9 Yango ekómaki bingumba oyo eponamaki mpo na Bayisraele nyonso mpe mpo na bato oyo bafandi bapaya kati na bango, mpo moto nyonso oyo abomi moto na nko te akima kuna+ mpo mozongisi mabe mpo na makila aboma ye te liboso ete atɛlɛma liboso ya liyangani mpo na kosambisama.+