23 “‘Na mokolo wana,’ Yehova ya mampinga alobi bongo, ‘nakozwa yo, mosaleli na ngai Zerubabele+ mwana ya Shealatiele,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakokómisa yo lokola lopɛtɛ ya kotya kashɛ, mpo ozali moto oyo ngai naponi,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”