-
2 Ntango 20:20Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
20 Mokolo oyo elandaki, balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe babimaki bakei na esobe ya Tekoa.+ Ntango bazalaki kobima, Yehoshafate atɛlɛmaki mpe alobaki: “Bóyoka ngai, Ee Yuda mpe bino bato oyo bofandaka na Yerusaleme! Bóndimela Yehova Nzambe na bino mpo bókoka kotɛlɛma ngwi.* Bóndimela basakoli na ye,+ mpe makambo na bino ekolonga.”
-