16 Mpe Yehova alobaki na Moize ete: “Talá! Okómi pene ya kokufa, mpe bato oyo bakobanda kosala bondumba ya elimo na banzambe ya bapaya oyo bazali zingazinga ya mokili epai bazali kokende.+ Bakotika ngai+ mpe bakobuka kondimana oyo nasalaki ná bango.+