22 “‘Ntango bokobuka mbuma ya mokili na bino, osengeli te kobuka mbuma nyonso oyo ezali na ndelo ya elanga na yo mpe okolɔkɔta te mbuma oyo etikalaka na ntango ozali kobuka mbuma.+ Okotika yango mpo na mobola+ mpe mpo na moto oyo afandi mopaya.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.’”