okoki kolakisa ye mituna oyo ezali na lokasa ya liboso mpe kotuna ye boye: “Na mituna oyo ezali awa, motuna nini osepeli na yango mingi koleka?” Na nsima, bótalela elongo eyano oyo trakte epesi, mpe tángá to lobelá na mokuse makambo oyo ezali na lokasa ya nsuka, oyo elimboli ndenge toyekolaka na bato Biblia. Nsima na yango, okoki kolakisa ye esika oyo akoki kokuta bandimbola mosusu na lisolo yango na buku Biblia eteyaka. Tikelá ye buku yango mpe yokaná na ye mokolo nini okozongela ye mpo bókoba koyekola.

5. Mpo na nini tosengeli koluka bato ya koyekola na bango Biblia ntango nyonso?

5 Teritware na biso ezali naino na bato oyo bazali na mposa makasi ya koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza. Soki tozali koluka bato ya koyekola na bango Biblia ntango nyonso, tokozanga te koyoka esengo oyo eutaka na kosalisa basusu bámona nzela ya bomoi.​—Mat. 7:13, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto