22 Atindaki mikanda na bitúká nyonso ya bokonzi na ye,+ mpe ekomamaki na ekomeli ya etúká mokomoko mpe na monɔkɔ ya bato ya ekólo mokomoko. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi ya libota na ye mpe asengeli koloba monɔkɔ ya bato ya ekólo na ye moko.