-
Estere 1:19Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 Soki mokonzi amoni yango malamu, tiká mokonzi abimisa mobeko moko, mpe bákoma yango na mibeko ya Perse mpe ya Media, oyo ekoki kolongolama te.+ Mobeko yango eloba ete Vasheti akoki lisusu koya liboso ya Mokonzi Asueruse te; mpe tiká mokonzi apesa esika na ye ya lokumu na mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.
-