21 Bongo nazwaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ+ oyo bosalaki, eloko oyo lisumu na bino ebotaki mpe nazikisaki yango na mɔtɔ; natutaki yango, nanikaki yango nyonso tii ekómaki mikemike lokola putulu, mpe nabwakaki putulu yango na mokɛli oyo ezalaki kokita uta na ngomba.+