LISOLO YA BOYEKOLI 46
LOYEMBO 17 “Nalingi”
Yesu azali Nganga-nzambe Monene na biso oyo atondi na motema mawa
“Nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo akoki te koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso.”—EBR. 4:15.
NA MOKUSE
Tokolobela ndenge Yesu amityaka na esika na biso mpe ayokelaka biso mawa, mpe matomba oyo mokumba na ye ya Nganga-nzambe Monene ememelaka biso lelo.
1-2. (a) Mpo na nini Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabele? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo? (Baebre 5:7-9)
ELEKI sikoyo mbula soki 2000, Yehova Nzambe atindaki Mwana na ye oyo aleki motuya awa na mabele. Mpo na nini? Ayaki mpo na kosikola bato na elakeli mabe ya lisumu mpe ya liwa, mpe kolongola mabe nyonso oyo Satana abimisá. (Yoa. 3:16; 1 Yoa. 3:8) Yehova ayebaki mpe ete soki Yesu ayei na mabele lokola moto, ekobongisa ye malamu mpo akóma Nganga-nzambe Monene oyo ayebi komitya na esika ya basusu mpe koyokela bango mawa. Yesu azwaki mokumba ya Nganga-nzambe Monene nsima ya batisimo na ye na mobu 29 T.B.a
2 Na lisolo oyo, tokolobela ndenge makambo oyo Yesu akutanaki na yango awa na mabele esalisaki ye mpo akóma Nganga-nzambe Monene oyo ayebi komitya na esika ya basusu. Soki tokangi malamu ntina oyo Yesu ‘akómisamaki moto oyo akoki na nyonso’ mpo na mokumba na ye, yango ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova kozanga kobanga, ata soki tolɛmbi nzoto mpo na masumu to mabunga na biso.—Tángá Baebre 5:7-9.
MWANA OYO NZAMBE ALINGAKA MINGI AYEI NA MABELE
3-4. Mbongwana monene nini esalemaki na bomoi ya Yesu ntango ayaki awa na mabele?
3 Mingi kati na biso tokutaná na mbongwana na bomoi na biso, na ndakisa tolongwaki na ndako oyo tomesanaki na yango mpe totikaki bato ya libota mpe baninga na biso. Bambongwana yango ekoki kozala mpasi. Kasi, ata moto moko te akutaná na bambongwana mingi lokola Yesu. Na likoló, azalaki anzelu ya libosoliboso mpe oyo aleki ntina koleka baanzelu nyonso ya Yehova. Yehova alingaki ye mingi mpe azalaki ntango nyonso na esengo wana azalaki kosala na ‘lobɔkɔ ya mobali’ ya Nzambe. (Nz. 16:11; Mas. 8:30) Kasi, Bafilipi 2:7 elobi ete andimaki ‘komikómisa mpamba,’ atikaki esika ya lokumu oyo azalaki na yango na likoló mpo na koya kofanda na bato ya kozanga kokoka awa na mabele.
4 Kanisá mpe makambo oyo esalemaki na ntango ya kobotama ya Yesu mpe na bomwana na ye. Mbeka oyo baboti na ye bapesaki nsima ya kobotama na ye, emonisi ete Yesu abotamaki na libota moko ya babola. (Lev. 12:8; Luka 2:24) Ntango mokonzi mabe Erode ayokaki ete Yesu abotami, alukaki koboma ye. Mpo na kobikisa bomoi ya Yesu, Yozefe ná Maria bakimaki na Ezipito mpo na mwa ntango. (Mat. 2:13, 15) Bomoi ya Yesu na mabele ekesanaki mpenza na oyo azalaki na yango na likoló!
5. Makambo nini Yesu amonaki awa na mabele, mpe ndenge nini yango ebongisaki ye mpo na mokumba na ye ya Nganga-nzambe Monene? (Talá mpe elilingi.)
5 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonaki ndenge bato bazalaki konyokwama. Na ntembe te, amonaki mpe ndenge bato oyo azalaki kolinga bakufaki, emonani ete Yozefe tata-mobɔkɔli na ye azalaki moko na bango. Na boumeli ya mosala na ye, Yesu akutanaki na bato ya maba, bato oyo bakufá miso, batɛngumi, baboti oyo bana na bango bakufi, mpe ayokelaki bango mawa. (Mat. 9:2, 6; 15:30; 20:34; Mrk. 1:40, 41; Luka 7:13) Ya solo, ntango azalaki na esika ya lokumu na likoló, azalaki komona mpasi oyo ezalaki awa na mabele. Kasi, ntango akómaki moto, amonaki mpasi ya bato malamumalamu mpenza. (Yis. 53:4) Makambo oyo Yesu amonaki awa na mabele esalisaki ye ayeba mayoki ya bato, makambo oyo epesaka bango nkanda mpe mpasi na bango. Ye moko mpe akutanaki na makambo mpe mayoki oyo bato bazalaka na yango, na ndakisa mpasi na motema, kolɛmba, mpe mawa.
Yesu azalaki mpenza kotya likebi na mayoki mpe mpasi ya bato (Talá paragrafe 5)
YESU AZALAKI KOMITYA NA ESIKA YA BATO
6. Maloba ya elilingi oyo masakoli Yisaya asalelaki ezali koteya biso nini mpo na Yesu? (Yisaya 42:3)
6 Na boumeli ya mosala na ye, Yesu azalaki mpenza komitya na esika ya bato oyo bazangi lisalisi mpe oyo bazalaki konyokwama. Na ndenge yango, akokisaki esakweli. Na bantango mosusu, Makomami ya Ebre ekokanisaka bato oyo bazali na bomɛngo mpe bato ya makasi lokola elanga oyo ebotaka mingi, to nzete monene mpe ya makasi. (Nz. 92:12; Yis. 61:3; Yir. 31:12) Kasi, ekokanisi babola mpe bato oyo bazali konyokwama na mongendu oyo elɛmbi mpe na nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa; nyonso mibale ezalaka na ntina mpenza te. (Tángá Yisaya 42:3; Mat. 12:20) Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mosakoli Yisaya asalelaki maloba yango ya elilingi mpo na kosakola bolingo mpe motema mawa oyo Yesu akomonisela bato oyo basusu bazalaki komona mpamba.
7-8. Ndenge nini Yesu akokisaki esakweli ya Yisaya?
7 Evanzile ya Matai emonisi ete maloba yango ya Yisaya ekokisamaki epai ya Yesu, ete: “Akobuka te mongendu oyo elɛmbi, mpe akoboma te nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa.” Yesu asalaki makamwisi mosusu mpo na bato mpamba, oyo na ntembe te bazalaki komiyoka lokola mongendu oyo elɛmbi, to bazangi elikya lokola nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa. Kati na bango, ezalaki na mobali moko oyo atondaki na maladi ya maba. Na ntembe te azalaki ata na elikya te ya kobika mpe ya kozala lisusu elongo na libota mpe baninga na ye! (Luka 5:12, 13) Ezalaki mpe na mobali oyo azalaki matoi ekufá mpe na mokakatano ya koloba. Kanisá ndenge azalaki komiyoka ntango bato bazali kosolola mpe kosɛka kasi ye azali koyoka te. (Mrk. 7:32, 33) Esuki kaka wana te.
8 Na mikolo ya Yesu, Bayuda mingi bazalaki kokanisa ete baoyo bazali na maladi to bibɔsɔnɔ bazwaki etumbu mpo na masumu na bango to masumu ya baboti na bango. (Yoa. 9:2) Na yango, bato ya ndenge wana bazalaki komimona ntina te. Mpo na kokokisa esakweli ya Yisaya, Yesu abikisaki bato ya maladi mpe asalisaki bango bátya elikya epai ya Nzambe. Ndenge nini yango ezali kolendisa biso?
9. Ndenge nini Baebre 4:15, 16 emonisi ete Nganga-nzambe Monene na biso na likoló ayokelaka bato ya kozanga kokoka mawa?
9 Tángá Baebre 4:15, 16. Tokoki kotya motema ete Yesu akoyokela biso mawa ntango nyonso. Yango elimboli nini? Moto oyo ayokelaka basusu mawa amityaka na esika ya moto oyo azali na mpasi. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami ‘koyokela mawa’ elimboli koyoka mpasi ya moto mosusu. (Talá mpe Baebre 10:34, epai Paulo asaleli mpe vɛrbɛ yango ya Grɛki.) Masolo ya makamwisi oyo Yesu asalaki emonisi ete azalaki mpenza komitya na esika ya baoyo bazalaki konyokwama. Abikisaki bango kaka te mpo ezalaki mokumba na ye. Kasi, azalaki mpenza kotyela bango likebi mpe alingaki kosalisa bango. Na ndakisa, ntango abikisaki moto ya maba, akokaki kosala likamwisi yango na mosika, kasi mawa etindaki ye asimba moto yango, mbala mosusu elekaki bambula mingi ata moto moko te asimbá ye! Na boboto nyonso, Yesu amemaki moto oyo akufá matoi mosika na makelele ya ebele ya bato mpe abikisaki ye na esika oyo bato bazalaki te. Mpe ntango Mofarisai moko atyolaki mwasi oyo abongolaki motema, oyo asukolaki makolo ya Yesu na mai ya miso na ye mpe apangwisaki yango na nsuki na ye, Yesu akɔtelaki mpenza mwasi yango. (Mat. 8:3; Mrk. 7:33; Luka 7:44) Yesu azalaki te kokima bato ya maladi to baoyo basalaki masumu ya minene. Kutu, azalaki koyamba bango na mawa nyonso mpe kokitisa bango motema. Tokoki kotya motema ete asalaka mpe bongo mpo na biso.
NDENGE YA KOMEKOLA NGANGA-NZAMBE MONENE NA BISO LELO OYO
10. Biloko nini tokoki kosalela lelo mpo na kosalisa bato oyo bakufá matoi mpe miso? (Talá mpe bililingi.)
10 Lokola tozali bayekoli ya Yesu, tosalaka makasi tómekola bolingo na ye, ezaleli na ye ya komitya na esika ya basusu, mpe ya koyokela bato mawa. (1 Pe. 2:21; 3:8) Ya solo tokoki te kobikisa bato oyo bakufá matoi to miso, kasi tokoki kosalisa bango na ndenge ya elimo. Na ndakisa, mikanda na biso ezali sikoyo na minɔkɔ koleka 100 ya elobeli ya bajɛstɛ. Mpe mpo na kosalisa bato oyo bakufá miso, ezali na mikanda ya braille na minɔkɔ koleka 60 mpe na bavideo na biso, ezali na maloba mikuse mpo na kolimbola bililingi na minɔkɔ koleka 100. Bibongiseli yango esalisaka baoyo bakufá matoi mpe miso bákóma baninga ya Yehova mpe ya Mwana na ye.
Mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia ezali na minɔkɔ koleka 1000
Lobɔkɔ ya mwasi: Minɔkɔ koleka 100 ya elobeli ya bajɛstɛ
Lobɔkɔ ya mobali: Minɔkɔ koleka 60 na braille
(Talá paragrafe 10)
11. Ndenge nini ebongiseli ya Yehova etyelaka bato nyonso likebi ndenge Yesu asalaka yango? (Misala 2:5-7, 33) (Talá mpe bililingi.)
11 Ebongiseli ya Yehova esalaka nyonso mpo na kosalisa bato ya ndenge nyonso. Kobosana te ete nsima ya lisekwa na ye, Yesu asopaki elimo santu mpo baoyo nyonso bayanganaki na fɛti ya Pantekote báyoka nsango malamu, moto na moto na “monɔkɔ na ye mpenza.” (Tángá Misala 2:5-7, 33.) Na litambwisi ya Yesu, ebongiseli na biso ezali kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 1000, mpe minɔkɔ yango mosusu kaka bato moke nde balobaka yango. Na ndakisa, minɔkɔ mosusu ya bankolo-mboka Amerika (Améridiens), kaka bato moke oyo bafandi na nɔrdi mpe na sudi ya Amerika nde balobaka yango. Atako bongo, tobimisi mikanda na minɔkɔ yango koleka 160 mpo baoyo balobaka minɔkɔ yango bázwa libaku ya koyoka nsango malamu. Mikanda na biso ezali mpe na minɔkɔ koleka 20 ya Romani. Bankóto ya bato oyo balobaka minɔkɔ yango babandi kosalela Yehova.
Lobɔkɔ ya mwasi: Minɔkɔ koleka 160 ya bankolo-mboka Amerika
Lobɔkɔ ya mobali: Minɔkɔ 20 ya Romani
(Talá paragrafe 11)
12. Makambo nini mosusu ebongiseli ya Yehova esalaka mpo na kosalisa bato?
12 Longola milende oyo ezali kosalema mpo na kopalanganisa nsango malamu, ebongiseli ya Yehova esungaka mpe baoyo bazwi likama. Mpo na yango, bankóto ya bandeko bapesaka mabɔkɔ mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi likama. Ebongiseli ya Yehova etongaka mpe bisika ya mindɔndɔ te ya kosala makita, epai bato bakoki koyekola makambo mingi mpo na bolingo oyo Nzambe amoniselaka bango.
NGANGA-NZAMBE MONENE NA BISO AKOKI KOSALISA YO
13. Ndenge nini Yesu akoki kosalisa biso?
13 Yesu, mobateli ya mpate oyo aleki malamu, atyaka likebi na mposa ya elimo ya mokomoko na biso. (Yoa. 10:14; Ef. 4:7) Na bantango mosusu, makambo ya bomoi ekoki kotinda biso tómiyoka lokola nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa to mongendu oyo elɛmbi. To tokoki kolɛmba nzoto mpo na maladi, libunga moko oyo tosali, to mpo na matata oyo tozwani na ndeko. Mbala mosusu tozali kokoka te kobosana mpasi yango mpe kotya makanisi na elikya na biso mpo na mikolo ezali koya. Ata soki ezali bongo, kobosana te ete Yesu azali komona mikakatano na yo mpe ayebi mpenza makanisi ya motema na yo. Mawa oyo Yesu ayokelaka yo etindaka ye asalisa yo. Na ndakisa, akoki kosalela elimo santu mpo na kopesa yo nguya ntango osili makasi. (Yoa. 16:7; Tito 3:6) Lisusu, Yesu akoki kosalela “makabo oyo ezali bato” mpe bandeko mosusu mpo na kolendisa, kosunga, mpe kosalisa yo.—Ef. 4:8.
14. Tokoki kosala nini ntango tolɛmbi nzoto?
14 Soki mɔtɔ na yo ekufi to elimo na yo etutami, kanisá mokumba ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene na biso. Omikundwela ete Yehova atindaki ye awa na mabele kaka te mpo na kopesa bomoi na ye lisiko, kasi mpe mpo na kosalisa Yesu ayeba makambo oyo bato ya kozanga kokoka bakutanaka na yango. Ntango tolɛmbi nzoto mpo na masumu to mabunga na biso, Yesu azali pene mpe alingaka kosalisa biso “ntango tozali na mposa ya lisalisi.”—Ebr. 4:15, 16.
15. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge moto oyo atiká etonga ya Yehova akoki kozwa lisalisi mpo azonga na lisangá.
15 Yesu azali mpe kosunga basaleli ya Yehova na milende oyo bazali kosala mpo na koluka mpe kosalisa baoyo batiká etonga ya Yehova. (Mat. 18:12, 13) Talá ndakisa ya Stefano.b Nsima ya kolongolama na lisangá mbula 12, azwaki ekateli ya koyangana na likita moko. Alobi boye: “Nayokaki mwa nsɔni, kasi mposa na ngai ezalaki ete nazonga na libota ya Yehova. Bankulutu oyo bakutanaki na ngai bayambaki ngai malamu. Na bantango mosusu, nazalaki komiyoka lokola nabongi te, mpe namonaki lokola natika kosala milende. Kasi bankulutu bakundwelaki ngai ete Yehova ná Yesu balingi natika te. Ntango nazongisamaki na lisangá, bandeko nyonso bayambaki ngai elongo na bato ya libota na ngai na bolingo. Na nsima, mwasi na ngai andimaki koyekola Biblia, mpe lelo oyo tozali kosalela Yehova elongo na libota.” Na ntembe te Nganga-nzambe Monene na biso ya bolingo asepelaka komona ndenge bato oyo babongoli motema bazwaka lisalisi oyo esengeli mpo bázonga na lisangá!
16. Mpo na nini ozali na botɔndi ndenge tozali na Nganga-nzambe Monene oyo akoki koyokela biso mawa?
16 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalisaki bato mingi na ntango oyo ebongi. Lelo oyo, tokoki kotya motema mobimba ete akosalisa biso ntango nyonso oyo tozali na bosɛnga. Mpe na mokili ya sika oyo ekoya mosika te, akosalisa bato ya botosi bálongwa libela na boombo ya makambo ya mabe oyo lisumu mpe kozanga kokoka ememá. Tozali mpenza na botɔndi epai ya Nzambe na biso Yehova, oyo bolingo na ye monene mpe motema mawa na ye etindaki ye atyá Mwana na ye lokola Nganga-nzambe Monene oyo akoki koyokela biso mawa!
LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso
a Mpo na koyeba ndenge mosala ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene ezwi esika ya nganga-nzambe monene ya Bayuda, talá lisolo “Sepelá na libaku kitoko ya kosambela na tempelo ya Yehova ya elimo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2023, lok. 26, par. 7-9.
b Topesi bango bankombo mosusu.