10 Na kotalela boboto monene ya Nzambe oyo emonisamaki epai na ngai, natyaki moboko+ lokola mokambi ya misala oyo ayebi malamu mosala na ye. Sikoyo moto mosusu azali kotonga likoló na yango. Kasi moto na moto asengeli kokeba na ndenge oyo azali kotonga likoló ya moboko yango.