Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/13 lok. 1
  • Nini etindaka biso tósakola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini etindaka biso tósakola?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bolingo na yo ezali mpenza monene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 5/13 lok. 1

Nini etindaka biso tósakola?

1. Boyokani nini ezali kati na bolingo mpe mosala na biso ya kosakola?

1 Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali mosala ya ntina mingi koleka oyo tokoki kosala lelo oyo. Na nzela ya mosala yango, tozali kotosa mibeko mibale oyo eleki mibeko nyonso mosusu: kolinga Yehova mpe kolinga mozalani. (Mrk. 12:29-31) Bolingo nde nguya oyo etindaka biso tózala basakoli ya molende.​—1 Yoa. 5:3.

2. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola emonisaka ete tolingaka Yehova?

2 Kolinga Yehova: Bolingo oyo tozalaka na yango mpo na Yehova, moninga na biso ya motema, nde etindaka biso tólobela ye epai ya basusu. Eleki sikoyo pene ya mbula 6 000, Satana akoselaka ye makambo. (2 Ko. 4:3, 4) Yango wana, bato bandimaka ete Nzambe anyokolaka basumuki na lifelo ya mɔtɔ, azali na kati ya Bosato, liteya oyo bakokaka kolimbola te mpe akipaka bato te. Kutu bato mingi bakómi komona ete Nzambe azali te. Mposa na biso ezali mpenza ete bato báyeba solo etali Tata na biso ya likoló! Milende oyo tosalaka mpo na kopesa litatoli esepelisaka Nzambe mingi mpe eyokisaka Satana nsɔni.​—Mas. 27:11; Ebr. 13:15, 16.

3. Na ndenge nini mosala na biso ya kosakola emonisaka ete tolingi mozalani?

3 Kolinga mozalani: Mbala nyonso oyo topesi moto litatoli, tomonisaka ete tolingi ye. Na ntango oyo ya mpasi mpenza, bato bazali mpenza na mposa makasi ya koyoka nsango malamu. Mingi na bango bazali lokola bato ya Ninive na mikolo ya mosakoli Yona, oyo ‘bayebaki ata moke te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi.’ (Yona 4:11) Mosala na biso ya kosakola ezali koteya bato ndenge ya kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. (Yis. 48:17-19) Ezali kopesa bango elikya. (Rom. 15:4) Soki bayoki mpe basaleli makambo bazali koyekola, ‘bakobika.’​—Rom. 10:13, 14.

4. Eloko nini Yehova akobosana soki moke te?

4 Bana malamu basalaka makasi bálingaka baboti na bango ntango nyonso. Ndenge moko mpe, soki tolingi Yehova mingi mpe bazalani na biso, yango ekotinda biso tólukaka ntango nyonso mabaku ya kopesa litatoli, kasi kaka te ntango tozali na mosala ya kosakola. Tokosakola kozanga kotika. (Mis. 5:42) Yehova akobosana soki moke te bolingo ya ndenge wana.​—Ebr. 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto