17 Akopasola yango na mapapu na yango mpe akokabola yango na biteni mibale te. Na nsima, nganga-nzambe akosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo, likoló ya nkoni oyo ezali na mɔtɔ. Ezali likabo ya kotumba, likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko oyo ezali kosepelisa Yehova.